2016
Maponi
sánzá ya mítáno 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mitano 2016

Maponi

Tika topona ntango nyonso bolamu ya mpasi esika ya mabe ya pete.

Bandeko basi mpe mibali, yambo nabanda etinda na ngai mpenza ya lelo, nakolinga kosakola mpo na batempelo minei oyo, na basanza mpe mibu ekoya, ekotongama na bisika bilandi: Quito, Ecuador; Harare, Zimbabwe; Belém, Brézil; mpe tempelo ya mibale na Lima, Peru.

Ntango nakomaki moko ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale na 1963, ezalaki na batempelo 12 oyo ezalaki kosala kati na Eklezia mobimba. Na bobulisi ya Tempelo ya Provo City Center bamposo mibale eleki, wana ezali sika na batempelo 150 oyo ezali kosala uta na mokili mobimba. Boniboni tozali na matondi mpo na mapamboli tozwi na bandako isantu wana.

Sikawa, bandeko ya basi mpe mibali, nalingi kopesa matondi mpo na libaku ya kokabola mwa makanisi elongo na bino na ntongo ya lelo.

Nazalaki kokanisa kala te na ntina ya maponi. Yango elobamaki ete ekuke ya mambi ya mokili ebalukaka likolo ya masisi mike, mpe bongo ezali bomoi ya bato. Maponi tosalaka esalaka lobi na biso.

Ntango tolongwaki na bomoi na biso yambo ya kufa mpe tokotaki na bomoi ya kufa, tomemaki elongo na biso bonsomi ya kopona. Lotomo na biso ezali kozwa nkembo ya celesitiale, mpe maponi tosalaka ekoki, mingimingi, kosala soki ya solo to te tokokokisa lotomo na biso.

Mingi kati na bino bayebi malamu Alice na mokanda ya Lewis Carroll Alice’s Adventure in Wonderland. Bokomikundola ete ayaki kokutana na banzela mibale liboso na ye, moko na moko kokendaka liboso na ye kasi na banzela ya kokesana. Ntango azalaki kotala nzela nini kolanda, akutanaki na Niau ya Cheshire, na ye Alice atunaki, “Nzela nini nasengeli kolanda?”

Niau ayanolaki ete, “Yango etali wapi yo olingi kokende. Soki oyebi wapi olingi kokende te, yango ezali likambo te nzela nini okozwa.”1

Na bokeseni na Alice, biso toyebi wapi tolingi kokende, mpe yango ezali likambo ya nzela nini tokokende, mpo na nzela tolandi na bomoi oyo ememi na esika ya bomoi na biso ekoya.

Tika topona kotonga kati na bisomei bondimi monene mpe ya nguya oyo ekozala bobatelami na biso mpenza na mikano ya monguna—bondimi ya solo, bondimi lokola oyo ekosimba biso mpe ekokolisa mposa na biso ya kopona bolamu. Kozanga bondimi ya boye, tokokende epai te. Na yango, tokoki kokokisa bantina na biso.

Atako esengeli ete topona na bwania, ezali wana na bangonga ntango tokosala maponi ya bozoba. Likabo ya boyamboli, epesami na Mobikisi na biso, ekosalisa biso kobongisa botamboli na biso, ete tokoki kozonga na nzela oyo ekomema biso na nkembo ya selesitiale wana tozali koluka.

Tika tokoba na molende kotelemela maye endimami na bato nyonso. Tika topona bolamu ya mpasi esika ya mabe ya pete.

Ntango tomanioli mikano tosali na bomoi na biso mokolo na mokolo—ata tosali liponi oyo to liponi wana—soki toponi Klisto, tokosala liponi ya malamu.

Ete yango ekoka kozala ntango nyonso bongo ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso, amene.

Matangi

  1. Emekolami uta na Lewis Carroll, Alice’s Adventures in Wonderland (1898), 89.