2021
Lolenge nini ekoki ngai koyeba ete nazali koyoka mongongo ya Nkolo na bomoi na ngai?
Sanza ya mibale 2021


“Lolenge nini ekoki ngai koyeba ete nazali koyoka mongongo ya Nkolo na bomoi na ngai?” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya mibale 2021, 29.

Etinda mpo na Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya mibale 2021

Lolenge nini ekoki ngai koyeba ete nazali koyoka mongongo ya Nkolo na bomoi na ngai?

Elilingi
elenge mobali azali kotanga makomi

Mokambi Russell M. Nelson asengi biso “tokanisa na mozindo mpe mbala mingi” na ntina ya lolenge nini biso tozali koyoka Yesu Klisto mpe “kosala eloko moko mpo na koyoka Ye malamu koleka mpe mbala mingi koleka” (“‘Lolenge nini Boko #YokaYe?’ Special Invitation,” Sanza ya mibale 26, 2020, blog.ChurchofJesusChrist.org).

Tokoki koyoka Ye na nzela ya makomi mpe maloba ya baprofeta. Kasi ezali kaka koyoka to kotanga maloba wana te nde ezali motuya koleka mpenza. Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nkolo alimbolaki:

“Ezali mongongo na ngai oyo elobi [maloba oyo] epayi na yo; mpo mapesami na Molimo na ngai epayi na yo … ;

“Yango wana, okoki kotatola ete oyoki mongongo na ngai” (Malongi mpe Mayokani 18:35–36).

Lisusu, kolukaka koyoka Ye ezali likambo moko tosalaka mbangu mbangu te. Mokambi Nelson alobaki, “Ezwaka bokasi ya makanisi mpe ya ntango nyonso” (“Hear Him,” likita linene ya Sanza ya minei 2020 [Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 89]).

Ntango ozali koyekola, kosambela, kokumbamela, kosalisa, mpe kotosa mibeko ya Nkolo, Ye akopambola yo na Molimo na Ye mpe, na nzela ya Bomikabi ya Klisto, akobongwanisa yo. Nsima okoki koyeba ete oyoki mongongo na Ye.