2022
Boyekola na ntina ya Yesu Klisto mpe Bozwa Nguya na Ye
Sanza ya Libwa 2022


“Boyekola na ntina ya Yesu Klisto mpe Bozwa Nguya na Ye,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya libwa 2022.

Etinda ya Mpo na Bokasi ya Bilenge ya Sanza, Sanza ya Libwa 2022

Boyekola ya Yesu Klisto mpe Bozwa Nguya na Ye

Uta na Lisukulu ya likita linene ya sanza ya minei 2017

Nakolinga kokabola lolenge nini tokoki kotia kati ya bomoi na biso nguya ya Nkolo mpe Mokonzi na biso, Yesu Klisto.

Tokobanda na koyekola oyo etali Ye.1 “Ekoki kosalema te ete [biso] tobikisama kati na bozagi boyebi” (Doctrine et Alliances 131:6). Mingi tokososola lilongi ya Mobikisi mpe mye asalaki mpo na biso, mingi tokoyeba ete Ye akoki kopesa nguya oyo tosengeli na yango mpo na bomoi na biso.

Lokola bansantu ba mikolo mya nsuka, tolobelaka mosala na Ye lokola Bomikabi ya Yesu Klisto, oyo esalaki lisekwa solo moko mpo na banso mpe esalaki bomoi ya seko ekokisama mpo na baoyo bayamboli masumu na bango mpe bazwi mpe babateli makuli mpe mayokani ya ntina.

Na nse ya mwango monene ya seko ya Tata, ezali Mobiki nde anyokwamaki. Ezali Mobikisi nde abukaki bankanga ya liwa. Ezali Mobikisi nde afutaki motuya mpo na masumu mpe mabunga na biso mpe abwaki yango libanda na bokokisi ya boyamboli na biso. Ezali Mobikisi nde akangolaka biso uta na liwa ya nzoto mpe ya molimo.

Maloba ya bule lokola Bomikabi mpe Lisekwa elimbolaka maye Mobikisi asalaki, kolandisa mwango ya Tata, mpo ete tokoka kobika na elikya na bomoi oyo mpe kolonga bomoi ya seko na mokili ekoya.