2022
Biteni—ya Kosungaka Babola mpe Batungisami
Sanza ya zomi na moko 2022


Etinda ya Sanza ya Liahona Sanza ya zomi na moko 2022

Kosungaka Babola mpe Batungisami

Biteni

Elilingi
Mokanda ya nsango ya Oaks

Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka mpe epai na biso lokola bandimi toteyaka mpe tosalelaka eteni monene ya bozali malamu mpe misala ya bosalisi bato epai ya basusu. Ndakisa, tokilaka na mokolo ya yambo ya eyenga ya sanza nyonso mpe tosalisaka lokola libonza ya moko ya bilei na biso tolei te mpo na kosunga baye bazali na bosenga na mangomba na biso moko. Lisusu Eklezia epesaka masalisi minene mpo na bato mpe misala misusu na mokili mobimba.

Kolongola nyonso oyo Eklezia na biso esalaka, misala ebele ya kosalisa bato epai ya bana ya Nzambe na mokili mobimba esalamaka na nzela ya bato mpe mangomba kozalaka na mokangano mbala moko na Eklezia na biso te. …

Eklezia ya Yesu Klisto emipesaka mpo na kosungaka baye bazali na bosenga, mpe emipesaka lisusu mpo na kosalaka elongo na basusu na bokasi wana. …

Emoniseli ya lelo etei ete Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azali “pole ya solo eye engengisaka moto nyonso oyo ayaka na mokili” [Malongi mpe Mayokani 93:2]. Na oyo, bana nyonso ya Nzambe bangengisami mpo na kosalisa Ye mpe moko na mosusu na lolenge ya boyebi mpe bokasi na bango ya malamu koleka. …

… Mingi kati na biso basengeli koyeba bolamu oyo esalami epai ya basusu mpe kosunga yango lokola tozali na ntango mpe makoki ya kosala bongo. …

Natatoli na ntina ya Yesu Klisto, oyo pole mpe Molimo ekambaka bana nyonso ya Nzambe mpo na kosungaka babola mpe batungisami na mokili mobimba.