2022
Mpo na nini Tofutaka Moko na zomi
Sanza ya zomi na mibale 2022


“Mpo na nini Tofutaka Moko na zomi,” Liahona, Sanza ya zomi na mibale 2022.

Etinda ya Sanza ya Liahona , Sanza ya zomi na mibale 2022

Mpo na nini Tofutaka Moko na zomi

Elilingi
makuta ekangama

Bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya basantu ba Mikolo mya Nsuka bapesaka moko na zomi ya lifuta na bango na Eklezia. Oyo ebiangami moko na zomi. Mbongo esungaka mosala ya Eklezia na mokili mobimba.

Moko na zomi Ezali Nini?

Moko ya mitindo ya Nzambe ezali ya kofuta moko na zomi, oyo ezali moko na zomi ya lifuta na biso na Eklezia na Ye. Ntango tofutaka moko na zomi, tolakisaka botondi na biso epai ya Nzambe mpo na mapamboli na biso. Tolakisaka ete tondimelaka Nkolo mpe ete tozali na bolingi ya kotosa Ye na makambo nyonso.

Elilingi
bato bamemi biloko epai ya Melikisedeke lokola bofuti ya moko na zomi.

Melekisedeke—Mobateli Biloko ya ndako, na Clark Kelley Price

Mateya ya Boyokani na Kala

Bato ya Nzambe bafutaki moko na zomi uta na bantango ya Boyokani na Kala. Ndakisa, Abalayama afutaki moko na zomi (tala Genese 14:18–20). Mobeko ya moko na zomi eteyamaki lisusu na baprofeta ya kala, mpe lisusu Mose mpe Malaki (tala Leviticus 27:30–34; Nehemia 10:35–37; Malaki 3:10).

Bozongisi ya Mobeko ya Moko na zomi

Na 1838, Profeta Joseph Smith atunaki Nkolo lolenge nini bandimi ya Eklezia basengelaki kofuta moko na zomi. Eyano ya Nkolo ekomami na kati ya Doctrine et Alliances 119, oyo elobi ete bandimi basengeli kopesa moko na zomi ya milekeli na bango na Eklezia (tala molongo 4). Bakambi ya Eklezia bateyaki ete “litomba” elakisi lifuta

Elilingi
bato bazali kopesana mbote ntango moko azali kolekisa anvelope epai ya mosusu

Foto na Jamie Dale Johnson

Lolenge nini ya Kofuta Moko na zomi

Tokoki kofuta moko na zomi na kokomaka na mokanda ya likabo na interneti na donations.ChurchofJesusChrist.org. To tokoki kokoma na lokasa mpe kopesa mbongo na moko ya bakambi ya episikopo to etape. Mbongo nyonso etindamaka na bilo monene ya Eklezia, epai eye bakambi ya Eklezia (Bokambi ya Yambo, Lisanga likoki ya Bapostolo zomi na mibale, mpe Bokambi monene ya Boepisikopo) basambelaka mpo na koyeba lolenge nini yango ekosalema.

Mapamboli

Nkolo alakaki ete baoyo bafutaka moko na zomi na bango bakopambwama na nzoto mpe na molimo. Moko na zomi epambolaka lisusu bana nyonso ya Nzambe na libaku malamu ya koyekola Ye mpe kokola na nsango malamu.

Elilingi
Tempelo ya Mboka Salt Lake

Lolenge nini Mosolo ya Moko na zomi Esalemaka

Mbongo ya moko na zomi esalelamaka mpo na kotonga Eklezia ya Nkolo na mokili mobimba. Yango esungaka lisusu mpo na kotonga batempelo mpe biloko mosusu ya Eklezia, kobimisa makomi mpe mikanda mosusu, kofuta bakelasi ya Eklezia, kosungaka misala mya lisituale ya libota mpe mya misio.

Esakola ya Moko na zomi

Mbala moko na mobu, bandimi ya Eklezia bakutanaka na episikopo na bango (to mokambi ya etape) mpo na kolobela ye soki bazali bafuti ya moko na zomi mobimba.

Moko na zomi Esungaka na Nini

Elilingi
Tempelo ya Oakland California

Foto ya Tempelo ya Oakland California na Longin Lonczyna Jr.

Elilingi
mikanda ya Buku ya Mormon na nkota ekeseni
Elilingi
ndako ya bosangani