2023
Bokonzi ya Nkembo
Sanza ya Zomi na Moko 2023


Etinda ya Sanza ya Liahona , Sanza ya Mitano 2023

Bokonzi ya Nkembo

Biteni

Elilingi
maloba mosusu

Madagascar

Malongi emonisama ya Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo my Nsuka eteyi ete bana banso ya Nzambe—kolongola bato se moke mpenza ya kotala awa—bakozwa nsuka nsuka libula ya moko ya bokonzi misato ya nkembo, ata mwa moke oyo “eleki bososoli nyonso” [Malongi mpe Mayokani 76:89]. …

Malongi mpe momesano mosusu ya ntina mingi ya Eklezia ezongisama ezali mitindo mpe mayokani emonisama oyo ezali kopesa bana nyonso ya Nzambe libaku ya bule ya kolongobana mpo na ndelo ya likolo ya nkembo kati na bokonzi ya selestiale. Esika wana ya kokende ya likolo mpenza—bonetoli na bokonzi ya selestiale—ezali kobenda likebi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansantu ba Mikolo mya Nsuka. …

… Kati na nkembo ya “selestiale” ezali na biteni misato, oyo kati na yango ya likolo mpenza ezali bonetoli na bokonzi ya selestiale. …

Mwango ya Nzambe, etongami likolo ya bosolo ya seko, esengi ete bonetoli ekoki kozwama kaka na nzela ya bosembo na mayokani ya libala ya seko kati ya mobali mpe mwasi na tempelo esantu, libala oyo nsukansuka ekozala mpo na bato nyonso ya bosembo. …

Bosambisi ya Nsuka ezali kaka te kotalela motuya mobimba ya makambo malamu mpe ya mabe—oyo biso tosali. Ezwami na mbuma ya nsuka ya misala mpe makanisi na biso—oyo biso tokomi. Tolongobanaka mpo na kozwa bomoi ya seko na nzela ya mosala ya mbongwana. …

Mpo na ntina ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye, ntango tokweyaka moke na bomoi oyo, tokoki koyambola mpe kozonga na nzela ya mayokani oyo ekambaka na oyo Tata na biso ya Lola alingi mpo na biso.