2023
Bakufi Bakotelema Liboso ya Nzambe
Sanza ya Zomi na Mibale 2023


“Bakufi Bakotelema liboso ya Nzambe,” Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya zomi na mibale 2023.

Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya Zomi na Mibale 2023

Bakufi Bako telema liboso ya Nzambe

Na emoniseli na ye, Yoane amonaki Lisambisi ya Nsuka.

Elilingi
Yesu Klisto

Azali Koya Lisusu mpo na Kokamba mpe Koyangela, Na Mary Sauer

bakufi, bato minene mpe bato pamba, batelemi liboso ya Nzambe

Nguya ya Bosekwi ya Yesu Klisto ememaka bato banso liboso ya Nzambe mpo ete basambisama (tala Alma 11:42–44; 33:22; 40:21; Elamani 14:15–17; Mormon 9:13–14).

babuku efungwamaki

Babuku oyo ezali komonisa masolo ebombamaki na mabele ya oyo bato basalaki na mabele mpo na kolanda nzela ya boyakani (tala Malongi mpe Mayokani 128:7).

buku ya bomoi

“Na ndimbola moko Buku ya Bomoi ezali motango ya makanisi mpe misala ya moto—lisolo ya bomoi na ye. Kasi, makomi elakisi lisusu ete mokanda moko ya likolo ebombami mpo bato ya sembo, kosangisa bankombo mpe masolo na bango ya misala na bango ya malamu” (Mokambi na Makomi, “Buku ya Bomoi,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org).

basambisama

Lisambisi ya Nsuka ezali koya nsima ya lisekwa ya bato. Yesu Klisto akozala Mosambisi ya moto nyonso. Lisambisi yango nde ekolakisa nkembo ya seko moto moko na moko akozwa. (Tala Mokambi na Makomi, “Lisambisi, ya Nsuka,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; Alma 41:3–5; Malongi mpe Mayokani 88:26–32.)

kolanda misala na bango

Moto moko na moko akosambisama kolandisaka oyo azalaki kosala mpe kolinga (tala Malongi mpe Mayokani 137:9). Bakosambisama na kolanda botosi na bango na mibeko ya Nzambe mpe kolanda soki basalaki na boyakani na pole mpe bosolo nyonso oyo bazwaki na bomoi oyo.