Buku mpe Mbiangi
32. Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Bandimi ya Eklezia


“32. Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Bandimi ya Eklezia,” Buku Monene: Kosala na kati ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka (2020).

“32. Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela ya Bandimi ya Eklezia,” Buku Monene.

Elilingi
bato bazali kosolola

32.

Boyamboli mpe Masanga ya Botaleli Ezalela yaBandimi ya Eklezia

32.0

Boyingisi

Mbala mingi, boyamboli esalamaka katikati ya moto, Nzambe mpe bato oyo batutisamaki na masumu ya moto yango. Nzokande, ntango mosusu, episikopo to mokambi ya likonzi basengeli kosalisa bandimi ya Eklezia na makasi basalaka mpo na koyambola.

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi balakisaka bolingo mpe boboto ntango bazali kosalisa bandimi. Balandaka ndakisa ya Mobikisi oyo azalaki kotombola bato mpe kosunga bango batika masumu mpe babaluka epayi ya ya Nzambe (tala Matai 9:10–13; Yoane 8:3–11).

Lokola emonisami na bokuse na molongo oyo elandi, mokapo oyo ebongisami mpo na kokamba bakambi na nzela bango ya kozwa mikano mpe kosala misala minene basengelikosala mpo na kosunga moto ayambola na lisumu monene mpe mpo na kobatela basusu.

  • Mokumba ya Eklezia mpo na Kosalisa Moto Ayambola Mikapo 32.1–32.4 elimboli malongi ya Nkolo mpo na oyo etali boyamboli mpe bolimbisi. Biteni oyo elimboli lisusu bantina misato ya kotia bopekisi to bolongoli moto na lingomba. Mpe lisusu, elimboli mokumba oyo baepisikopo mpe bakambi ya makonzi na kosalisaka moto na nzela ya boyamboli

  • Koyeba Esika mpe Ntango ya Kosalisa Moto mpo na Koyambola Biteni 32.5–32.7 epesi malakisi mpo na kozwa mokano soki kotalela ezalela ya mondimi na lisanga to kolandela mondimi na toli ezali esika to nzela elongobani ya kosalisa moto mpo na koyambola.

  • Kosalisa na Nzela ya kopesaka Tolii. Eteni 32.8 epesi malakisimpo na oyo etali nzela ya bolandeli na kopesa toli na episikopo to mokambi ya likonzi. Elimboli lisusu bopekisi eyebisami na bato te oyo etiama na ezslels ya mondimi.

  • Kosalisa Masanga ya Botateli Ezalela ya Mondimi ya Eklezia. Biteni 32.9–32.14 elimboli moto oyo azali na mokumba ya kobenga lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi, lolenge nini kokamba yango, mpe mikano ekoki kozwama. Mbano ya mikano miye mpe elimbolami.

  • Bozongisi ya Makoki Makangami na Ezalela ya Mondimi ya Eklezia Biteni 32.15–32.17 elimboli lolenge nini moto akoki komona makoki na ye ya ezalela ya mondimi kozongisama na nzela ya boyamboli.

Longola se elimbolami ndenge mosusu, matangi etali bakambi ya makonzi etali mpe lisusu bakambi ya misio. Matangi na bipisikopo etali mpe lisusu bakambi ya bitape.

Bakambi ya Yambo balimboli mibeko mpe banzela mpo na koyambola uta na lisumu linene. Bakambi y Yambo basungami na Bilo ya Bobateli Mikanda ya Sekele ya Eklezia. Mokambi ya likonzi to episikopo bakoki kobenga bilo oyo mpo na mituna mitali kokamba mosala to mibeko na yango. Bilo oyo ekoki mpe kopesa lisusu malakisi etali lolenge ya kotinda bosenga na bilo ya Bakambi ya Yambo. Banimelo ya kobenga etiami awa na nse:

Telefone: 1-801-240-2053 to 1-800-453-3860, poste 2-2053

Benga ofele (GSD telefone): 855-537-4357

Email: ConfidentialRecords@ChurchofJesusChrist.org


MOKUMBA YA EKLEZIA MPO NA KOSUNGA MOTO AYAMBOLA


32.1

Boyamboli mpe Bolimbisi

Nkolo alobaki ete “eloko moko te ya mbindo ekoki kosangola bokonzi ya lola” (Alma 11:37; tala lisusu 3 Nefi 27:19). Masumu na biso ekomisaka biso mbindoelingi koloba tolongobani te mpo na kotelema liboso ya Tata na biso na Lola. Ezali lisusu ebandeli ya mawa na bomoi oyo.

Mobeko ya boyengebene ya Nzambe esengaka ete lisusmu nyonso emema likama (tala Alma 42:14, 17–18). Nzokande, moango na Ye ya mawa “ekoki koseplisamasengami o ya boyengebene mpe koyamba biso na maboko na ye ya bokengii” (Alma 34:16; tala lisusu Moziya 15:9).

Mpo na kokokisa moango na Ye ya mawa, Tata na biso na Lola atindaki Mwana na ye se moko, Yesu Klisto, komikaba mpo na masumu na biso (tala Alma 42:15). Yesu anyokwamaki na etumbu oyo mobeko ya boyengebene ezalaki kosenga mpo na masumu na biso (tala Malongi mpe Mayokani 19:15–19; tala lisusu Alma 42:24–25). Na nzela ya mbeka oyo, Tata mpe Mwana bango mibale balakisaki bolingo ezanga nsuka epai na biso (tala Yoane 3:16).

Ntango tosalelaka “bondimi oyo epusaka na boyamboli,” Tata na biso na Lola alimbisaka biso, apesaka biso bolimbisi na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto (Alma 34:15; tala lisusu Alma 42:13). Soki topetolami mpe tolimbisami, tokoki, na nsuka, kosangola bokonzi ya Nzambe (tala Yisaya 1:18; Malongi mpe Mayokani 58:42).

Boyamboli ezali mingi koleka kobongola bizaleli. Ezali nde koboya masumu mpe kolanda Tata na biso na Lola mpe Yesu Klisto. Boyamboli ememaka mbongwana ya motema mpe ya molimo (tala Mosiya 5:2; Alma 5:12–14; Elamani 15:7). Na nzela ya boyamboli, tokomaka bato ya sika, oyo bazongisami na boyokani na Nzambe (tala 2 Bakolinti 5:17–18; Mosiya 27:25–26).

Libaku ya ya koyambola ezali moko ya mapamboli manene koleka manso oyo Tata na lola apesi biso na nzela ya likabo ya Mwana na Ye.

32.2

Ntina ya Kotia Bopekisi to ya Bolongoli ya Mondimi na Eklezia

Ntango moto abatisami, akomaka mondimi na “ndako ya Nzambe” (Baefese 2:19). Liyokani ya libatisi ezali na elaka ya komipesa mpo na kobika engebene na mateya mpe mitindo ya Klisto. Ntango moto akweyi, asengeli kosalela bondimi na Yesu Klisto mpe koyambola, na kotalelaka mawa na Ye mpo na kozwa bokasi mpe bolimbisi.

Soki mondimi asali lisumu monene, episikopo to mokambi ya likonzi akosalisa ye ayambola Lokola eteni ya mosala oyo, episikopo to mokambi ya likonzi akoki kotia bopekisi na matomba mosusu ya moto oyo azali mondimi ya Eklezia mpo na ntango moko. Na mabaku mosusu, asengeli kolongola makoki ya kozala mondimi mpo na ntango.

Ntina ya kotia bopekisi to kolongola litomba ya kozala mondimi ezali ya kopesa etumbu te. Nzokande, kosala boye esengeli ntango mosusu mpo na kosunga moto ayambola mpe ayeba kosala mbongwana ya motema. Epesaka lisusu ntango ya komilengela na molimo mpo na kokoma moto ya sika mpe kobatela lisusu mayokani na ye.

Episikopo to mokambi ya likonzi bakokamba bopekisi ya matomba to bolongoli ya mondimi lokola elimbolami na biteni 32.5–32.14. Misala miye etambolaka elongo na masengami ya koyambola. Ntango moto ayamboli solo mpenza, ye azala mwasi to mobali akoki komona matomba ya kozala mondimi ya Eklezia kozongisma na ye lisusu.

Soki esengami kotia bopekisi to kolongola moto lokola mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi bakolanda bofuli ya Molimo Mosantu mpe malakisi kati na mokapo oyo. Bakosala na molimo ya bolingo (tala 32.3).

Kotia bopekisi na matomba ya mondimi ezali mokumba ya eklezia, kasi ya mbulamatari to ya bapesi etumbu te. Etali bobele moto oyo azali mondimi kati na Eklezia. (Tala Malongi mpe Mayokani 134:10.)

Ntina misato ya kotia bopekisi na matomba to kolongola mondimi ezali oyo elandi.

32.2.1.

Kobatela Basusu

Ntina ya yambo ezali ya kobatela basusu. Ntango mosusu, moto akoki kozala mokaneli ya nzoto to ya molimo. Ezaleli ya moto mabe, ya kozokisa bato na nzoto, kokanga mwasi to mobali na makasi, kokangama na mimemseno ya mabe ya komela, moyibi to, bopengwi ezali mwa bandakisa. Na bofuli episikopo to mokambi ya likonzi basalaka mpo na kobatela basusu ntango moto azali likama monene na banzela oyo mpe na banzelamosusu ya mabe (tala Alma 5:59–60).

32.2.2.

Kosalisa Moto Ayingela na Nguya ya Bosikoli ya Yesu Klisto na nzela ya Boyamboli

Ntina ya mibale ezali ya kosalisa moto ayingela na nguya ya bosikoli ya Yesu Klisto na nzela ya boyamboli. Na ntina ya mosala oyo, akokoma peto mpe ya kolongobana mpo na kozwa mapamboli nyonso ya Nzambe.

Mobikisi ateyaki ete “motema ebukana mpe molimo ya mawa” ezali likabo oyo Ye asengaka mpo na bolimbisi ya lisumu (3 Nefi 9:20). Yango esengisi lisusu koyoka motema mpasi ya solo mpo na masumu mpe makama na yango (tala 2 Bakolinti 7:9–10).

Ntango moto asali lisumu monene, bopekisi na ye ya mokumba ya kimondimi to bolongoli ekoki kosunga mpo na boyokisi motema ebukana mpe molimo ya mawa mpo na boyamboli, kotika solo solo lisumu, mpe bososoli ya malandi ya makama ya lisumu. Bososoli oyo ekoki kosunga bato batuya mayokani na bango na Nzambe na mozindo koleka to kobatela mpe koyoka mposa ya kobatela mayokani oyo mpo na ntango nyonso ekoya nsima.

32.2.3.

Kobatela Bosembo ya Eklezia

Ntina ya misato ezali kobatela bosembo ya Eklezia. Ekokki kosengisa kotia bopekisi to kolongola mondimi na Eklezia soki ezaleli to etamboli na ye ezali kobebisa Eklezia makasi (tala Alma 39:11). Bosembo ya Eklezia ebatelami soki moke te soki tozali kobomba to komona mpamba masumu minene—kasi soki tosali mpo na kobongisa yango.

32.3

Mokumba ya Basambisi na Yisalaele

Elilingi
episikopo azali kosolola na moto

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi babiangami mpe batiami mpembeni mpo na kozala basambisi na Yisalaele (tala Malongi mpe Mayokani 107:72–74). Basimbi bafungola ya bonganganzambe mpo na kozwa esika ya Nkolo ntango bazali kosunga bandimi ya Eklezia bayambola (tala Malongi mpe Mayokani 13:1; 107:16–18).

Mbala mingi, baepisikopo mpe bakambi ya makonzi basalisaka bato bayambola na nzela ya kozwana na toli na moto yango. Lisungi oyo ekoki kozala ya kotiaka bopekisi na matomba mosusu ya kozala mondimi ya Eklezia mpo na ntango moko. (Tala 32.8.)

Mpo na masumu masusu ya minene, bakambi basungaka bandimi na koyambola na kosalaka lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi (tala 32.6 mpe 32.9–32.14). Lisungi oyo ekoki kosuka na kotiaka bopekisi na matomba mosusu ya kozala mondimi to kolongola mondimi na Eklezia mpo na ntango moko (tala 32.11.3 mpe 32.11.4).

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi basungaka bandimi ya Eklezia basosola ete Nzambe alingaka bana na Ye. Mpo ete alingi bazala na esengo mpe bazwa mapamboli, amitungisaka makasi mpo na botosi mpe na boyamboli na bango.

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi bazali bato na bolingo mpe bokebi ntango bazali kosunga bandimi bayambola. Mokangano ya Mobikisi na mwasi oyo bakangaki na ekobo ezali ndakisa (tala Yoane 8:3–11). Atako Alobaki te ete masumu na ye elimbisamaki, Apesaki ye mpe etumbu te. Nazokande, Ayebisaki ye “asumuka lisusu te”—elingi koloba ayambola mpe abongola bomoi na ye.

Bakambi oyo bateyaka ete “esengo ezali na lola mpo na mosumuki oyo ayamboli” (Luka 15:7). Bazalaka na bompikiliki, basungaka, mpe boboto. Bafulaka elikya. Bateyaka mpe batatolaka ete na ntina ya libonza ya bomikabi ya Mobikisi, moto nyonso akoki koyambola mpe kokoma peto.

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi balukaka bokambi ya Molimo mpo na koyeba lolenge nini bakoki kosunga moto mpo ete ayambola. Ezali bobele na lolenge ya masumu minene nde Eklezia azali na nguya etali mabongisi elengelami oyo bakambi basengeli kozwa mikano (tala 32.6 mpe 32.11). Maakambo mibale oyo makokana ezalaka te. Kosangana mpo ete bakambi bapesa lisalisi mpe basala mpo ete mondimi ayambola esengeli kozala mosala efulami mpe ya kokesena na moto moko mpe mosusu.

Nkolo ayebi makambo mazingi makoki mpe bokoli ya molimo ya moto na moto. Molimo Mosantu akosunga bakambi basosola lolenge ya kosalisa bandimi basala mbongwana ya ntina mpo ete bakoka kokangola mpe kotelemela masinginya ya kozongela lisumu.

Kosunga moto ete ayambola, azongela lisusu Nzambe, mpe abikisama na nzela ya bosikoli ya Yesu Klisto ezali moko ya baboyebi ya esengo koleka oyo moto asengeli koyoka. Malongi mpe Mayokani 18:10–13 elimboli:

“Bomikundola ete milimo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe;

“Mpo tala, Nkolo, Mosikoli na bino, ayokaki mpasi ya liwa kati na mosuni ; yango wana, ayokaki mpasi ya bolozi mpo na bato nyonso, mpo ete bato nyonso bakoka koyambola mpe baya epayi na ye.

“Mpe lisusu asekwaki uta na bakufi mpo ete akoka komema bato banso baya epayi na ye, mpo na koyanola masengami ya boyamboli.

“Mpe lolenge kani monene ezali bosepeli na ye mpo na molimo oyo ayamboli!”

32.4

Ntubela, Sekele, mpe Kopesa lapole na Bakambi

32,4.1.

Kotubela

Boyamboli esengaka ete masumu etubelama epai ya Tata na biso na lola. Yesu Klisto alobaki, “Na oyo bokoki koyeba soki moto ayamboli masumu na ye : tala, akotubela yango mpe akotika yango libela” (Malongi mpe Mayokani 58:43; tala lisusu Mosiya 26:29).

Ntango bandimi basalaka masumu minene, boyamboli na bango esengaka lisusu kotubela liboso ya episikopo na bango to na mokambi ya likonzi. Ye nde azali na makoki ya kosalela bafungola ya Nsango malamu ya boyamboli na ntina na bango (tala Malongi mpe Mayokani 13:1; 84:26–27; 107:18, 20). Yango esalisaka bango batubeli kobikisama mpe kolanda lisusu nzela ya Nsango malamu na nguya ya bokasi Bomikabi ya Mobikisi.

Ntina ya botubeli ezali ya kolendisa bandimi bamilongola mikumba na ntina ete bazwa bofuluki ya lisungi ya Nkolo mpo ete babongwana mpe babikisama. Kokolisa “motema ebukana mpe molimo ya mawa” esungami na ntubela (2 Nefi 2:7). Botubeli ya moto ye moko elakisi ete moto azali na mposa ya koyambola.

Ntango mondimi atubeli, episikopo to mokambi ya likonzi asengeli kolanda malakisi ya kosanga mpo na toli oyo ezwami kati ya 32.8. Na nzela ya losambo, akambama mpo na koyeba esika to ntango nini elongobani mpo na kosalisa mondimi yango ayambola (tala 32.5). Akomituna soki Lisanga ya bataleli ezalela ya mondimi ekoki kosalisa. Soki mibeko ya Eklezia esengi ete basanga mpo batalela ezalela ya mondimi, nde akolimbola mpo na nini (tala 32.6 mpe 32.10).

Ntango mosusu mondimi asalaki mabe epai ya molongani na ye to epai ya mokolo mosusu. Lokola eteni ya mosala ya boyamboli, esengeli lokola momeseno ete ye atubela masumu na ye epai ya moto oyo mpe kosenga bolimbisi epai na ye. Elenge oyo asali lisumu monene alendisami lokola momeseno koloba yango na baboti na ye.

32.4.2

Masumu Minene Oyo Etubelami te to Oyo Ewanganami

Lokola momesano, episikopo to mokambi ya likonzi ayebaka ete lisumu monene esalemi mingi mingina nzela ya kotubela to na nzela ya moto mosusu. Bakoki mpe lisusu koyeba ye ete lisumu monene esalemi na nzela ya bitinda ya Molimo Mosantu. Soki amiyoki kotindama na Molimo ete moto songolo azali kotungisama na lisumu, akoki kolengela bokutani mpo na kosolola. Na ntango ya lisolo, akokabola makanisi na ye na lolenge ya boboto, mpe botosi. Akosala yango na lolenge ya kofunda te.

Soki mondimi awangani lisumu na ye ya monene na ntango oyo episikopo to mokambi ya likonzi bayebi nsango malamu mpe bazali na bilembo ya bosolo, lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengeli kosalama. Nzokande, mamimisi ya molimo yango moko ekoki te mpo na kosangisa lisanga ya botaleli ezalela (tala Malongi mpe Mayokani 10:37). Mokambi akoki kosangisa nsango ebele soki esengami. Akolanda malakisi kati ya 32.4.3 mpe 32.10.2.

32.4.3.

Kosangisa Nsango

Yambo ya kosangisa lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi bakosangisa bansango mingi koleka lokola basengeli. Oyo epesamaki na mondimi na ntango ya botubeli mbala mingi ekokaka malamu. Mosusu ekoki kowuta na moto ya libota, na mokambi mosusu ya Eklezia, mozwi likama to moto oyo azalaki elongo na ntango ya lisumu.

Na ntango ya kosangisa bansango oyo, episikopo to mokambi ya likonzi asengeli kolanda bobele banzela elongobana na mokambi ya bonganganzambe. Asengeli te kokengela libota ya moto to kokamata nsango ya maloba abombi soki kasengi ye ndingisa te. Asengeli mpe te kosalela mimeseno milongobani na mobeko ya mboka te.

Bokoseli makambo ezali kosalema mpenza te, kasi esalemaka. Bakambi ya bonganganzambe basengeli kozala ekenge ntango bansango moto moko apesi ezali moke to komema na solo mosusu te. Ndakisa, mondimi oyo bafundi mpo na ekobo akoki kowangana. Makomi elimboli ete “likambo nyonso endimama na mabe na ye na banzeneneke mibale ya Eklezia” (Malongi mpe Mayokani 42:80). “Banzeneneke mibale” elingi koloba banzela mibale ya kokesana ebdandeli ya bansango. Banzela oyo ekoki kozala na boyebi moto mpe moango mosusu ya solo. Ntango mosusu, mokambi ya bonganganzambe asengeli kozela kino bansango mosusu ekosangisama.

Ntango mokambi ya Eklezia asangisi bansango mpo na lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi, asengeli mbala moko kotika soki ayoki ete basali ya leta bazali kosala mondimi anketi. Eye esalamaka mpo koboya baloba ete bakambi bazali kokota na makambu ya bazuzi. Na Etazini mpe na Canada, mokambi ya likonzi akoki kobenga Bilo Monene ya Bazuzi soki azali na mposa ya toli na ntina ya likambo oyo:

1-800-453-3860, poste 2-6301

1-801-240-6301

Libanda ya Etazini mpe ya Canada, mokambi ya likonzi akokutana na mokambi ya bazuzi ya bilo ya Etuka Monene.

Mingi mingi, basalaka te Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimimpo na ezaleli oyo esambisami na bilo ya leta to ya bazuzi soki bazuzi bazwi naino te mokano ya nsuka. Na makambu mosusu, bakoki kopusa na mikolo mikoya Lisanga ya kotalela ezalela ntango eleko ya bobengisi esili naino te to bobengisi elongolami naino te.

32.4.4.

Kobomba Sekele

Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi, mpe bapesi toli na bango bazali na mokumba ya bule ya kobomba sekele ya bansango nyonso oyo bayebisi bango. Nsango oyo ekoki koya na lisolo, na toli mpe na bolandeli ya bato, mpe lisusu ya botubeli. Mokumba se moko oyo ya kobomba sekele etaleli moto nyonso oyo akozala na kati ya lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi. Kobomba sekele ezali mama na likambo, mpamba te bandimi bakozala na mposa ya kotubela te to ya koluka bokambi soki oyo bazali kobimisa na mpwasa bato bazali kopanza yango. Kobimisa na mpwasa oyo ezali sekele, ezali koteka elikya bandimi batielaka yo mpe kozangisa bango kotiela bakambi na bango motema.

Engebene na mokumba ya kobomba sekele, episikopo, mokambi ya likonzi to bapesi toli na bango basengeli te kobimisa sekele ya bansango, bobele na makambo oyo elandi:

  • Basengeli kokutana na mokambi moko ya likonzi, mokambi ya misio to episikopo ya moto oyo basengeli kosngana mpo n kotalela ezalela ya bondimi to na ntina ya makambo etali ye Mokambi ya likonzi akoki lisusu kokutana na Ntuku Nsambo ya Etuka eneneatindami mpo na ye. Soki esengeli, Ntuku Nsambo akotinda mokambi ya likonzi na Bokambi ya Etuka enene. Bobele mokambi ya likonzi azwaka mokano soki lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengeli kosalema mpe koloba nini ezali nsuka na yango.

  • Moto akei na palwasi mosusu (to mokambi ya bonganganzambe balongoli ye) na ntango oyo mikano etali mokumba ya mondimi to makambo mosusu ya minene naino esili te. Na makambo eya boye, mokambi akolobela yango na episikopo to mokambi ya likonzi ya sika (tala 32.14.7). Akoyebisa lisusu mokambi soki mondimi azali mokaneli mpo basusu.

  • Episikopo to mokambi ya likonzi soki ayoki ete mondimi ya Eklezia azali kofanda libanda ya ndelo ya palwasi to likonzi na ye atangamaki ntango mosusu kati ya lisumu monene. Na likambo ya boye, akokutana ye moko na episikopo ya mondimi oyo.

  • Esengeli kobimisa bansango nyonso na ntango lisanga esangani mpo na kotalela ezalela ya mondimi. Bansango nyonso oyo esangisami mpe ekoabolami na lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengeli kozala sekele.

  • Mondimi ye moko akopona kopesa ndingisa na mokambi akabola bansango epai ya bato oyo basengeli. Bakoki kozala baboti, bakambi ya Eklezia mpe bato mosusu oyo bakoki kosunga. Mokambi akokabola te bansango koleka oyo mondimi apesi ndingisa.

  • Ekoki komonisama malamu kopesa mosusu engebene na ekateli ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi(tala 32.12.2).

Na makambu nyonso misusu, mokambi asengeli kotalela mokapo 32.4.5. Makambo esengeli kokota awa ntango mobeko epesaka mabe, lokola konyokola mwana, eyebisama na na bakambi ya leta.

Mpo na kosunga bakambi na koabatelaka bato mpe kotosaka mobeko, Eklezia epesi lisungi ya basali balongobani. Mpo na kozwa yango, bakambi bakosenga na lombango lisungi na telefone na oyo etali misala, esika yango esengami (tala 32.4.5 mpe 38.6.2.1). Esika eye esengami te, mokambi ya likonzi akokutana na bakambi ya bazuzi ya bilo ya etuka enene.

Na likambo bobele moko oyo nde esengeli episikopo to mokambo ya likonzi kobimisa sekele na kozangaka koluka kozwa yambo bokambi ya lolenge oyo. Oyo ezali ntango ya kobimisa likambo esengelimpo na kopekisa makama ya kobebisa bomoi toya kozokisa makasi mpe ntango ezali te mpo na koluka kozwa malakisi. Na makambo ya lolenge wana, mokumba ya kobatela basusu ezali ntina koleka ya kobatela sekele. Bakambi basengeli na lombango kobenga bakambi ya leta.

Soki bakambi babateli mikanda to basololaka bango na bango na nzela ya Interneti, bango bakobatela banzela ya koyingela na bansango oyo. Bakolongola to bakobebisa nsango ntango bazali na mposa na yango te. Bakokabola nsango ya bato mpamba mpamba te.

Bakambi ya leta bakoki kobundisa mibeko ya bobateli sekele miye misengisami na mokambi ya bonganganzambe. Soki yango esalami na Etazini to na Canada, mokambi ya likonzi akoki kokutana na Bilo ya Bopesi Toli ya Mokambi Monene ya Bazuzi ya Eklezia:

1-800-453-3860, poste 2-6301

1-801-240-6301

Libanda ya Etazini mpe ya Canada, mokambi ya likonzi akokutana na mokambi ya bazuzi ya bilo ya enterejion.

32.4.5.

Kofunda na Bakambi ya Leta

Bato mosusu bayambolaka nsima ya kobuka mibeko ya leta to ya bazuzi. Na makambo mosusu, bakambi ya leta bayebaka makambo yango te. Baepisikopo mpe bakambi ya makonzi balendisaka bandimi batosa mibeko mpe kofunda makambo ya boye ntango esengeli. Bakambi bazwanaka na toli na bandimi mpo na kozwa zuzi molobeli ntango ya kofunda makambo ya boye. Nzela ya kolanda mpo na Eklezia ezalaka ntango nyonso ya kotosa mobeko.

Na bisika mingi, bakambi ya bonganganzambe batindami na mobeko ya kolobela bizaleli mosusu ya mabe oyo bango bayebi. Ndakisa, Bamboka mpe bikolo mosusu esengaka ete bafundaka mabe ya minyoko na bana efundama na mpwasa na bakambi ya mibeko.

Na bikolo mosusu, Eklezia esili kotia nimelo ya kobenga na nzela ya nsinga mpo na kosalisa mpe kosunga baepisikopo mpe bakambi ya makonzi. Bakambi oyo basengeli kobenga na lombango nimelo ya lisungi ntango nyonso soki moto akutani—to azali na likama (tala 38.6.2.1). Nimelo ya kobenga oyo esalaka ngonga 24 na 24 na mokolo; mpe mikolo 7 na poso moko.

Na bikolo oyo ezali na nimelo ya lisungi te, episikopo oyo bayebisi ye likambo songolo oyo etali minyoko to makambo mabe asengeli kokutana na mokambi na ye ya likonzi, akosenga azwa malakisi uta na bilo ya bakambi ya etuka enene mpo na kozwatoli to bokambi.

Mpo na kozwa bansango mingi koleka na ntina ya koyebisa to kofunda mabe to minyoko, tala 38.6.2.1 mpe 38.6.2.7.


MABONGISI YA KOTALELA MPO NA KOSALISA MOTO AYAMBOLA


32.5

Mabongisi mpo na Kosalisa Moto Ayambola

Ntango ayebi ete mondimi asali lisumu monene, episikopo to mokambi ya likonzi akozwa mikano mpo na kobatela basusu. Akoluka lisusu bokambi ya Molimo Mosantu mpo na koyebamakambo ya nzinga nzinga mpo ya kosunga moto oyo ayambola mpe apusana pene ya Mobikisi.

32.5.1.

Mobimba ya Makambo ya Kotalela

Etando oyo elandi ezali na mabongisi misato oyo esungi moto ayambola. Ezali kopesa na bokuse makambo mosusu bakambi basengeli kotalelantango ya kozwa mokano ya esika mpe ntango ya kosalela.

Makambo ya Kotalela mpo na Kosunga Moto Ayambola

Makambo ya Kotalela

Mabongisi ya Kotalela (tala lisusu 32.7)

Makambo ya Kotalela

Lisanga ya Bakambi Bataleli Ezalela ya Mondimi na Likonzi

Mabongisi ya Kotalela (tala lisusu 32.7)

  • Mpo na bandimi oyo bazwa dotasio ya tempelo

  • Ezali ntina koleka ete balongola ezalela ya mondimi na mobali to mwasi azwa dotasio mpo na ntina ya masumu manene to makambu ya mabe etangami na 32.6.1, 32.6.2, to 32.6.3.

Makambo ya Kotalela

Lisanga ya Bakambi ya Kotalela Ezalela ya Mondimi na na Palwasi

Mabongisi ya Kotalela (tala lisusu 32.7)

  • Mpo na mondimi nyonso

  • Esengmi mpo na masumu manene elobelami na 32.6.1.

  • Ekoki kozala ntina koleka mpo na masumu mpe mbeba minene oyo elobelami na mikapo 32.6.2 mpe 32.6.3.

  • Ezali ya kokoka te soki mobali to mwasi oyo azwa dotasio bakoka kolongola ezalela ya mondimi mpo na ntina ya masumu to mabe manene elobelami na 32.6.1, 32.6.2, to 32.6.3.

Makambo ya Kotalela

Kolandela Moto na Toli (tala 32.8)

Mabongisi ya Kotalela (tala lisusu 32.7)

  • Mpo na mondimi nyonso

  • Ekoki kozala na bopekisi oyo etiami na ezalela ya mondimi na Eklezia.

  • Ekoki kozala ya kokoka te mpo na masumu to mabe manene mpo na maye lisanga ya bakambi mpo na kotalela ezalela mondimi ekopesa mosala ya koyambola (tala 32.6.2 mpe 32.6.3).

  • Ezali ya kokoka te mpo na masumu mpe mabe manene oyo esengaka lisanga ya batali ezalela ya mondimi (tala 32.6.1).

  • Ezali ya kokoka te soki mobali to mwasi oyo azwa dotasio akoka kobungisa ezaleli n ye ya mondimi mpo na ntina ya masumu to mabe manene elobelami na 32.6.1, 32.6.2, to 32.6.3.

Kolandeli mondimi na toli mpe kotia bopekisi na ezalela ya mondimi na episikopo to mokambi ya likonzi ekokaka ntango mosusu te mpo na kosunga moto ayambola masumu minene. Nkolo atiaki lisanga ya bakambi ya kotalela ezalela ya mondimi mpo na kosunga basambisi ya Yisalaele na makambo ya boye. (Tala Esode 18:12–27; Mosiya 26:29–36; Malongi mpe Mayokani 42:80–83102.) Mpo na masumu mosusu ya minene, mibeko ya Eklezia esengaka lisanga ya bataleli ezaleli ya mondimi kosanga (tala 32.6.1). Lotomo ya kosangisa bataleli ya ezalela ya mondimi esengisamaka na lolenge ya kobakisa soki mondimi abuki mobeko ya mayokani ya tempelo (tala 32.7.4).

Na palwasi, bapesi toli ya episikopo basungaka mpo na kosala lisanga ya kotala ezalela ya mondimi. Na likonzi, bapesi toli ya mokambi ya likonzi nde basungaka mpe. Na masanga masusu ya botaleli ezalela ya mondimi kati na makonzi lisanga linene ekozala mpe wana (tala 32.9.2). Na ntango ya misala ya lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi bakosolola na moto yango na molimo ya bolingo.

32.5.2

Kotia mabongisi etali Esika mpe Ntango

Ntango ya kozwa mokano soki libongisi nini ekosalisa malamu koleka nyonso mpo na kosunga moto ayambola, bakambi bakoluka bokambi ya Molimo Mosantu. Basengeli lisusu kotalela makambo maye malandi:

  • Bonene ya lisumu mpe mibeko ya Eklezia elobeli nini soki lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi esengeli kosalema to te (tala 32.6)

  • Mabku mazingi moto yango (tala 32.7)

Episikopo akosanga na mokambi ya likonzi na ntina ya likambo yoko songolo. Asengeli kozwa bondimami ya mokambi ya likonzi yambo asangisa lisanga ya botaleli ezaleli ya mondimi.

Mpo na makambo ya mpasi, mokambi ya likonzi akosenga toli na moko ya Bantuku Nsambo ya Etuka enene wapi ye azwami. Mokambi ya likonzi akosangana na bakambi ya etuka enene oyo atindami mpo na ye mpo na makambo matangami na 32.6.3. Nzokande, kaka mokambi ya likonzi nde azwaka mokano mpo na oyo etali kosangana ya lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi mpo na kosolola likambo. Soki lisanga esalemi, mokambi ya likonzi to episikopo bakozwa mokano na oyo esengeli kosalama.

Soki episikopo to mokambi ya likonzi bazwi mokano ete bkolandela mondimi na toli ekoki, akolandela malakisi na 32.8. Soki azwi mokano ete esengeli kosangisa lisanga ya bateli ezalela ya mondimi, to soki mibeko ya Eklezia esengi kosangisa liyangani, moto oyo azali kokamba yango akolanda malakisi ya kolanda na 32.9–32.14.

Yambo ya kosangisa lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi bakoki kozwa mokano ete kotia bopekisi eyebani na banso te na mondimi ekozala mokano malamu koleka nyonso ya ntango. Akosangisa lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi ntango elongobani na boyamboli ya solo solo ya mondimi. Nzokande, asengeli te kozelisa liyangani soki esengeli mpo na kobatela basusu.

32.6

Bonene ya Lisumu mpe Mobeko ya Eklezia

Bonene ya lisumu ezali likambo ya ntina ya kotalaka mpo na koyeba mabongisi nini (1) ekobatela basusu mpe (2) ekosunga moto ayambola. Nkolo alobaki ete akoki te “Akoki te kotala lisumu ata na ndambu moke ya ndingisa” (Malongi mpe Mayokani 1:31; tala lisusu Mosiya 26:29). Basali na Ye basengeli te kotala mpamba bosolo ya limusu monene.

Masumu manene masalemi na nk mpe ezali botuki monene mpe ya ntina na mibeko ya Nzambe. Milongo ya masumu manene ezali oyo elandi.

  • Makambo mpe misala ya makasi mpe ya mabe (tala 32.6.1.1 mpe 32.6.2.1)

  • Makambo ya nsoni (tala 32.6.1.2 mpe 32.6.2.2)

  • Misala ya lokuta mpe moyibi (tala 32.6.1.3 mpe 32.6.2.3)

  • Bobuki mobeko no kozangisaka elikya (tala 32.6.1.4 mpe 32.6.2.4)

  • Bikela mpe makambo mosusu (tala 32.6.1.5 mpe 32.6.2.5)

Biteni oyo elandi bilimboli makambo ntango nini lisanga ya botaleli ezalela ya modimi esengisami, ntango nini esengeli kosalema, mpe ntango nini esengeli kosalema te.

32.6.1.

Ntango Lisanga ya Botaleli Ezalela ya Mondimi Esengisami

Episikopo to mokambi ya likonzi basengeli kosangisa lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi ntango bansango elakisi ete mondimi asalaki moko ya masumu oyo etangami na kati ya eteni oyo. Mpo na masumu oyo, lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi eengisami na kozanga kotala ndelo ya bokoli na molimo to bososoli ya nsango malamu ya mondimi.

Tala 32.11 mpo na koyeba nini ekoki kozala mbano ya masanga ya kotalela ezalela ya mondimi mpo na masumu oyo etangami na kati ya eteni oyo. Kotia bopekisi eyebisami na banso te na mondimi ezali yoko nzela ya kopona te mpo na kosangisa lisanga oyo oyo.

32.6.1.1

Makambo mpe misala ya makasi mpe ya mabe

Koboma Lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi esengisami soki mondimi abomi moto. Lokola esalami awa, koboma elakisi kolongola bomoi ya moto na nko mpe kozangaka ntina. Kolongola Ezalela ya Mondimi ya Eklezia na moto esengisami.

Kobma etali te misala ya koboma oyo esalami na bapolisi to basoda.na kolandaka mosala na bango. Bolongoli zemi elimbolami te lokola bobomi na likambo oyo. Soki liwa esalamaki lokola likama to na kolukaka komibatela to kobatel basusu, na bolingi ya komibatela to kobatela basusu, likambo ya kolongola bomoi ya moto ekoki kozala to te bobomi. Yango ezali mpe solo na makambo mosusu, ndakisa lokola ntango moto azali na makoki moke ya ya mayele.

Kozwa mwasi na makasi. Lisanga ya botaleli ezalela ya modimi esengeli kosalema na likambo ya kokanga mwasi to mobali na makasi. Lokola esalemi awa, kozwa mwasi na makasi elimboli bosangisi nzoto ezanga kondima ya moto to bosangisi nzoto na moto oyo akoki te mpo ete azali na mayele to makasi ya nzoto ya kokoka te. Lokola esalemi awa, kozwa mwasi na makasi elingi te koloba bosangisi nzoto na bondimi ya bana mike oyo kani mibu ekokokana.

Kopesama etumbu mpo kobundisa na ntina ya kosangisa nzoto na mwasi to mobali. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali ntina soki mondimi apesami etumbu mpo na motungisi ya bosangisi nzoto.

Bobebisi Mwana to Elenge Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali ntina soki moto amipesi na misala oyo epekisami mpo na mwana to elenge lokola elimbolami na 38.6.2.3.

Misala Epekisami mpo na Molongani na Ye to Mokolo Mosusu Motango ya bonene ya misala ekesenaka. Tala 38.6.2.4 ekosunga bino boyeba ntango nini Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali ntina.

Ezaleli ya Moto Mabe Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi ezali ntina soki mokolo atuki bato mbala na mbala na mabe ya ezaleli na ye mpe esali ete ekoma likama mpo na basusu.

32.6.1.2

Mposa ya Bosangisi Nzoto

Bosangisi nzoto na ndeko ya libota. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali ntina mpo na bosangisi nzoto na ndeko ya libota lokola yango elimbolami kati ya 38.6.10. Bolongoli mokumba ya mondimi na Eklezia ezali kaka ntina.

Bosangisi Nzoto na mwana. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali soki moto asalelaka bosangisi nzoto na mwana lokola yango elimbolami na 38.6.6.

Libala ya basi to mibali ebele. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali ntina soki moto abali na nko basi to mibali ebele. Mabala mosusu esalamaka na nkuku, molongani ayebi te ete basi to mibali misusu bazali. Bolongoli mokumba ya mondimi ezali ntina soki moto asali na nko libala na basi to mibali ebele.

Ezaleli ya Moto Mabe Mosangisi nzoto. Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi ezali ntina soki mokolo abebisi na bosangisi nzoto bato na lolenge ya mbala na mbala mpe amonisami kozala likama mpo na basusu

32.6.1.3

Misala ya lokuta mpe moyibi

Ezaleli ya moyibi mosolo. Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi ezali ntina soki mokolo ayebani mpo na koyibaka mosolo na bato na lolenge ya mbala na mbala mpe na nko mpe amonisami kozala likama mpo na basusu (tala 38.6.2.4). Yango ezali koyiba engebene na esika mpe misala ekokana. Bobungisi mosolo na lolenge eyebani te mpo na mpiaka ya mosolo yango ezali moyibi te. Soki nungunungu ezali bakambi ya bonganganzambe bakoki kozwa mokano ya koyoka bosolo ya nsuka. Tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki kati ya boyibi mosolo to biloko ya Eklezia.

32.6.1.4

Bobebisi Elikia

Lisumu Monene ya Moto oyo Azali na LIbiangi na Eklezia. Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya moto ezali ntina soki mondimi oyo azali na libiangi na Eklezia asali lisumu monene. Mabiangi yango ezali: Mokambi monene, moyangeli monene ya Eklezia, moko ya bantuku nsambo ya enterejion, mokambi to mwasi mokambi ya tempelo, mokambi ya misio to mwasi na ye, mokambi ya likonzi, nkoko to episikopo. Yango ezali mpo na bakambi ya bitape te. Na yango mibeko oyo etiami na mokumba na bango ya bandimi ekoki kozala na ndelo to kolongolama kaka lokola bandimi mosusu.

32.6.1.5

Makambo ya Misala Mosusu

Etumbu mpo na Mbeba. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezali ntina na makambo ebele etali etumbu ya mbeba.

32.6.2

Ntango Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina

Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi ekoki kozala ntina na makombo lokola.

32.6.2.1

Misala mpe bisaleli mabe

Nkolo atindaki, “Oko … boma, te mpe okosala eloko songolo ya lolenge wana mpe te” (Malongi mpe Mayokani 59:6; italiki ebakisami). Misala mpe bisalelo ya mabe oyo esengaka ete Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezala ntina ezali (kasi esukisi te na oyo etalisami na maye malandi.

Likambo ya Koboma Komeka koboma moto na nko.

Misala ya Bosangisi Nzoto, mpe Lisusu Motungisi mpe Kobimisa Mobulu Misala ya bosangisi nzoto esalamaka na ndenge ebele koleka (tala 38.6.18). Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekoki kozala ntina ntango moto atungisi to atie bondongwani kati ya moto na bosangisi nzoto. Lisanga ya kotalela ezalela emonisami kozala ntina mpo na kosunga mondimi ayambola soki abukaki mayokani ya tempelo to soki asumukaki mbala na mbala. Tala 38.6.18.3 ntango nini Lisanga ya kotalela ezalela ezali ntina.

Misala Epekisami mpo na Molongani na Ye to Mokolo Mosusu Ezali na makambo ekesena ebele etali bizaleli (tala 38.6.2.4). Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekoki kozala ntina ntango moto amipesi na misala oyo epekisami kosala na molongani na ye to na mokolo mosusu. Lisanga ya kotalela ezalela emonisami kozala ntina mpo na kosunga mondimi ayambola soki abukaki mayokani ya tempelo to soki asumukaki mbala na mbala. Tala 38.6.2.4 ntango nini Lisanga ya kotalela ezalela ezali ntina.

32.6.2.2

Mposa ya Bosangisi Nzoto

Mobeko ya Nkolo oyo etali bopeto ya nzoto elobeli komipimela bosangisi nzoto libanda ya libala ya mobali mpe mwasi engebene na mobeko ya Nzambe (tala Esode 20:14; Malongi mpe Mayokani 63:16). Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekoki kozala ntina mpo na mposa ya bosangisi nzoto lokola elimbolami na 38.6.5. Na makambo ya boye, Lisanga ya kotalela ezalela ekoki kosalama mpo na kosunga mondimi ayambola soki abukaki mayokani ya tempeIo to soki asumukaki mbala na mbala. Tala 32.6.1.2 ntango nini Lisanga ya kotalela ezalela ezali ntina.

32.6.2.3

Misala ya lokuta mpe moyibi

Mitindo zomi etei, “Okoyiba te” to “mpe okokosela moninga makambu te” (Esode 20:15–16). Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekoki kozala ntina na likambo etali moyibi, kozwa eloko na nko, boyibi, lokuta mpe ya moyibi. Tala 38.8.2 mpo na mokangano ya moyibi. Na makambo ya boye, Lisanga ya kotalela ezalela ekoki kosalama mpo na kosunga mondimi ayambola soki abukaki mayokani ya tempeIo to soki asumukaki mbala na mbala.

Tala 38.8.2 mpo na mokangano ya moyibi. Tala 32.6.1.3 ntango nini Lisanga ya kotalela ezalela esengelami mpo na misala ya boyibi. Tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki kati ya boyibi mosolo to biloko ya Eklezia.

32.6.2.4

Bobebisi Elikya

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekoki kozala ntina soki mondimi:

  • Asali lisumu monene ntango azali na libiangi ya bokambi to monene na Eklezia to na lingomba ya bato.

  • Asali lisumu monene na mosala ya leta.

Na makambo ya boye, Lisanga ya kotalela ezalela ekoki kosalama mpo na kosunga mondimi ayambola soki abukaki mayokani ya tempeIo to soki asumukaki mbala na mbala.

Tala 32.6.1.4 ntango nini Lisanga ya kotalela ezalela ezali ntina. Tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki kati ya boyibi mosolo to biloko ya Eklezia.

32.6.2.5

Makambo ya Misala Mosusu

Mokonzi Benjamin ateyaki ete : « nakoki te kolobela bino makambo nyonso na yango bokoki kosala masumu; mpo ezali nzela mpe mitindo lolenge na lolenge, kutu boye mingi ete nakoki te kotanga yango” (Mosiah 4:29). Lisanga ya kotalela ezalela ekoki kozala ntina soki moto:

  • Akobi kosala masumu minene (tala Malongi mpe Mayokani 82:7).

  • Atiki na nko mikumba na ye ya libota, lokola kofuta mbongo ya biloko ya kolia ya bana.

  • Azali kotungisa na nzoto, ezala na bomoto to na nzela ya media (tala 32.2.1).

  • Azali koteka lopipi na bozangi ndingisa.

  • Asalaka makambo misusu ya mabe koleka.

Na makambo ya boye, Lisanga ya kotalela ezalela ekoki kosalama mpo na kosunga mondimi ayambola soki abukaki mayokani ya tempeIo to soki asumukaki mbala na mbala.

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekoki kozala ntina soki mondimi alongoli zemi, asali yango, alengeli yango, afuti mbongo to ye nde alingi elongwa. Tala 38.6.1 mpo na bokambi.

Soki Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Esengami to Ntango Mosusu Ntina

Lolenge ya Lisumu

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ezali Ntina (tala 32.6.1)

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina (tala 32.6.2)

Lolenge ya Lisumu

Misala mpe bisaleli mabe

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ezali Ntina (tala 32.6.1)

  • Koboboma

  • Bobebisi

  • Etumbu ya mposa ya bosangisi nzoto

  • Misala ya botungisi mwana to elenge

  • Ezaleli ya moto mabe

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina (tala 32.6.2)

  • Bomeki koboma

  • Misala ya bosangisi nzoto, lokola motungisi mpe botiei mobulu (tala 38.6.18 ntango Lisanga ya kotalela ezalela esengelami)

  • Misala oyo epekisi ya molongani na ye to mokolo mosusu (tala 38.6.2.4 ntango Lisanga ya kotalela ezalela esengelami)

Lolenge ya Lisumu

Mposa ya Bosangisi Nzoto

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ezali Ntina (tala 32.6.1)

  • Bosangisi nzoto na ndeko ya libota

  • Kosangisa nzoto na mwana moke

  • Kobala basi to mibali ebele

  • Ezaleli ya mosangisi nzoto

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina (tala 32.6.2)

  • Kimakangu, bosangani, mpe kimoninga ya lolenge mabe, libala ya bato ya lolenge moko, mpe mikangano nyonso oyo esalemaka libanda ya libala oyo elongobani ya mobali mpe mwasi, mpe lisusu bosaleli bosangisi nzoto na entereneti mpe na telefone.

  • Kimakangu, bosangani, mpe kimoninga ya lolenge mabe, libala ya bato ya lolenge moko

  • Bosaleli makasi ya bilili ya mabe oyo ekoki kobebisa libala makasi to libota ya mondimi.

Lolenge ya Lisumu

Misala ya lokuta mpe moyibi

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ezali Ntina (tala 32.6.1)

  • Ezaleli boyibi mosolo, lokola moyibi mpe lokuta mpe bizaleli oyo ekokani na oyo (tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki kati ya boyibi misolo to biloko ya Eklezia)

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina (tala 32.6.2)

  • Moyibi, boyibi, koyiba, to lokuta (tala 32.6.3.3 soki mondimi atangamaki na kati ya boyibi misolo to biloko ya Eklezia)

  • Bowangani

Lolenge ya Lisumu

Bobebisi Elikia

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ezali Ntina (tala 32.6.1)

  • Lisumu monene ya moto oyo azali na libiangi monene na kati ya Eklezia

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina (tala 32.6.2)

  • Lisumu monene ya moto oyo azali na libiangi ya bokambi to ya elikia kati ya Eklezia to kati ya lingomba ya bato (tala 32.6.3.3 soki moto atangamaki na kati ya boyibi misolo to biloko ya Eklezia)

  • Lisumu monene oyo eyebani na bato

Lolenge ya Lisumu

Makambo ya Misala Mosusu

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ezali Ntina (tala 32.6.1)

  • Etumbu ya mbeba

Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi Ekoki Kozala Ntina (tala 32.6.2)

  • Bolongoli zemi (longola se oyo etangami te na 38.6.1 elengalami)

  • Ndakisa ya masumu minene

  • Bosundoli na nko mikumba ya libota, lokola boboi kofuta mboli ya bilei ya bana.

  • Boteki ya lopipi na lolenge elongobana te

  • Misala misusu ya mbeba minene

32.6.3

Ntango Mokambi ya Likonzi asololi na Bakambi ya Etuka na ntina ya soki Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya mondimi to Mosala mosusu Ezali Ntina

Makambo misusu esengeli kosalama na bokebi mingi mpe bofuli. Mpo na koyeba lolenge nini kosunga malamu, mokambi ya likonzi asengeli kokutana na bokambi ya enterejion na ntina ya makambo oyo elimbolami na kati ya mokapo oyo. Nzokande, kaka mokambi ya likonzi nde azwaka mokano mpo na oyo etali kosangana ya lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi mpo na kosolola likambo. Soki ezali bongo, mokambi ya likonzi to episikopo bakozwa mokano na oyo esengeli kosalama.

Soki esalami mpo na moko ya makambo oyo elimbolami na kati ya mokapo oyo, ekateli ya Lisanga ya kotalela ezalela esengeli kozala “etali mondimi ye moko,” “bopekisi ya bakambi na ntina ya mokumba ya mondimi,” to “bolongoli mokumba ya mondimi Bondimami.” Bondimami ya Bokambi ya Yambo ezali ntina mpo na kolongola bopekisi ya bakambi to kozongisa moto kati ya Eklezia (tala 32.16.1, nimelo 9).

32.6.3.1

Mikano Mosusu

Soki Lisanga ya kotalela ezalela ya mndimi esalami te, mikano mosusu ezali ya:

  • Bopekisi bakambi te na ntina ya mondimi(tala 32.8.3).

  • Nsango elimbolami na mokanda ya mondimi (tala 32.14.5).

  • Bopekisi etali mikanda oyo epekisi moto to bosaleli ya bonganganzambe, to kozwa to, kosalela motindo mpo na tempelo.

Mokambi ya likonzi akosolola na bokambi ya enterejion yambo ya kozwa moko ya mokano oyo.

32.6.3.2

Bopengwi

Makambo etali bopengwi mbala mingi ekesenaka engebene na bandelo ya palwasi to likonzi. Esengeli kosilisa yango na lombango mpo na kobatela basusu.

Episikopo akokutana na mokambi ya likonzi soki amoni ete misala ya mondimi emonisami kozala ya bopengwi. Episikopo to mokambi ya likonzi bakotia bopekisi ya bozangi bokambi na mokumba na ye ya mondimi (tala 32.8.3). Mokambi ya likonzi akokutana na lombango na Bakambi ya Enterejion. Na yango, bango moko bakozwa ekateli soki Lisanga ya kotalela ezalela to mokano mosusu ekoki kozala ntina.

Lokola elimbolami awa, liloba bopengwi elimboli lolenge mondimi azali kosalela makambo maye malandi:

  • Koboya Eklezia na misu ya bato, na malongi na yango, na mibeko na yango to na bakambi na yango na lolenge ya momesano, na polele mpe na nko.

  • Azali kokoba koteya malongi ya Eklezia lolenge ezali te, nzoka episikopo to mokambi ya likonzi basi balobelaki ye abongisa.

  • Azali kokoba kolembisa na nko bondimi mpe bompikiliki ya bandimi ya Eklezia.

  • Azali kokoba kolanda mateya ya mbinzambinzambi ya bapengwi, nzoka episikopo to mokambi ya likonzi basi balobelaki ye abongisa.

  • Akoti na Eklezia mosusu mpe awangani mateya na ye. (Kozala na molende te na Eklezia to kokende na mayangani ya Eklezia mosusu ezali likambo ya bopengwi te. Na yango, soki mondimi akomi mondimi ya Eklezia mosusu mpe akumisi mateya na yango, esengeli kolongola mokumba na ye ya mondimi.)

Mobikisi ateyaki Banefite ete basengelaki kokoba kosunga moto oyo asumukaki. “Kasi soki ayamboli te, akotangama te kati ya bato na ngai, na ntina te ete abebisa bato na ngai” (3 Nefi 18:31).

32.6.3.3

Koyiba Misolo ya Eklezia

Soki moto ayibi misolo ya Eklezia to ayibi biloko ya motuya ya Eklezia, mokambi ya likonzi akokutana na bakambi ya enterejion mpo na kozwa mokano soki Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimito mikano mosusu esengeli kozwama. Bakambi basengeli koyeba:

  • Motuya oyo eyibami to ebombami.

  • Soki ezali likambo ya solo to ya momesano.

  • Yambo ya bozongisi to te ya mosolo.

  • Motango ya boyoki mpasi ya moto.

  • Libiangi ya mondimi na Eklezia (tala 32.6.1.4 mpo na monindimi oyo azali na libiangi monene na Eklezia).

Mokambi ya likonzi akolobela moko ya makambo maye malandi kati ya esalelo ya Leader and Clerk Resources:

  • Biyano ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi

  • Soki asololi na bakambi ya enterejion mpe azwi ekateli ete Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiezalaki ntina te.

Soki bilo ya bolandeli misolo ya Eklezia elobi ete mokambi to mosali ya Eklezia ayibaki misolo to biloko ya Eklezia, Bakambi ya Yambo basengaka mingimingi ete mokanda na ye ya kimondimi ekomama. Liloba “Mokambi” elimboli moto oyo azali na mokumba monene na kati ya Eklezia, lolenge moko mpe na bapesi toli, bakalaki mpe bakambi ya bitape. Ntango boyamboli ekokisami, mokambi ya likonzi akoki kosenga bolongoli ya makomi oyo ekomamaki na mokanda ya kimondimi (tala 32.14.5 mpe 34.7.5). Bokomi likolo ya mokanda ya kimondimi elingi koloba te ete Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimito mokano songolo ezwamaki.

32.6.3.4

Bapede mpe Balezibiene

Baepisikopo mpe bakambi ya likonzi oyo azali kosala na bato oyo bazali komonana lokola bapede mpe balezibiene basengeli kolanda bokambi ya mokapo 38.6.23.

32.6.4

Ntango Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya mondimi Ezali Mpenza na Ntina te

Lisanga ya bosambisa ezali ntina te na makambo maye malandi.

32.6.4.1

Bozangi Botosi ya Mibeko Mosusu ya Eklezia

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiekosalama te soki mondimi azali moko ya makambo maye etangami kati ya bandakisa oyo elandi. Longola nse oyo ya nsuka.

  • Kozala na molende te na Eklezia

  • Kokokisa te mikumba na ye na Eklezia

  • Kofuta te moko na zomi

  • Masumu ya bozangi koyeba

  • Bosepelisi eloko ya kimobali to ya kibomwasi

  • Bozangi kotosa Liloba ya Bwanya

  • Kotala bilili ya bosoto, longola se bosangisi nzoto na mwana (lokola elimbolami na mokapo 38.6.6) to ya bosaleli mbala na mbala to ya lotomo bilili ya bosoto oyo ebebisi mpenza libala to libota ya moto (lokola elimbolami na mokapo 38.6.13).

32.6.4.2

Bokwei to Bozangi Kofuta Banyongo

Bakambi basengeli te kosangisa lisanga ya Eklezia mpo na kobongisa makambo etali mombongo. Bokwei mpe bozangi kofuta banyongo elakisi te liyangani ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi. Na yango, Lisanga ya kotalela ezalela esengeli kosalama soki misala ya moyibi mpe lokuta makasi to bisaleli mosusu etali misolo oyo endimami te (tala mokapo (tala 32.6.1.3).

32.6.4.3

Bondongwani etali Esambelo ya Leta

Masanga ya bosambisi ya mondimiekosalema te mpo na kolobela bondongwani etali esambelo ya leta (tala Malongi mpe Mayokani 134:11).

32.7

Lolenge Moto azali

TNkolo alobaki : « loboko na ngai ya ngolu etandolami epai na bino, mpe nyonso oyo akoya, nakoyamba ye; mpe bapambolami bango baye bakoya epai ya ngai” (3 Nefi 9:14). Lolenge ya moto ezali likambo moko ya ntina mpo na kozwa ekateli:

  • lolenge malamu elengelami mpo na kosunga ye ayambola masumu minene (tala 32.5 mpe 32.6).

  • Mikano oyo ezwami na ntango ya Lisanga ya kotalela ezalela mpe bolandeli ya bato to masanga ya bosambisi mokumba y aya mondimi 32.8 mpe 32.11).

Na likambo nyonso, baepisikopo mpe bakambi ya likonzi bakoluka koyeba bolingi mpe likanisi ya Nkolo. Bakoluka koyeba koloba nsima mpo na kozwa mokano mpe eyano ya kopesa nsima. Makambo oyo etali te ekateli songolo. Bakokamba kaka bakambi na ekateli oyo basengeli kozwa na nzela ya kosungana na losambo mpe na nse ya bofuli ya Molimo mosantu.

32.7.1.

Bonene ya Lisumu

Bonene ya lisumu emekami na bonene na yango. Yango etali mituya mpe ntango ya masumu oyo esalami, bonene ya mbeba oyo esalami oyo ezali kosalama mpe motuya bato oyo batukami.

32.7.2

Matomba ya Moto na likama

Bakambi basengeli koyeba matomba ya basumuki mpe bato misusu. Ekoki kozala ya molongani mpe bandeko mosusu ya libota. Bakambi bakanisa lisusu na ntina ya bonene ya bobebisi.

32.7.3

Bilembo ya boyamboli

Bofuli ya molimo ezali ntina mpo na kososola soki moto ayamboli ya solo mpenza. Ezaleli malamu mpo na ntango ya molai ezali malamu mpo na boyamboli ya boye kolaka boyoki mpasi makasi na ntango bosololi. Oyo ezali mwa makambo oyo bosengeli koyeba:

  • Likambo etali bondimi na Yesu Klisto.

  • Lolenge ya botubeli.

  • Bozindo ya mpasi etali lisumu.

  • Bobongisi oyo esalami epai ya bato oyo batukamaki.

  • Botosi mibeko ya leta.

  • Elonga na botiki lisumu.

  • Bosembo ya botosi mitindo uta na lisumu.

  • Bosembo epai ya bakambi ya Eklezia mpe bato mosusu.

  • Bolingi malamu etali bolandeli batoli ya bakambi ya Eklezia.

Elilingi
mwasi azali kosambela

32.7.4

Bobuki mibeko ya Mayokani ya Tempelo

Nkolo alobaki, “Mpo epayi na ye oyo mingi epesami mingi esengami” (Malongi mpe Mayokani 82:3). Moto oyo azwi likabo ya tempelo oyo asali mayokani alakisi bolingi na ye ya kotosa mabongi ya likolo. Lisumu ezali monene engebene na bozangi botosi ya mayokani oyo. Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi ekoki kosalama ekomatisama soki ezali na bozangi botosi ya mayokani ya tempelo.

32.7.5

Libiangi ya Ntina to Bokonzi

Lisumu ezali monene ntango moto oyo asali yango azali na libiangi ya elikia to bokambi ; lokola moboti, mokambi mpo motei.

32.7.6

Bobandeli

Bobandeli ya lisumu monene moko moko wana ekoki kolakisa ezaleli moko epika misisa to momesano oyo ezali kopekisa moto akoba kokende liboso mpo na boyamboli ya solo. Longola bopekisi etali mokumba ya mondimi, manaka ya bobongisi momesano mpe toli ya basali balongobani ekoki kozala ntina koleka (tala 32.8.2).

32.7.7

Mobu, Bokoli mpe Boyebi mosala malamu

Bakambi basengeli kotala nkola, bokoli mpe boyebi mosala ntango bazali koteya mpe basengeli kolandela mondimi, to ntango bazali kozwa mokano mpo na kopesa eyano na lisanga bosambisi ya mokumba ya mondimi. Ngolu ezalaka mbala mingi mpo na bandimi oyo bazali naino na boyebi ekoka te etali nsango malamu. Ezali ndakisa lokola mpo na bilenge oyo bazali kosalela makambo ya bolongobani te soki batiki masumu mpe balakisi boyamboli ya solo solo. Na yango, mokano ya makasi esengeli kozala ntina soki bazali kokoba na bizaleli wana.

32.7.8

Ndelo ya Mayele

Maladi ya moto, bowumbu to bozangi yango epesami etumbu mpo na moto oyo asali lisumu monene. Bandakisa oyo esengeli koyebama. Mpo na kosunga moto ayambola, bakambi bakoluka toli uta na Nkolo mpo na komanyola bososoli ya mabongi ya Nsango malamu ya moto mpe motango ya mokumba na ye.

32.7.9

Ntubela ya Moto yemoko

Botubeli ya moto ye moko mpe mawa ya Nzambe mpo na misala na ye elakisi ete moto azali na mposa ya koyambola.

32.7.10

Ntango oyo Lisumu esali mpe Ntubela

Botubeli ezali eteni ya boyamboli mpe yango esengeli te kosalama nsima ya ntango molai. Ntango mosusu, lisumu ezwaka ntango molai mpo na kobongisama mpe bosembo. Soki mondimi atubeli lisumu mpe abandeli yango te, bongo elakisi ete atiki yango. Na lolenge wana, botubeli ekosila ntina ya kobanda mosala ya boyamboli ekozala lisusu te.

32.7.11

Masumu oyo esangisi Bandimi oyo Bafandaka na Bapalwasi to Makonzi ekesena

Ntango mosusu, bandimi oyo basali lisumu ya monene elongo bafandaka to makonzi ya kokesena. Natngo yango esalami bongo, bakambi ya likonzi basengeli kosangana mpo na kosalela bopekisi to kosangana mpo na kosala Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi. Bakosolola lisusu soki basengeli kosalela biteni mibale oyo bopekisi ya lolenge moko to mikano ya ndenge moko oyo ezwami na ntango ya Lisanga ya kotalela ezalela to soki mikano mosusu esengeli kozala ya kokesena.


BOSALELI BATOLI MPE BOLANDELI YA BATO


32.8

Toli ya bato mpe Bopekisi ya Bakambi te etali Mokumba ya Mondimi

Batoli mpe bolandeli ya bato ezalaka mbala mingi ya kokoka mpo na kobatela basusu mpe kosunga moto azwa nguya ya bosikoli ya bomikabi ya Yesu Klisto na nzela ya boyamboli. Ekoki lisusu kosunga bandimi bamibatela na masumu ya minene. Na ntango ya batoli mpe bolandeli ya bato, bakamvi bakoki lisusu kotia babopekisi ya bakambi te na mokumba ya mondimi na ntina ya kosunga mondimi ayambola masumu minene (tala 32.8.3).

Masumu minene esengeli kozwama lokola liseki te (tala Malongi mpe Mayokani 1:31). Lotomo ya kosangisa bataleli ya ezalela ya mondimi esengisamaka na lolenge ya kobakisa soki mondimi abuki mobeko ya mayokani ya tempelo (tala 32.7.4).

Bokomona na oyo elandi mokanda oyo epesi ndingisa na bosungi bakambi bayeba ntango nini batoli mpe bolandeli ya bato mpe bopekisi ya bakambi te ezali ya kokoka (tala lisusu 32.7):

  • Moto asali lisumu oyo esengeli bolandeli ya Lisanga ya kotalela ezalela te na oyo etali mokumba ya mondimi 32.6.1).

  • Moto atubeli ye moko mpe ayamboli ya solo solo.

  • Moto ayamboli lisumu monene oyo asala naino te yambo.

  • Lisumu ya moto oyo abuki te mayokani ya tempelo te.

  • Moto azali na mabaku mike ya ntina.

32.8.1.

Batoli mpe bolandeli ya bato

Bokambi oyo elendi esalamaka na ntango episikopo to mokambi ya likonzi apesi toli na mondimi mpe alandeli ye mpo na kosunga ye ayambola.

  • Tuna bobele oyo esengeli lokola mateya mpo na koyeba (1) lolenge ya mondimi na oyo etali ezaleli na ye ya lisumu mpe (2) lolenge, motango mpe bolai ya ntago ya ezaleli. Tuna bobele makambo maye mazali ntina mpenza mpo na bososoli ya likambo. Kotuna te mituna mosusu mpo na kosepelisa makanisi na yo.

  • Tuna mbano nini ezaleli ya lisumu esalaki epai ya bato mosusu.

  • Tikala kaka na makambo ya motuya oyo ekolendisa mbongwana ya mondimi mpe bomipesi na ye epai ya Nkolo. Lendisa ye azwa mikano malamu mpo na kosala mbongwana ya ezaleli mpe mbongwana ya motema na ntina ete ayambola. Tinda ye apusana pene ya Nkolo, aluka bokasi na ye mpe ayoka bolingo na ye ya bosikoli.

  • Lendisa ye na misala elongobana lokola losambo, boyekoli Makomi mpe kokendaka na mayangani ya Eklezia. Teya mondimi ete mosala ya mambi ma kala ya libota mpe ya tempelo elembisaka nguya ya monguna. Lendisa asalisaka mpe asakolaka Nsango malamu.

  • Bolendisa bandimi babongisaka mabunga oyo basalaki na nzela ya masumu na bango mpe basengaka bolimbisi.

  • Botindaka bango baboyaka banguya ya mabe. Bosungaka bango bayeba kozwaka mikano ya malamu mpo na kotelemela masenginya ya monguna.

  • Bomikundola ete bozali bakambi ya Eklezia mpe ete bozali minganga ya maladi ya moto te. Longola se batoli mpe bolandeli na bino ya bato, bandimi mosusu bakozwa litomba ya batoli na bino na ezaleli. Basusu babelaka maladi ya moto. Soki ezali bongo, bosenga na bandimi baluka lisungi ya minganga balongobani oyo basalisaka nzoto mpe moto (tala 31.3.6).

  • Na lisungi ya losambo, boluka bofuli ya Molimo Mosantu yambo ya kotia bopekisi ya bakambi te na ntina ya mokumba ya mondimi. Ekozala litomba monene na bandimi mosusu basalela makasi mikumba na bango etali mokumba ya mondimi koleka kopekisa bango.

  • Tia bolandeli mpo na koepsa bolendisi, lendisa molimo mpe meka bokobi.

Ntango mondimi atubeli liboso ya episikopo to mokambi na ye ya likonzi, batoli mpe bolandeli ya bato ekosalama na ndenge ebele. Mokambi akoki kosala yango ye moko. To, na ndingisa ya mondimi, akosenga na moko ya bapesi toli na ye basala yango.

Na ndingisa ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi akosenga lisungi na bandimi ya lisanga likoki ya bampaka to na Lingomba ya Bamama Basungi. Mpo na bilenge, akosenga lisalisi na bokambi ya Bilenge Basi to na bayangeli ya masanga makoki ya Bonganganzambe ya Alona. Bato oyo baponami bazali na mokumba ya bofuli mpo na kokokisa mokumna na bango (tala 4.2.6).

Ntango akosenga lisungi ya moto songolo mpo na bolandeli, mokambi akopesa bobele bansango ya ntina etali lisungi ya kopesa mondimi. Moto oyo aponami asengeli kotosa sekele. Akoyebisa episikopo na ntina ya bokobi mpe bamposa ya mondimi

Elilingi
mwasi azali kosambela

32.8.2

Kosunga Bato oyo Bamipesa na Bowumbu

Batoli mpe bolandeli ya bato esengaka mbala mosusu lisungi ya bandimi bayambola na masumu oyo to esalamaki na bowumbu. Bowumbu oyo ezali ya biloko to bizali ya momesano. Bowumbu ebebisaka bato, ebebisaka mabala mpe mabota. Baepisikopo bakoteya bandimi bapona lisungi mabongisi oyo elengelami mpo na kokangola bowumbu ya Eklezia mpe lisusu ya minganga ya nzoto mpe mito oyo bayebi mosala.

Bowumbu ya momesano mingi ezali bosaleli bilili ya bosoto. Bosaleli makasi ekoki kokoma lotomo to na makambo misusu oyo esalamaka mpamba mpamba te. Ezala bowumbu to ezaleli ya mbalakaka, bosaleli bilili ya bosoto na lolenge na yango nyonso ezali likama. Ebenganaka Molimo. Elembisaka bompikiliki ya kotoka na bokasi oyo etambolaka na botosi mayokani. Ememaka mpe lisusu likama na bandeko ya motuya.

Batoli mpe bolandeli ya bato mpe lisusu bopekisi ya bakambi te na ntina ya mondimiezalaka mingi mingi ya kokoka mpo na kosunga moto ayambola na bosaleli na ye ya bilili ya bosoto. Masanga ya bosambisi ya mondimiekosalama mpenza te. Bokozwa makambo oyo esalami te na, tala 38.6.6 mpe 38.6.13. Batoli ya basali balongobana ekoki kosunga lisusu makasi.

Soki esengami, bakambi ya likonzi mpe baepisikopo bakosunga bandimi ya libota. Baboti bakoki kotangama na kati ya batoli mpe bolandeli ya bato ya bilenge oyo basalelaka bilili ya bosoto. Molongani akoki kotangama na kati ntango ezali mpo na moto oyo asila kobala.

Bokozwa nsango mingi etali kopesa toli mpe bolandeli na bandimi oyo basalelaka bilili ya bosto, tala 38.6.13.

32.8.3

Bopekisi ya Bakambi te etali Mondimi

Mpo na kobakisa makambo malamu na ntango ya toli, episikopo to mokambi ya likonzi akoki kopekisa mwa mabaku misusu ya Eklezia mpo na mwa ntango moke. Kosalela na bwanya, bopekisi oyo epesaka boyamboli mpe bokobi ya molimo. Emonisami lokola ya ya bakambi te mpo ete ekomamai te na mokanda ya mondimi.

Bopekisi ya bakambi te ekoki kowumela mwa baposo moke, basanza moke to ntango molai soki yango ezali ntina mpo ete moto ayambola mobimba. Na makambo mosusu, ekoki kopusana koleka mobu moko.

Bakambi bakoluka bofuli ya Molimo mpo na koyeba bopekisi nini ekozala makasi mpo na kosunga moto ayambola. Ekoki kozala (ezanga ndelo) ya bopemisi mokumba ya kokokisa libiangi na kati ya Eklezia, ya kosalela bonganganzambe to ya kokende na tempelo. Mokambi akoki lisusu kopekisa moto asala lisikulu, liteya to losambo na Eklezia. Soki apemisi mokumba ya kokende na tempelo, akolongola mokanda na ye ya boingeli na tempelo na kati ya masini ya Leader and Clerk Resources (LCR).

Kolia elambo ezali eteni moko ya ntina ya boyamboli. Yango esengeli te kozala bopekisi ya yambo oyo etiami mpo na moto oyo ayamboli oyo azali na motema ebukana mpe molimo ya mawa. Na yango, soki moto asali masumu minene, mokambi akopemisa mabaku na ye mpo na ntango.

Mobeko monene elobi, bandimi bakoloba na moto te oyo etali bopekisi ya bakambi te longola se soki moto alingi ayeba yango (tala 32.12.2).

Episikopo to mokambi ya likonzi bakolongola bopekisi ya bakambi te engebene bofuli ya Molimo ntango moto ayamboli na bosolo azali kosala bokobi ya malamu. Soki mondimi azongeli, ekoki kozala ntina to malamu kosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi.


KOKAMBA MASANGA YA BOSAMBISI MOKUMBA YA MONDIMI


Masanga ya bosambisi ya mondimiesalamaka ntango episikopo to mokambi ya likonzi bazwi mokano ete ekozala malamu to ntango mibeko ya Eklezia esengi (tala mokapo 32.6). Esangisami na palwasi, ya likonzi, ya etape, ya disitiliki to ya misio. Mokapo oyo ezali na bansango etali lolenge ya kokamba yango.

32.9

Bozali kati mpe Mokumba

Etando oyo elandi elakisi bato oyo basalaka mingi mingi na masanga ya bosambisi mokumba ya mondimi.

Kozala moko kati ya Lisanga ya kotalela ezalela

Lisanga ya Basambisi Mokumba ya mondimi na na Palwasi

Kozala moko kati ya Lisanga ya kotalela ezalela

  • Moto oyo basengeli kosanganela mpo na bosambisi

  • Episikopo mpe bapesi toli na ye

  • Kalaki ya palwasi

  • Mokambi ya lisanga likoki ya bampaka to mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi (etali te; tala 32.10.1)

Lisanga ya Basambisi Mokumba ya mondimi na Likonzi

Kozala moko kati ya Lisanga ya kotalela ezalela

  • Moto oyo basengeli kosanganela mpo na bosambisi

  • Mokambi ya likonzi mpe bapesi toli na ye

  • Kalaka ya Likonzi

  • Bandimi ya lisanga linene (na likambo oyo esengelami lokola elimbolmi na 32.9.2)

  • Episikopo ya moto oyo basanganeli mpo na Lisanga ya kotalela ezalela (etali te; tala 32.9.3)

  • Mokambi ya lisanga likoki ya bampaka to mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi (etali te; tala 32.10.1)

32.9.1.

Mokambi ya Likonzi

Mokambi ya Likonzi:

  • Azali na likoki na oyo etali Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina likonzi ; na yango, masanga ebele ya bosambisi esangisamaka na baepisikopo.

  • Asengeli kopesa bondimisami yambo ete episikopo asangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi.

  • Asangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina likonzi soki mobali to mwasi oyo azwaki totasio na tempelo azali na likama ya kolongolama mokumba na ye ya mondimi.

  • Asangisa Lisanga ya kotalela ezalela soki mondimi asengi ekateli kowuta na Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina palwasi.

  • Asengeli kopesa bondimisami yambo ete ekateli ya nsuka ya bolongoli mokumba ya mondimi ya moto oyo azwa dotasio naino te yambo basangela ye na Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi na palwasi.

32.9.2

Lisanga Linene

Mingi mingi, bandimi ya lisanga linene bakosangane te na masanga ya bosambisi ya mondimina likonzi. Na yango, na likambo ya mpasi, bakoki kozala wana (tala Malongi mpe Mayokani 102:2). Ndakisa, mokambi ya likonzi akobengisa bango soki :

  • Makambo endimami te.

  • bazali kobakisa ntina mpe motuya.

  • Mondimi alingi bango bazala.

  • mondimi ya bokambi ya likonzi to ya libota na ye atangami na kati (tala 32.9.7).

32.9.3

Episikopo (to Mokambi ya Etape na Likonzi)

Episikopo:

  • Azali na likoki na oyo etali masanga ya bosambisi mokumba ya mondimi na palwasi.

  • Akutani na mokambi ya likonzi mpe azwi bondimisami na ye yambo ya kosala Lisanga ya kotalela ezalela.

  • Asangisi te Lisanga ya kotalela ezalela soki mobali to mwasi azwaki dotasio ya tempelo azali na likama ya balongola mokumba na ye ya mondimi. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina likonzi esengeli kosalama na makambo maye.

  • Akoki kobengisama mpo na kozala kati ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimioyo esangisami mpo na mondimi ya palwasi oyo mokumba ya mondimi elandelami. Bozali na ye esengeli kondimama na Mokambi ya likonzi mpe moto oyo.

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na palwasi to ya etape ekoki kosenga bolongoli ya mondimiya moto oyo naino azwa dotasio te. Na yango, bondimisami ya mokambi ya likonzi ezali ntina mingi yambo ete mokano epesama.

Mabala mosusu, basangisaka Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na palwasi mpo na mondimi oyo azwa dotasio mpe esalelo elakisi ete moto oyo azali na likama balongola mokumba na ye ya mondimi. Na likambo ya boye, episikopo akotinda likambo yango na mokambi ya likonzi.

32.9.4

Mokambi ya Misio

Mokambi ya Misio

  • Azali na likoki na oyo etali masanga ya bosambisi mokumba ya mondimi na bitape mpe badisitiliki ya miso.

  • Asengeli kopesa bondimisami na ye yambo ete mokambi ya etape to ya disitiliki asangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi.

  • Assangisa mokumba ya bosambisi ya mokumba ya mobali to mwasi oyo azwa dotasio ya tempelo azali na likama balongola mpkumba na ye ya mondimi. Soki ntango ezali te to mosika eleki, akosenga moko ya bapesi na ye ya toli bakamba Lisanga ya kotalela ezalela.ya mondimi. Akopona Banganganzambe ya Melekisedeki misusu mibale mpo na kozala wana.

  • Soki ezali malamu, akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi mpo na bato oyo bazwa naino dotasio te. Soki ntango ezali te to mosika eleki, akotinda Banganganzambe ya Melekisedeki basala yango. Na likambo ya boye, mingimingi mokambi ya etape nde to ya disitiliki ya mondimi akokamba Lisanga ya kotalela ezalela yango.

  • Akoki kosalisa lisanga soki mondimi abengisami na Lisanga ya kotalela ezalela na ye na disitiliki to na etape.

  • Na ndingisa ya Mokambi Monene ya bilo ya mosala ya bamisionele, bosangani ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esangisami soki misionele asali lisumu monene na kati ya misio (tala 32.9.8). Akolandela lisusu likambo elongo na mondimi moko ya Bokambi ya Enterejion mpe akokutana na mokambi ya likonzi epai eye misionele awutaki.

  • Asengeli kopesa ndingisa yambo ete mokano ya nsuka ya bolongoli mokumba ya mondimi oyo naino azwa dotasio te yambo ezwama na Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na etape to disitiliki.

Soki misionele atubeli lisumu oyo asalaki yambo akende misio, mokambi ya misio asengeli kokutana na mokambi ya Bilo ya Mosala ya Bamisionele ya misio na ye mpo ete akoka kozwa bokambi na ye.

Ntango akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi, mokambi ya misio akopona Banganganzanmbe mibale ya Melekisedeki mpo na kosunga ye. Longola se na likambo etali moto ye moko, asengeli te kosenga na bilenge bamisionele bazala wana. Asengeli kolanda bandakisa moko moko wana bobele mpo na Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na likonzi (tala 32.10). Na yango, lisanga linene to lisanga ya disitiliki ekozala wana te.

32.9.5

Mokambi ya Disitiliki te Etape na Misio

Na kati ya misio, mokambi ya disitiliki to ya etape akoki kosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ntango apesami ndingisa na mokambi ya misio ete azala wana. Lisanga ya disitiliki ekozala wana te.

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na disitiliki to etape ekoki kosenga bolongoli ya mondimi lokola moto ya Eklezia soki azwaki te dotasio na tempelo. Na yango, bondimisami ya mokambi ya misio ezali ntina yambo mokano ya nsuka ezwama.

32.9.6

Kalaki ya Likonzi to ya Palwasi

Kalaki ya likonzi to ya palwasi:

  • Akokoma mpe akobomba maloba ya bosambisi eye esambisami na Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ntango ya kotinda Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya Mondimi.

  • Akolengela lapole soki mokambi ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi oyo asengeyi yango.

  • Akoloba te na kati ya lisolo to na mokano ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi.

32.9.7

Bozali na kati ya Mabaku ya Momesano te

Soki mopesi toli moko ya bokambi ya likonzi azali na makoki te ya kozala moko kati ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi, mokambi ya likonzi akosenga na mondimi moko ya lisanga linene to na nganganzambe monene mosusu azwa esika na ye. Soki mokambi ya likonzi azali na makoki ya kozala wana te, Bokambi ya Yambo ekoki kopesa ndingisa na moko ya bapesi toli na ye akamba na esika na ye.

Soki mopesi toli na kati ya boepikopo azali na makoki ya kozala wana te, episkopo akoki kosenga na nganganzambe monene ya palwasi azwa esika na ye. Soki episikopo azali na makoki ya kozala wana te akotinda likambo yango epai ya mokambi ya likonzi ye akosalisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na likonzi. Episikopo akoki te kopona mopesi toli mpo na kosalisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi.

Soki basalisi Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi mpo na mondimi ya libota ya episikopo to ya moko ya bapesi toli na ye, esengeli yango esalama na likonzi. Soki basangani mpo na mondimi ya libota ya moko ya bapesi toli ya mokambi ya likonzi, ye akopona nganganzambe monene mosusu mpo na kozwa esika ya mopesi toli. Soki basangani mpo na mondimi ya libota ya mokambi ya likonzi, ye akokutana na bilo ya Bokambi ya Yambo.

Soki mondimi aboyi episikopo azala wana to bapesi toli na ye bazala wana, Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ekosalama na likonzi. Soki mondimi aboyi moko ya bapesi toli ya mokambi ya likonzi azala wana, ye akopona nganganzambe monene mosusu mpo na kozwa esika ya mopesi toli. Soki mondimi aboyi ete mokambi ya likonzi to ye amoni ete moto mosusu azwa esika na ye, akoki kokutana na bilo ya Bokambi ya Yambi.

32.9.8

Kotalela Mokambi nini akokamba Lisanga ya kotalela ezalela ya Mondimi na Mabaku ya Ntina Koleka.

Masanga ya bosambisi mokumba ya mondimi esalamaka mbala mingi na esika ya nzinganzinga ya Eklezia epai eye mokanda ya kimondimi ya Eklezia ya moto oyo ezali.

Ntango mosusu ezali ntina kosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi mpo na moto oyo azwi ndako mosusu. Soki azwi ndako mosusu oyo ezali kaka na kati ya likonzi wana, mokambi ya likonzi akosola na baepisikopo ya bapalwasi wana mibale mpe kozwa mokano wapi yango esengeli kosalama.

Soki mondimi akoti ndako mosusu oyo ezali libanda ya nzinga nzinga ya likonzi, bakambi ya makonzi bakosolola mpe kozwa ekateli na oyo etali esika bosambisi esengeli kosalama. Soki bakani ete esengeli kosalama na palwasi ya kala to na likonzi ya kala, mokanda na ye ya kimondimi ekotikala na palwasi wana kino mosala ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ekosila. Soki te, bakotinda mokanda na ye ya kimondimi na palwasi ya sika. Episikopo to mokambi ya likonzi akoyebisa ntina ya likambo oyo, na lolenge ya sekele, epai ya episikopo to mokambi ya likonzi ya sika ya mondimi oyo lolenge Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ezali ntina.

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ntango mosusu ezalaka ntina mpo na mondimi oyo azali kofanda mosika na ndako na ye. Ekoki kozala ya moyekoli to mondimi oyo asalaka na mapinga ya ekolo. Episikopo ya esika mondimi oyo afanda akopesa toli mpe akopesa lisungi na ye. Na ngambo mosusu, akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi te longola se soki mokanda ya kimondimi ezala na kati ya palwasi na ye mpe nsima ya kosolola na episikopo ya palwasi oyo ye awutaki

Ntango mosusu, misionele asalaki lisumu monene kati ya misio abimisaki yango nsima ya bosilisi na ye ya misio. Episikopo mpe mokambi ya likonzi bakosolola mpo na koyeba nani kati na bango asengeli kosangisa bato ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi. Moko kati na bango akosolola na mokambi ya misio ya kala yambo esalama.

32.10

Ndenge ya kosalisa Masanga ya Kotalela Ezalela ya Mondimi

32.10.1.

Kopesa Nsango mpe Kolengela Lisanga ya Kotalela Ezalela ya Mondimi

Episikopo to mokambi ya likonzi akokomela mondi na ntina ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ete ekosalama mpo na ye. Akotia mokoloto na mokanda. Akobakisa bansango oyo elandi.

“[Boepisikopo to bokambi ya likonzi] bakosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na esika na yo. Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ekosalama na [mokolo mpe ngonga] na [esika].

“Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi oyo ekolandela [kotalisa mabe na mokuse na yango, na kolakisaka te makambo na biteni to molai to bilembo ya bosolo na yango].

“Obengami mpo na kozala wana mpe kopesa eyano na yo. Okoki kopesa lisusu maloba na mokanda uta na bato oyo bazali na bansango elongobani. Okoki kobengisa bango baya kotatola na ntango ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi na esika nayo soki endimamaki liboso na mokambi ya likonzi to ya episikopo. Okoki lisusu kobengisa [mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi to mokambi ya lisanga likoki ya bampaka ya palwasi] bazala wana mpo na kopesa lisungi na bango.

“Moto nyonso oyo akozala moko kati ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi asengeli kolengelama kotosa nyonso oyo ekoleka, lokola bandakisa mpe basekele na yango. Bazuzi bapesi toli ya bazuzi mpe bato longola baoyo batangamaki etali bango te.”

Eteni ya nsuka ekozala na liloba ya bolingo, ya elikia mpe ya litomba.

Bokomona na kati ya mokapo oyo bokambi oyo etali bato oyo mondimi akoki kobengisa balobela ye na ntango Lisanga ya kotalela ezalela 32.10.3, nimelo 4.

Soki bokoki kopesa mokanda epai ya moto te, bokoki kotindela ya na nzela mosusu apesa ye.

Episikopo to mokambi ya likonzi akolengela Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina ntango oyo esengeli mpo na moto yango. Akokengela lisusu mpo na kotika ntango ekoka ya kozwa maaloba ya bofundi ya bato oyo bazwaki makama ya etamboli mabe soki alingi kobimisa yango (tala 32.10.2).

Episikopo to mokambi ya likonzi akolengela mondimi mpo na Lisanga ya kotalela ezalela kolimbolaka bantina na yango mpe bandakisa na yango. Akolimbola lisusu mikano oyo ekoki kozwama nsima ya Lisanga ya kotalela ezalela. Soki mondimi atubelaki, mokambi ya akolimbola ete ntubela esengeli kosalama kati ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya ndimi.

32.10.2

Kozwa Nsango uta na Bato na makama

Ntango mondimi ya Eklezia azali moto na likama (lokola na likambo ya bosangisi nzoto na ndeko ya libota, misala oyo epekisi mwana to molongani, to moyibi mpe lokuta), esikopo to mokambi ya likonzi akokutana na episikopo to mokambi ya likonzi ya sika ya moto oyo. Bakambi bakozwa mokano soki ntina ezali ya kopesaa moto na likama oyo libaku ya kopesa mambi ya bofundi na mokanda na ntina ya mabunga mpe makama. Mambi ya bofundi oyo ekotangama na ntango ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi(tala 32.10.3, nimelo 3). Bakambi ya Eklezia bazali na likoki te ya kosolola na bato ya makama oyo bazali bandimi ya Eklezia te.

Bosololi nyonso na moto na likama na ntina oyo esalami na episikopo na ye to mokambi na ye ya likonzi ya sikawa. Soki moto na likama apesaki mambi ya bofundi, mokambi oyo akopesa yango epai ya episikopo to mokambi ya likonzi oyo ebengami mpo na Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi. Bakambi basengeli kolengela makasi mpo na komatisa motungisi te. Tala 32.4.3 mpo na makebisi mosusu.

Bolandeli nyonso etali moto na likama oyo azali na nse ya mibu 18 esengeli kosalama na nzela ya baboti to bakambi na bango balongobani, longola se soki moto oyo azali likama mpo na ye

Bokomona bansango etali toli oyo epesami na baepiskopo mpe bakambi ya likonzi na ntina ya likambo ya misala na mikapo, tala 32.4.5 mpe 38.6.2.1.

32.10.3

Kokamba Lisanga

Kaka yambo ya kobanda Lisanga ya kotalela ezalela, episikopo to mokambi ya likonzi akolobela bato oyo bakozala wana ete ezali likambo etali bosambisi mpe mbeba ezali nini. Soki ntina ekozala, akolimbola bandakisa ya Lisanga ya kotalela ezalela.

Soki moto ya bosambisi azali wana, akokota na kisuku. Soki episkopo abengisamaki kozala na lisanga ya bosambiis ya mondimina likonzi, ye mpe akokota na ngonga wana. Soki moto ya bosambisi abengisaki mpe lisusu mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi to mokambi ya lisanga likoki ya bampaka ya palwasi bazala wana mpe basunga ye, bango mpe, basalisa ye, bakozala wana na kisuku.

Episkopo to mokambi ya likonzi akokamba Lisanga ya kotalela ezalela na molimo ya bolingo lolenge elimbolami awa na nse.

  1. Akosenga na moto moko asala losambo ya bofungoli.

  2. Akolakisa mbeba oyo elobelamaki. Akopesa moto ya bosambisi (soki akozala wana) libaku ya kondimisa, koboya to kopesa ndimbola malamu.

  3. Soki andimi mbeba, episikopo to mokambi ya likonzi akoleka mbala moko na nimelo 5 oyo na nse. Soki akowangana yango, episikopo to mokambi ya likonzi akobimisa bansango etali likambo yango. Ekoki kozala ya kolakisa na misu ya bato mikanda ya solo mpe kotanga yango na mongongo makasi mambi ya bofundi ekomama oyo ya bato na makama (tala 32.10.2). Soki mondimi atangi likambo oyo, abateli bomoto ya moto na likama.

  4. Soki mondimi awangani mbeba, mondimi akoki kolakisa bansango na Lisanga ya kotalela ezalela. Ekoki kozala ekomama. To akoki kosenga bato oyo bazali na bansango yango balobela ye na Lisanga ya kotalela ezalela, moko na moko. Bato oyo basengeli kozala bandimi ya Eklezia loba soki episikopo to mokambi ya likonzi azwaki mokano yambo ete moto oyo azali mondimi te azala wana te. Bakozela na kisuku mosusu kino bakobenga bango mpo baloba. Moto nyonso akobima na kisuku ya bosambisi ntango bosambisi ekosila. Basengeli kolengelama mpo na kotosa lolenge ya bosambisi, lokola bandakisa mpe basekele. Bandimi bakoki te kopona bozali ya mopesi toli ya bazuzi. Bakoki koya te na bato mosusu oyo babengami kozala wana te kolandisama na eteni ya mibale elobi ya mokapo oyo.

  5. Episikopo to mokambi ya likonzi bakoki kotuna moto ya bosambisi mituna na lolenge ya limemia mpe ya botosi. Akoki lisusu kotuna mituna na bato mosusu oyo mondimi asengaki baya na bansango. Bapesi toli ya boepiskopo to ya bokambi ya likonzi bakoki lisusu. Mituna misengeli kozala ya mikuse mpe ya ndelo ya makambo ya ntina.

  6. Ntango bansango nyonso ya ntina etalisamaki, episkopo to mokambi ya likonzi akosenga mondimi abima na kisuku. Kalaki mpe asengeli kobima, loba soki nganganzambe monene azala wana kati ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina likonzi. Soki episikopo ya mondimi azali wana na kati ya kisuku na ntango ya kotalela ezalela ya mondimi na likonzi, bakosenga ye abima. Soki mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi to mokambi ya lisanga likoki ya bampaka azalaki wana kati ya bosambisi mpo na kopesa lisungi na ye, bango mpe basengeli kobima.

  7. Episikopo to mokambi ya likonzi bakoluka makanisi to mabanzo ya bapesi toli na ye. Soki lisanga linene azalaki wana, akosenga makanisi mpe masalisi na bango.

  8. Na bapesi toli na ye, episikopo to mokambi ya likonzi bakoluka na lisungi ya losambo bolingi ya Nkolo na oyo etali likambo yango. Kaka mokambi ya likonzi nde mpe bapesi toli na ye basengeli kozala na kati ya kisuku na ntango wana. Soki Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina likonzi ezali na lisanga linene, bokambi ya likonzi ekosalama mbala na mbala na kati ya bilo ya mokambi ya likonzi.

  9. Esikopo to mokambi ya likonzi akoloba ekateli na ye epai ya bapesi toli na ye mpe akosenga bango bandima yango. Soki Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi na likonzi ezali na lisanga linene, bokambi ya likonzi ekozonga na kisuku mpe kosenga na lisanga linene bandima yango. Soki moko ya lisanga linene andimi te, episikopo to mokambi ya likonzi akoyoka mpe koluka kosilisa bozangi koyokana. Mokumba ya ekateli ezali likolo ya mokambi moyangeli.

  10. Akobengisa moto ya bosambisi akozonga na kisuku. Soki kalaki abimaki, ye mpe abengami kozonga na kisuku. Soki episikopo ya mondimi azali wana na ntango ya bosambisi mokumba ya mondimi na likonzi, bakosenga ye mpe azonga na kisuku. Soki Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi to mokambi ya lisanga likoki ya bampaka azalaki wana na kati ya bosambisi mpo na kopesa lisungi na bango, bango mpe basengami kozonga wana.

  11. Episikopo to mokambi ya likonzi akoloba ekateli ya bosambisi na molimo ya bolingo. Soki ekateli ezali ya kopekisa mpenza mikumba etali mokumba ya mondimi to kolongola mokanda na ye ya kimondimi, akolimbola bandelo na yango (tala 32.11.3 mpe 32.11.4). Akolimbola lisusu lolenge nini kotosa bopekisi yango mpe akopesa makebisi mosusu mpe toli. Episikopo to mokambi ya likonzi akosukisa na ntango mokuse bosambisi mpo na koluka bofuli to bansango yambo ya kozwa ekateli. Na likambo ya boye, akolimbola.

  12. Akolimbola makambo maye moto ya bosambisi asengeli kotosa (tala 32.13).

  13. Akosenga moto moko asala losambo ya bosukisi.

Atako moto ya bosambisi azala wana to te, episikopo to mokambi ya likonzi akoyebisa ye ekateli lokola yango elimbolami na kati ya mokapo 32.12.1.

Moto moko te oyo azali na kati ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiapesami ndingisa ya kotia na radio to na video maloba nyonso oyo elobami na kati ya bosambisi, to kokoma yango na mokanda. Kaka kalaki asengeli kokoma yango mpo na kosala Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya Mokumba ya Mondimi. Na yango, maloba oyo ezali makambo ya kolakisa to ya lapole ya liloba moko moko te. Ntango lapole elengelami, akolongola na lombango makomi nyonso oyo.

32.11

Bikateli uta na Masanga ya Bosambisi Mondimi

Mikano uta na lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi esengeli kotindama na Molimo. Basengeli kolanda ndakisa ya bolingo mpe elekia oyo epesami na Nkolo epai ya bato oyo bazali koyambola. Bikateli ya ntina elimbolami awa na se. Ntango bakozwa mikano oyo, bakambi basengeli koyeba makambo maye matalisami na kati ya mokapo 32.7.

Nsima ya bosambi moko na moko ya mokumba ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi akotinda na lombango Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi ya Eklezia oyo na masini ya LCR (tala 32.14.1).

Bikateli ya ntina ya masanga ya bosambisi ya mondimiekolakisama na mikapo oyo elandi.

32.11.1.

Kotikala na Makambo ya Sembo

Na makambo mosusu, moto ayebi likambo te mpe atikali mondimi libela. Na makambo mosusu, akoki kozala asalaki lisumu monene, nsima ayamboli ya solo mpenza mpe kozala mondimi ya libela. Episikopo to mokambi ya likonzi akopesa toli mpe makebisi na ntina ya misala mikoya lobi. Nsima lisanga, akokoba kosunga ye na bamposa mosusu oyo esengeli.

Elilingi
balongoni bafandi elongo

32.11.2

Lisanga ya kotalela ezalela na Episikopo to Mokambi ya Likonzi

Na masanga mosusu ya bosambisi mokumba ya mondimi, bakambi bakoki kozwa mokano ete moto ya bosambisi azali mondimi te ya libela—kasi ete bopekisi ya bakambi mpo na mokumba na ye ya kimondimi emonisami kozala malamu te. Na likambo ya boye, Lisanga ya kotalela ezalela ekozwa mokano ya kopesa toli mpe bolandeli ya bato, mpe kobongisa ezaleli mokumba ya episikopo to ya mokambi ya likonzi. Toli oyo mpe bolandeli ya bato ekoki kozala na bopekisi ya bakambi te na ntina ya mondimilokola yango elimbolami na mokapo 32.8.3.

Toli mpe bolandeli ya bato mpe lisusu bopekisi ya bakambi te mpo na masumu maye matalisami na mokapo 32.6.1.

32.11.3

Bopekisi ya Bakambi na ntina ya Mondimi

Na masanga mosusu ya bosambisi mokumba ya mondimi, bakambi bakoki kozwa mokano ete esengeli kopekisa na ndenge elongobana mpe ntango mokuse mikumba ya moto na oyo etali mokumba ya kimondimi na ye. Bopekisi ya bakambi etiamaka engebene na masumu nyonso mpe na makambo nyonso longola se soki ezali monene, na oyo etali mokumba ya kimondimi elongolama (tala 32.11.4).

Bato nyonso oyo bapekisami na bakambi mokumba na bango ya kimondimi bazalaka ntango nyonso bandimi ya Eklezia. Na yango, mikumba na bango epekisami na lolenge oyo elandi:

  • Bakoki te kokota na tempelo. Na yango, bakoki kokoba kolata bagarma ya tempelo. Soki mondimi azali na mokanda ya boyingeli na tempelo, mokambi akolongola yango na masimi LCR.

  • Bakoki te kosalela bonganganzambe.

  • bakoki te kolia Elambo to kosunga bayangeli ya Eklezia.

  • Bbakoki kosala masukulu te, bakoki koteya to kosambela na Eklezia te. Bakoki te kosalela mabiangi ya Eklezia.

Bakoki koya na mayangani mpe misala ya Eklezia soki bazali kotambola malamu. Balendisami lisusu kofuta moko na zomi mpe mabonza.

Episikopo to mokambi ya likonzi akotiela bango mibeko mosusu, lokola kosalela bilili ya bosoto te mpe banguya mosusu ya mabe. Akobakisa mingi mingi mibeko ya malamu. Ekoki kozala ya koyaka mbala na mbala na mayangani ya Eklezia, ya kosambelaka mbala na mbala, ya kotanga Makomi mbala na mbala mpe mikanda mosusu ya Eklezia.

Soki moto apekisami na bakambi mikumba na ye ya kimondimi, yango ekomami likolo ya mokanda na ye ya kimondimi.

Bowumeli ya bopekisi ya bakambi ezalaka mbala mingi ya mobu moko mpe ekoki kozala ya ntango molai. Ntango mondimi azali kokoba malamu mpe ayamboli ya solo mpenza, episikopo to mokambi ya likonzi akosangisa lisusu Lisanga ya kotalela ezalela mosusu mpo na kotala ngolu ya kolongola bopekisi (tala 32.16.1). Soki mondimi azali kokoba na ezaleli ya masumu, mokambi akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela mpo na kozwa mikano mosusu.

32.11.4

Bolongoli mokumba ya Mondimi

Na masanga mosusu ya bosambisi mokumba ya mondimi, bakambi bakoki kozwa ekateli ya kolongola mpo na ntango mokuse mokumba ya mondimi ya moto oyo (tala Mosiya 26:36; Alma 6:3; Moroni 6:7; Malongi mpe Mayokani 20:83).

Bolongoli mokumba ya mondimi ezali lotomo mpo na bobomi (lokola elimbolami na mokapo 32.6.1.1) mpe mpo na libala ya basi to mibali ebele (lokola yango elimbolami na kati ya mokapo 32.6.1.2). Ezalaka ntango nyonso lotomo mpo na bosangisi nzoto na ndeko ya libota lokola elimbolami na kati ya mikapo 32.6.1.2 mpe 38.6.10.

Engebene na bokambi ya Molimo, bolongoli ya mondimiekoki kozala ntina na makambo maye malandi:

  • Moto azali na ezaleli oyo ezali likama monene mpo na basusu

  • Mmoto asali masumu minene eye epekisami

  • Moto azali komitungisa te mpo na masumu minene oyo asali 32.7).

  • Moto asali masumu minene oyo ezali kotuka Eklezia.

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina palwasi, na etape to na disitiliki ekoki kosenga bolongoli mokumba ya mondimi ya moto oyo naino azwa dotasio ya tempelo te. Na yango, bondimisami ya mokambi ya likonzi to ya mokambi ya misio ezali ntina yambo ete ekateli ezwama na nsuka.

Bato oyo mikumba na bango ya kimondimi ya Eklezia elongolamaki bazali na ndingisa te oyo ekangami na yango.

  • Bakoki te kokota na tempelo to kolata bagarma ya tempelo. Soki moto azali na mokanda ya boyingeli na tempelo, mokambi akolongola yango na kati ya masini ya LCR.

  • Bakoki te kosalela bonganganzambe.

  • bakoki te kolia Elambo to kosunga bayangeli ya Eklezia.

  • Bakoki te kosala masukulu, koteya to kosambela na Eklezia to kokamba mosala songolo na eklezia. Bakoki te kosalela mabiangi ya Eklezia.

  • Bakoki te kofuta moko na zomi mpe kopesa mabonza.

Bakoki koya na mayangani mpe misala ya Eklezia soki bazali kotambola malamu.

Bato oyo mikumba na bango ya kimondimi elongolamaki bakoki kozongisama na nzela ya libatisi mpe nkotisa. Mingimingi, basengeli naino kosala boyamboli ya solo mpenza uta mobu moko. Episikopo to mokambi ya likonzi akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimimosusu mpo na kotala bozongisi na ye lisusu (tala 32.16.1).

Bikateli ya Masanga ya Bosambisi Mmokumba ya Mondimi mpe eEyano ya Kopesa

Ekateli

Eyano

Ekateli

Kotikala na Makambo ya Sembo (tala 32.11.1)

Eyano

  • Ezali te

Ekateli

Lisanga ya kotalela ezalela na Episikopo to Mokambi ya Likonzi (tala 32.11.2)

Eyano

  • Etali ntina ya bopekisi mosusu ya bakambi te ya mokumba na ye ya kimondimi.

  • Bopekisi oyo ewumelaka mingi mingi mobu moko ; na makambo mosusu ya ntina , ekoki kowumela ntango molai koleka.

  • Bopekisi ya bakambi te elongolamaka nsima ya boyamboli ya solo mpenza.

  • Ekateli ekomami te likolo ya mokanda ya mondimi.

Ekateli

Bopekisi ya Bakambi na Mokumba ya Mondimi (tala 32.11.3)

Eyano

  • Mikumba ya mondimi epekisami na bakami.

  • Bopekisi oyo ewumelaka mbala mingi mobu moko mpe ekoki kowumela ntango molai koleka.

  • Ekateli ekomami likolo ya mokanda ya mondimi.

  • Bopekisi ya bakambi elongolami nsima ya boyamboli ya solo mpenza, Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi mpe, soki ntina ezali, bondimisami ya Bokambi ya Yambo.

  • Nkoma likolo ya mokanda ya mondimi elongolami soki bopekisi elongolami nsima ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya (longola se nkoma ya lotomo; tala 32.14.5).

Ekateli

Bolongoli Mokumba ya Mondimi (tala 32.11.4)

Eyano

  • Mikanda nyonso elongolami.

  • Mikumba nyonso etali mokumba ya mondimi elongolami, mingi mingi mpo na mobu moko.

  • Moto akozala na ndingisa ya kozongisama na nzela ya libatisi mpe nkosa bobele nsima ya boyamboli ya solo mpenza, Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimimpe, soki ezali ntina, bondimisami ya Bokambi ya Yambo (tala 32.16).

  • Moto oyo asila kozwa dotasio akozongela mapamboli na ye bobele nsima ya bondimisami ya Bokambi ya Yambo mpe nsima ya mobu moko ekoka uta bozongisi na ye (tala 32.17.2).

  • Mpo na bato basila kozwa dotasio, liloba “Bozongisi mapamboli ya motuya” elongolami na mokanda na ye kimondimi bobele nsima ya kokokisa likuli (nkoma ya lotomo ekotikala; tala mokapo 32.14.5).

32.11.5

Mituna etali kozwa mokano na Makambo ya Mpasi

Baepisikopo bakotuna mokambi ya likonzi mituna na bango etali bokambi ya mokanda ya masanga ya bosambisi ya mokumba ya mondimi.

Mpo na makambo ya mpasi, mokambi ya likonzi akokutana na moko ya Bantuku Nsambo ya Enterejion oyo atindami mpo na ye. Mokambi ya likonzi akokutana na bokambi ya enterejion oyo atindami mpo na ye mpo na mituna epesami na 32.6.3. Na yango, mokambi ya likonzi asengeli te kotuna ekateli nini ya kozwa na likambo ya mpasi epai ya Mokambi Monene ya Bantuku nsambo ya Enterejion to na Moyangeli Monene mpo na kozwa ekateli na makambo ya mpasi. Mokambi ya likonzi akozwa ekateli soki Lisanga ya kotalela ezalela esengeli kosalama mpo na kosolola likambo. Soki ezali bongo, mokambi ya likonzi to episikopo bakozwa mokano na oyo esengeli kosalama.

32.11.6

Likoki ya Bokambi ya Yambo

Bokambi ya Yambo ezali likoki ya likolo na bopekisi nyonso mpe bolongoli ya mokumba ya mondimina Eklezia.

32.12

Kokoma nsango mpe Maloba ya nsango

Ekateli ya bosambisi mokumba ya mondimi nsango epesamaka epai ya moto—mpe na basusu soki yango esengelami—lokola elimbolami awa na nse.

32.12.1.

Kokomela Moto na oyo etali Ekateli

Episikopo to mokambi ya likonzi akoyebisa mingimingi moto ya bosambisi na oyo etali ekateli ya lisanga na nsuka. Na yango, akoki kosukisa na ntango mokuse bosambisi mpo na koluka kobakisa bufuli to bansango yambo ya kozwa mokano.

Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimina palwasi, na etape to na disitiliki ekoki kosenga bolongoli mokumba ya mondimi ya moto oyo naino azwa dotasio ya tempelo te. Na yango, bondimisami ya mokambi ya likonzi to ya mokambi ya misio ezali ntina yambo ete ekateli ezwama na nsuka.

Episikopo to mokambi ya likonzi akolimbola makama ya ekateli lokola elimbolami na mokapo 32.11. Mingimingi, akopesa toli etali mibeko ya boyamboli mpo ete bopekisi ekoka kolongolama to ete moto akoka kozongisama na Eklezia.

Episikopo to mokambi ya likonzi akopesa na lombango moto ya bosambisi mokanda ekomama ya Lisanga ya kotalela ezalela mpe makama na ye. Mokanda ekomama oyo elobeli likambo na mobimba na yango etali mokano esilaki kozwama na oyo etali ezaleli oyo mibeko epekisi mpe bolongobani ya Eklezia. Ekoki lisusu kozala na toli elobi lolenge nini ya kosala mpo na kolongola mokano oyo bopekisi etali mokumba ya mondimi to kozongisama na Eklezia. Esengeli koyebisa moto ya bosambisi ete akoki kosenga bokutani mpo na ekateli oyo (tala 32.13).

Soki ayei na Lisanga ya kotalela ezalela te, mokanda ekomama ekokoka mpo na koyebisa ye ekateli. Episikopo to mokambi ya likonzi akoki lisusu kosolola na ye.

Episikopo to mokambi ya likonzi akopesa te na moto Lapole Lisanga ya kotalela ezalela Mokumba ya Mondimi.

32.12.2

Koyebisa Basusu oyo etali Ekateli

Soki episikopo to mokambi ya likonzi apekisi na lolenge ya makasi te mikumba ya moto oyo ekangani na mokumba na ye ya kimondimi na ntango toli mpe bolandeli ya bato, mobeko monene elobi, akoyebisa moto mosusu te (tala 32.8.3). Na yango, bakambi oyo bakoloba yango elongo na ntango bazali kosunga bandimi.

Soki mikumba ezali ya bopekisi ya bakambi te to elongolami na ntango ya bosambisi ya mokumba ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi akoyebisa ekateli yango bobele epai ya bato oyo bazali na ntina ya koyeba yango. Akolanda bokambi oyo.

  • Akotala bosenga ya ya bato oyo bazwaki makama mpe bato oyo bazwaki makama minene, mpe mayoki ya libota ya moto ya bosambisi

  • Akoyebisa te mokano soki moto asengi yango te. Na yango, akoki koloba ete yango ekoki kolandelama lisusu soki amoni ete ntina ezali ya kobatela bato ya makama minene. Akoki mpe lisusu koyebisa yango mpo na kopesa libiki elongobani na bato ya makama (na bozangi kopesa nkombo na bango) to mpo na kobatela botosi ya Eklezia.

  • Soki yango esalami, episikopo akoloba ekateli na sekele na bato ya lisanga ya toli ya palwasi. Yango ezali mpo na kolobela bakambi oyo basengeli koyeba moto oyo alengelami mpo na mabiangi koteya mateya, to kosala nsambo to masikulu. Yango ezali lisusu mpo na kolendisa bakambi bapesa lisungi mpe lisalisi na mondimi mpe libota na ye.

  • Na bondimisami ya mokambi ya likonzi, episikopo akoki koloba ekateli na ntango ya mayangani ya lisanga likoki mpe ya Lingomba ya Bamama Basungi ya palwasi soki likambo ezali ya.

    • Ezaleli ya mabe oyo ezali kotuka mpe kotia basusu na likama.

    • Liteya ya malongi ya mabe mpe bopengwi ya ndenge mosusu.

    • Masumu oyo bakangi yo na yango lokola kobala basi ebele to mibali ebele to bosaleli ya mateya ya binzambinzambi mpo na kozwa bato.

    • Koboya na misu ya bato misala to mateya ya bakambi minene Eklezia mpe ya bisika tofandi.

  • Na likambo ya bongo, mokambi ya likonzi akopesa ndingisa nsango ekomela bandimi ya bapalwasi mosusu ya lokonzi.

  • Na makambo mosusu, episikopo to mokambi ya likonzi akoki komona ete ezali malamu kokomela bato mosusu to na bato nyonso bazwaki makama mpe mabota na bango na ntina ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimioyo esalamaki mpo na ye. Akosala yango na nzela ya episikopo na ye to mokambi ya likonzi.

  • Soki bosenga ya moto mabe ezali ezali kotia basusu na makama, episikopo to mokambi ya likonzi akoki kokebisa mpo na kobatela basusu. Akobimisa te nsango moko ya sekele mpe nungunungu te.

  • Na makambo mususu nyonso, episikopo to mokambi ya likonzi akotia ndelo na likambo mobimba. Akoloba bobele ete mikumba ya etali mokumba ya mondimi epekisamaki to elongolamaki mpo na ezaleli eye epekisami na mibeko mpe na botosi ya Eklezia. Akosenga na bato oyo bakozala wana babeta lisolo na yango te. Akosenga te boponi ya lisungi to kotelemela mokano.

  • Soki moto ya bosambisi atikali kaka mondimi ya libela nsima ya bosambisi mokumba na ye ya mondimi (tala 32.11.1), episikopo to mokambi ya likonzi akoki kolobela yango mpo na kolongola nungunungu.

32.12.3

Kopesa Nsango etali Bolongoli Moto

Na makambo mosusu, episikopo asengeli koyebisa ete moto aboyi na mokumba na ye ya mondimi na Eklezia (see 32.14.9). Episikopo akopesa te mobimba ya likambo mosusu.

32.13

Kozwa Mokano

Mondimi akoki kosenga mokambi ya likonzi bokutani na ntina ya ekateli ya bosambisi ya mondimina palwasi uta mikolo 30. Mokambi ya likonzi akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela na likonzi mpo na kolandela bosenga wana. Akoki lisusu kosenga episikopo asangisa lisusu Lisanga ya kotalela ezalela mpe kotala lisusu ekateli soki bansango ya sika ezwamaki

Mondimi akoki kosenga bokutani na ntina ya ekateli ya bosambisi ya mondimina likonzi na kokomelaka mokambi Bokambi ya Yambo na bowumeli ya bantango ya mikolo 30. Mondimi akopesa mokanda yango epai ya mokambi ya likonzi ye akotinda yango na Bokambi ya Yambo.

Na misio, mondimi akoki kosenga bokutani na ntina ya ekateli ya bosambisi ya mondimina etape to na disitiliki na mokambi ya misio uta mikolo 30. Mokambi ya misio akosangisa Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimimpo na kotala bosenga. Soki ntango ezali te to mosika eleki mpo na kosala yango, akolanda bokambi oyo na mokapo 32.9.4.

Soki mokambi ya misio akambi Lisanga ya kotalela ezalela, mondimi akoki kosenga bokutani na ntina ya ekateli na kokomelaka Bokambi ya Yambo mokanda uta mikolo 30. Mondimi akopesa mokanda yango epai ya mokambi ya misio ye akotinda yango na Bokambi ya Yambo.

Moto oyo asengeli bokutani na ntina ya ekateli asengeli kolimbola malamu na kati ya mokanda eye etali mabunga to bozangi sembo ya mosala to ya ekateli.

Soki bosangisi Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimimpo na kolandela bosenga, nzela ezali bobele mibale ya malamu:

  • Kotikala kaka na ekateli oyo ezwamaki.

  • Kobongola ekateli oyo ezwamaki.

Bikateli ya Bokambi ya Yambo ebongolamaka te mpe basengelaka yango bobongoli te

32.14

Balapole mpe Mambi etali Mondimi

32.14.1.

Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela Etali Mondimi

Nsima ya Lisanga ya kotalela ezalela nyonso ya mokumba ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi akotinda na lombango lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi, episikopo to mokambi ya likonzi akotinda na lombango lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela oyo na masini ya LCR. Akoki kosenga na kalaki alengela yango. Ayeba malamu ete lokasa ya mokanda to ya masini ya lapole ebombami bisaka bazali te. Ayeba lisusu ete makomi eye basalelaki mpo na kolengela lapole ezali ya kotumba na lombango.

32.14.2

Bopekisi ya Bakambi ya Eklezia etali Mondimi

Bopekisi ya bakambi na ntina ya mondimiekomamaka likolo ya mokanda ya mondimi ya moto ya bosambisi. Bilo ya Eklezia ekomaka maloba oyo nsima ya kozwa Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi. Ntango mondimi ayamboli, mokambi asengeli kosangisa Lisanga ya kotalela ezalela mosusu oyo bakoluka kolongola bopekisi wana (tala mokapo 32.16.1).

32.14.3

Mambi etali nsima ya bolongoli Mokumba ya mondimi ya Eklezia

Soki mokumba ya mondimi elongolami, bilo ya Eklezia ekolongola mokanda ya mondimi nsima ya kozwa Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi. Soki moto alingi, bakambi bakosunga ye amilengela mpo na bozongi na Eklezia na nzela ya libatisi mpe nkotisa (see 32.16.1).

32.14.4

Mambi nsima ya Bozongisi na kati ya Eklezia

Nsima ya kozongisa moto kati ya Eklezia, episikopo akotinda Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya Mokumba ya Mondimi. Mokanda ya libatisi mpe ya nkotisa ekotindama te. Na ngambo mosusu, libatisi mpe nkotisa ekokotisama kati ya Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi. Kasi mokanda na ye ya libatisi mpe nkotisa ekotiama Lapole ya Eklezia na Mokanda na ye ya nkoma na Mokanda na ye ya Kimondimi Lapole ya Eklezia

Soki mondimi azwa naino dotasio te, bilo ya Eklezia ekopesa mokanda ya mondimi eye elakisi mokolo ya libatisi na ye ya yambo mpe ya makuli mosusu. Mokanda etali te bolongoli ya mokumba ya mondimi.

Soki mondimi asila kozwa dotasio, bilo ya Eklezia ekokomisa mokanda ya mondimi sika kotiaka mokolo ya sika ya libatisi mpe ya nkotisa. Mokanda oyo ezali lisusu na elembo “Bozongisi mapamboli ya ntina.” Ntago mapamboli ya mondimi ezongisameli ye 32.17.2), mokanda na ye ekozongisama sika mpe elakisi mokolo ya libatisi ya yambo mpe makuli mosusu. Etangi na esika moko te bobungisi ya litomba ya kozala mondimi ya Eklezia.

32.14.5

Mikanda ya Mondimi Ekomama

Na ndingisa ya Bokambi ya Yambo, bilo ya Eklezia ekomi likolo ya mokanda ya moto nyonso azwami na kati ya makambo maye malimbolami awa na nse.

  1. Episikopo to mokambi ya likonzi akotinda Lapole ya bosambisi ya mondimikolimbolaka ete mokumba ya moto ya bosambisi epekisamaki na bakambi to elongolamaki mpo na mabunga maye malandi.

    1. Bosangisi nzoto na ndeko ya libota

    2. Misala ya bosangisi nzoto miye mipekisami na mwana to na elenge, bowumbu ya bosangisi nzoto ya mwana to ya elenge, misala minene ya nzoto to ya makanisi miye mipekisami na mwana to elenge.

    3. Bosaleli bilili ya bosoto na mwana, lokola elimbolami na mokapo 38.6.6

    4. Ezaleli ya moto mabe oyo asaleli bosangisi nzoto

    5. Libala ya mwasi to mibali ebele.

    6. Kipebe to kilezibiene—misala ya bosangisi nzoto ya mibali na mibali to basi na basi (tala mokapo 38,6.23).

    7. Moyibi ya misolo ya Eklezia to boyibi biloko ya Eklezia (tala mokapo 32.6.3.3)

    8. Bobebisi lisungi ya Eklezia

    9. Ezaleli ya mbutumbutu (ekoki kozala ya bosangisi nzoto, bobebisi to ya misolo) to ezaleli eye ezali kotuka Eklezia.

  2. Episikopo to mokambi ya likonzi bakotinda mokanda eye elobi ete moto:

    1. Andimi ete asalaki moko ya misala miye milimbolami awa na nse to andimaki asalaki mabe.

    2. Azwaki etumbu uta na bolandeli boyibi ya bayi mboka to misala mosusu ya bolongobani te engebene na misala miye milimbolami awa na nse.

Ntango akozwa mokanda ya mondimi ekomama, episikopo akolandela makebisi ya maloba ekomama.

Bobele Bokambi ya Yambo epesaka ndingisa ya kolongola maloba ekomama likolo ya mokanda ya mondimi. Soki Mokambi ya likonzi atindi ete balongola nkoma, akosalela LCR (talas 6.2.3). Bilo ya Bokambi ya Yambo ekoyebisa ye na ntina ya eyano malamu to ya mabe epesami na etinda na ye.

32.14.6

Kopesa Lapole etali Moyibi ya Mosolo ya Eklezia

Soki mokumba ya mondimi ya moto epekisami to elongolami mpo ete ayibaki misolo ya Eklezia, episikopo to mokambi ya likonzi akosala lapole na yango lokola elimbolami na mokapo 34.7.5.

32.14.7

Bolongoli Nkoma likolo ya Mokanda ya Mondimi

Ntango mosusu, mondimi ya Eklezia alongwe esika azalaki kofanda na ntango eye mokano etali mokumba na ye ya mondimi to makambo mosusu naino esili te. Mbala mususu, episikopo asengeli kolobela bansango yango epai ya episikopo ya sika ya mondimi oyo yambo ya kotinda mokanda na ye na palwasi ya sika. Na likambo ya bongo, episikopo (to kalaki apesami ndingisa) akoki kotia bopekisi na oyo etali botindi mokanda. Yango ekotikala na palwasi kino episikopo (to kalaki soki apesami ndingisa) akolongola bopekisi yango. Yango ekopesa makoki na episikopo atalisa bosenga mpe bansango.

32.14.8

Nkoma ya Baoyo Bakangami

Bandimi mosusu bapesami etumbu mpo na mbeba mpe bakangami. Episikopo to mokambi ya likonzi ya palwasi ya mokangemi oyo ntango mbeba esalamaki akozwa mikano nyonso ya ntina mpo na kopesa na bolongobani to kolongola mokumba na ye ya mondimi. Soki mikumba miye mikangemi na mokumba na ye ya mondimi epekisami, mokambi (to kalaki soki apesami ndingisa) akotinda mokanda ya mondimi na palwasi na ye ya esika moto mokangemi oyo akangemi. Soki mokumba ya mondimi elongolamaki, episikopo to mokambi ya likonzi bakokutana na mokambi ya palwasi oyo. (Tala 32.15.)

32.14.9

Bosenga mpo na Kolongwa Mondimi

Soki mondimi alingi balongola mokumba na ye ya mondimi, episikopo akomeka kotala alengelami mpo na kosolola makambo mpe komeka kosilisa yango. Epsikopo mpe mondimi bakoki lisusu kokutana na mokambi ya likonzi. Mokambi akoteya mondimi asosola ntina ya makama oyo ekoki koyela ye.

  • Yango ekolongola makuli nyonso.

  • Yango ekolongola mikumba nyonso miye mikangemi na mokumba na ye ya mondimi.

  • bozongisi na libatisi mpe nkotisa ekosalama bobele nsima ya bosololi na bozindo mpe, na mabaku ebele, liasnga ya bosambisi ya mondimi(tala 32.16.2).

  • Moto oyo asila kozwa dotasio azali na ndingisa ya kozwa lisusu bonganganzambe na ye te mpe mapamboli na ye ya tempelo bobele bondimisami ya Bokambi ya Yambo mpe nsima ya mobu moko ekoka uta bozongisi na ye (tala 32.17.2).

Soki mondimi alingi kaka alongwa na mokumba na ye ya mondimi, akopesa na episikopo mokanda ya bosenga mpe etiama mokoloto. Episikopo akotinda yango na mokambi ya likonzi na nzela ya LCR. Nsima na yango, mokambi ya likonzi akolandela mokanda ya bosenga malamu mpe akotinda yango na nzela moko wana. Bakambi basengeli kosala yango na lombango

Moto akoki kolongwa lisusu na mokumba na ye ya mondimi na kotindaka mokanda ya bosenga etiama mokoloto mpe elongobana engebene na bilo ya Eklezia.

Mwana moke oyo alingi kolongwa na mokumba na ye ya mondimi asengeli kolanda ndakisa ya mokolo longola se : mokanda ya bosenga esengeli kotiama mokoloto na mwana moke (soki azali na mibu koleka mwambe) mpe na moboti to baboti to mobokoli ya mwana alongobana.

Soki mondimi oyo alongwe na mokumba na ye ya mondimi azali kotia mobulu ya kofunda Eklezia na leta to na bakambi na yango, mokambi ya likonzi akolanda makebisi ya mokapo 38.8.23.

Atako soki bayebi lisumu monene, bakambi ya bonganganzambe basengeli kopesa eyano na mokanda ya bosenga ya kolongwa na mokumba ya mondimi. Bansango nyonso etali masumu eye ezwami ekateli te ekomami na ntango mokanda ya bodenga etindami na LCR. Yango ekosunga bakambi ya bonganganzambe balandela makambo oyo mikolo mikoya soki moto andimi kozonga na Eklezia (tala 32.16.2).

Mokambi ya bonganganzambe asengeli te koteya mondimi alongwa na mokumba na ye ya mondimi mpo na kokima bosambisi ya mokumba na ye ya mondimi.

Bakambi bakokoba kosunga bato oyo balingi kolongwa na mokumba na bango ya mondimi loba soki basengi ete bango moko balingi babenga bango te.


KOZONGISA MIKUMBA EKANGEMI NA MOKUMBA YA MONDIMI


Soki mikumba ya moto ekangemi na mokumba na ye ya mondimi epekisamaki to elongolamaki, bakambi bakosanganela ye, bakoteya ye mpe bakosunga ye loba soki ye moko asengi yango. Mokapo oyo ezali kolimbola lolenge nini mikumba na ye ekozongisama.

32.15

Kokoba Kosalisa

Mokumba ya bosambisi ya episikopo to ya mokambi ya likonzi esukaka te ntango mokumba ya mokumba epekisamaki to elongolamaki. Akokoba kosunga moto oyo, loba soki moto yango apesi ndingisa, na ntina ete mokolo moko akoka lisusu kozwa mapamboli ya mokumba na ye ya mondimi. Epeisikopo akobanda kosolola na ye mbala na mbala mpe ntang ezali ntina, molongobani na ye soki yango esengami. Mobikisi ateyaki na Banefite:

“Bokobengana ye te … bisika ya bokumbami na bino, mpo epai ya ba lolenge oyo bokokoba kosala; mpo boyebi te soki bakozonga mpe bakoyambola, mpe bakoya epai ya ngai na mokano motonda ya motema, mpe nakobikisa bango mpe bokozala nzela ya komemaka lobiko epai na bango” (3 Nefi 18:32).

Eleko oyo elandaka mbala moko bolongoli to bopekisi ya mokumba ya mondi ya moto ezalaka mpasi mpe ntina mpo na ye mpe libota na ye. Episikopo akokengela ete bandimi balenda babengama mpo na kosalisa moto oyo mokumba na ye ya mondimi epekisamaki to elongolamaki.

Episikopo asengeli koyeba ete kolengela bandimi ezali mokumba ya kosalisa moto oyo mokumba na ye ya Eklezia epekisamaki to elongolamaki, lokola moto apesi ndingisa. Bakosalisa lisusu bandeko mosusu ya libota. Bato oyo mikumba na bango ya kimondimi epekisami bakoki kozwa litomba ya kozala kati ya libakisi (tala 25.4.3).

Soki moto ya bosambiis alongwe esika azalaki kofanda, episikopo akoyebisa episikopo ya sika mpe akolimbola oyo asengeli koaslama yambo ete bopekisi elongolama. Soki mokumba ya mondimi elongolamaki to soki moto aboyi, episikopo akosala lolenge moko, na lolenge oyo moto ya bosambisi amoni ete asengeli kosungama na bakambi ya Eklezia.

32.16

Bolongoli Bopekisi ya Bakambi to Kozongisama na Eklezia

32.16.1

Masanga ya Bosambisi mpo na Kolongola Bopekisi ya Bakambi to Bozongisi Moto.

Soki mabaku malamu etali mokumba ya mondimi epekisami to elongolami na ntango ya Lisanga ya kotalela ezalela, lisanga mosusu ya bosambisi esengeli kosalama mpo na koyeba kolongola bopekisi to bozongisi moto kati ya Eklezia. Lisanga y aya bosambisi oyo esengeli kozala na ndelo ya likoki ya ndenge moko (to ndelo ya likolo) koleka Lisanga ya kotalela ezalela ya yambo. Ndakisa, soki Lisanga ya kotalela ezalela ekambamaki na mokambi ya likonzi to na mokambi ya misio, ezali mokambi ya likonzi nde akokamba lisanga mosusu ya mpo na koluka kolongola bopekisi to kozongisa moto.

Episikopo to mokambi ya likonzi ya sika ya moto oyo akokamba Lisanga ya kotalela ezalela. Akoluka koyeba ete moto yango asilaki koyambola mpe alengelami mpe alongobani mpo na kozwa mapamboli ya mokumba ya mondimi.

Bato oyo mikumba na bango ya kimondimi elongolamaki na bakambi basengeli kolakisa ete bayamboli ya solo mpenza na ntango ya mobu moko yambo ya kolongola bopekisi. Baoyo mokumba na bango ya kimondimi elongolamaki basengeli kolakisa ete bayamboli mpenza uta mobu moko yambo ya koluka bozongisi na bango. Na makambo etali mondimi oyo azalaki na libiangi monene na Eklezia na ntango eye asalaki lisumu monene, bowumeli ezalaka mingimingi ya ntango molai (tala 32.6.1.4).

Lisanga ya kotalela ezalela ekosangana mpo na kolongola bopekisi to kozongisa moto na Eklezia elandi mibeko moko moko wana lokola masanga mosusu ya bosambisi mokumba ya mondimi. Episikopo asengeli kozwa bondimisami ya mokambi ya likonzi yambo ya kosangisa Lisanga ya kotalela ezalela. Na misio, mokambi ya etape to ya disitiliki akozala na bosenga ya bondimisami ya mokambi ya misio.

Bokambi elandi ekosalama na masanga ya bosangisi mpo na koluka kolongola bopekisi to bozongisi moto kati ya Eklezia. Bokambami nyonso ezali ntina te na likambo moko na moko.

  1. Kolandela Lisanga ya kotalela ezalela ya mondimiya yambo. Episikopo to mokambi ya likonzi akolandela Lapole ya Lisanga ya kotalela ezalela ya mokumba ya mondimi. Akosenga mokanda moko na nzela ya LCR. Nsima ya boyekoli yango, akokutana na episikopo to mokambi ya likonzi ya esika oyo Lisanga ya kotalela ezalela ya ya yambo esalamaki mpo na koyeba malamu.

  2. Kosolola na episikopo ya moto ya bosambisi. Episikopo to mokambi ya likonzi akosolola na lolenge ya bozindo elongo na moto ya bosambisi mpo na komeka bokasi ya bondimi na ye na Yesu Klisto mpe bozindo ya boyamboli na yango. Akozwa lisusu mokano alongobani na mikano eye epesamaki na ekateli ya yambo.

  3. Kotala likambo etali bato to bazuzi. Nyango mosusu moto andimaki ete asalaki mbeba to azwaki etumbu na yango. Ntango mosusu moto atangamaki na kati ya likambo etali moyibi ya biloko ya bato to misala mosusu elogobani te. Na likambo ya boye, mokambi akosangisa te Lisanga ya kotalela ezalela oyo moto ya bosambisi akokisi makambo nyonso bosembo, ya etumbu to bosambisi oyo esakolamaki na bakambi bazuzi. Makambo oyo ekoki kozala bokangemi na boloko, bonsomi ya bokengeli, bonsomi ya mibeko, bofuti to bobongisi. Oyo elongolami esengeli bondimisami ya Bokambi ya Yambo liboso ya kosalisa Lisanga ya kotalela ezalela mokumba ya mondimi. Ekoki kozala ya moto oyo akokisi mikano nyonso ya bolongobani mpe alakisi boyamboli ya solo mpenza, kasi apesami ngolu ya bolandeli to oyo asengeli kofuta lifuti monene.

  4. Kokutana na bakambi ya bonganganzambe ya bato na makama. Episikopo to mokambi ya likonzi akokutana na episikopo to mokambi ya likonzi ya sikawa ya bato nyonso oyo bazwaki makama (tala 32.10.2).

  5. Kokoma bosambisi. Akokoma mokolo, ngonga mpe esika oyo Lisanga ya kotalela ezalela ekosalama na moto ya bosambisi.

  6. Kokamba lisanga. Akokamba Lisanga ya kotalela ezalela kolandisama bokambi ya mokapo 32.10.3. akosenga epai ya moto ya bosambisi oyo asalaki mpo na koyambola. Akotuna ye lisusu boyokani na ye na oyo etali Yesu Klisto mpe Eklezia. Ntango makambo nyonso ya ntina etalisami, akotuna moto ya bosambisi abima. Na bapesi toli na ye, bakosambela mpo na koyeba mokano nini basengeli kozwa. Mikano misato miye milandi ekoki kotunama ezali:

    1. Kotelama kaka na bopekisi to bolongoli mokumba ya mondimi.

    2. Kolongola bopekisi to kopesa ndingisa ya bozongisi.

    3. kosenga na Bokambi ya Yambo apesa bondimisami ya bolongoli ya bopekisi to bozongisi (soki ekozala malamu kolandisama na “Kosenga bondimisami ya Bokambi ya Yambo” oyo na nse).

  7. Kokabola ekateli. Ntango Lisanga ya kotalela ezalela ezwi ekateli, mokambi akoyebisa moto ya bosambisi. Soki bondimisami ya Bokambi ya Yambo ekozala ntina, akolimbola ete ekateli etali bosenga uta na Bokambi ya Yambo.

  8. Bopesi Lapole. Episikopo to mokambi ya likonzi akotinda Lapole ya bosambisi ya ùmokumba ya mondimi na na nzela ya Documentation pour dirigeants et greffiers. Akoki kosenga na kalaki abongisa yango. Ayeba ete mokanda moko te ya lokasa to ya masini ebombama na bisalelo. Asengeli koyeba lisusu ete mikanda nyonso oyo ebongisamaki mpo na kolengela lapole nyonso etumbami na lombango.

  9. Kosenga bondimisami ya Bokambi ya Yambo (soki ezali malamu). Na makambo oyo elandi, bondimisami ya Bokambi ya Yambo ezali ntina mpo na kolongola bopekisi ya bakambi na mokumba ya mondimi ya moto to ya bozongisi ye na kati ya Eklezia. Bondimisami oyo ezali lotomo atako soki mbeba esalamaki nsima bopekisi ya bakambi na oyo etali mokumba ya mondimi ya Eklezia to bolongoli na ye.

    Mokambi ya likonzi akotinda mokanda na Bokambi ya Yambo bobele soki asengeli na bondimisami (tala 6.2.3).

    1. Koboboma

    2. Bosangisi nzoto na ndeko ya libota

    3. Kobebisa mwana moke to elenge songolo na bosaleli mposa ya nzoto, bosaleli mposa ya nzoto mwana moke to elenge, to bobebisi monene na nzoto to na makanisi mwana to elenge na mokolo to na elenge oyo azali na mibu ebele.

    4. Bobebisi mwana na kosalelaka bilili ya bosoto ntango bopekisi elongobana etiami.

    5. Bopengwi

    6. Ezaleli ya moto mabe oyo asaleli bosangisi nzoto

    7. kOsala lisumu monene ntango ozali na libiangi ya ntina na Eklezia.

    8. Kipebe to kilezibiene—misala ya bosangisi nzoto ya mibali na mibali to basi na basi (tala mokapo 38,6.23).

    9. Koyiba misolo to biloko ya Eklezia

  10. Kopesa nsango ya Lisanga ya kotalela ezalela na kokomaka. Episikopo to mokambi ya likonzi akozongisa na lombango na moto ya bosambisi mokanda ekomama ya ekateli mpe makama na ye.

  11. Libatisi mpe nkotisa. Soki mokumba ya mondimi elongolamaki na ntango bosambisi ya yambo, asengeli kobatisama lisusu mpe kokotisama lisusu. Soki bondimisami ya Bokambi ya Yambo ekozala ntina, makuli oyo ekosalama bobele nsima ya kozwa bondimisi. Mokanda ya libatisi mpe ya nkotisa ekosalama te (tala 32.14.4).

32.16.2

Bozongisami nsima ya Kolongwa na Kimondimi ya Eklezia

Soki moto alongwe na mokumba na ye ya mondimi na bolongobani, asengeli kobatisama mpe kokotisama mpo na kozongisama lisusu na Eklezia. Mpo na mikolo, bozongisami ekosalama te esengeli kozela mobu moko ekoka uta alongwaki.

Soki moto asengi bozongisami na ye, episikopo to mokambi ya likonzi akozwa mokanda ya Lapole mikano ya bokambi miye mitamboli na kolongwa na ye. Akoki kozwa yango na nzela ya LCR.

Episikopo to mokambi ya likonzi akosolola nsima na lolenge ya bozindo na moto yango. Akoluka koyeba ntina ya kolongwa ya moto oyo mpe mposa ya bozongeli. Na bolingo, akoluka koyeba masumu minene oyo moto akokaki kosala yambo to nsima ya kolongwa na mokumba na ye ya mondimi. Mokambi akobanda misala ya kozongisa te kino ntango andimi mpenza ete moto oyo ayamboli, amilengeli mpe alongobani mpo na kosepela na mapamboli ya kozala mondimi ya Eklezia.

Malakisi mpo kondimama lisusus nsima ya moto kolongwa ye moko

  • Bokosangisa bato na lisanga ya kotalela ezalela ya mondimi soki ezalela ya moto yango etiamaki bopekisi na ntango alongwaki eklezia ye moko.

  • Basangisaka bato ya lisanga ya botaleli ezalela ya mondimi soki moto asalaki lisumu monene, lna kati etangami mpe bopengwi, yambo ya kolongwa ye moko lokola mondimi.

Na makambo mosusu, lisanga ya bataleli ezalela ya mondimi ekoki kosangana te longola se se sokiepisikopo to mokambi ya likonzi amoni ete yango esengeli kosalama.

Ntango esengeli bato basangana mpo na kotalela ezalela ya mondimi mpo na moto oyo asila kozwa dotasio ya tempelo, mokambi ya likonzi akokamba yango. Soki yango ekozala malamu mpo na moto oyo naino azwa dotasio te, episikopo nde akokamba yango, na bondimisami ya mokambi ya likonzi.

Soki moto asali moko ya mabunga oyo etalisami awa na mokapo 32.16.1, number 9, yambo to nsima ya kolongwa na mokumba na ye ya mondimi, bondimisami ya Bokambi ya Yambo ezali lotomo mpo ete akoka kozonga. Soki moto asali moko ya mabunga oyo etalisami awa na mokapo 32.14.5, number 1, yambo to nsima ya kolongwa ye moko na ezalela ya imondimi, maloba ekokomama likolo ya mokanda na ye ya mondimi.

Moto oyo akosenga bozongisi na ye na Eklezia asengeli kokokisa masengemi ya bato mosusu oyo babatisamaka. Ntango episikopo to mokambi ya likonzi andimisami ete moto oyo alongobani mpe azali solo na mposa ya kozongisama, moto yango akobatisama mpe akozwa nkotisa. Mokanda ya libatisi mpe ya nkotisa ezali kosalama te (tala 32.14.4).

Elilingi
moto azali kozwa elambo

32.17

Molulu ya Eklezia, Bokulisi, mpe Bozongisi ya Mapamboli nsima ya Bozongisami

32.1.

Molulu ya Eklezia mpe Bokuli

Etando oyo elandi elakisi mosala elongobani ya moto oyo azongisami na libatisi mpe nkotisa.

Naino Azwa Dotasio Te

Asila Kozwa Dotasio

Banganganzambe Bazlaki na yango Yambo

Naino Azwa Dotasio Te

  • Mbala moko nsima ya libatisi mpe nkotisa, bonganganzambe ekoki kopesamela bango mpe bakoki kobulisama na mokumba ya bonganganzambe oyo azalaki na yango na ntango ya kolongwa na ye lokola mondimi to ya kolongwa na ye moko. Bakolakis bango te na voti ya kosungama.

  • Bakoki te kozwa mokanda ya boyingeli na tempelo mpo na kosala mabatisi mpe nkotisa ya mozweli.

Asila Kozwa Dotasio

  • Bakoki te kobulisama na mokumba ya bonganganzambe. Ntango bonganganzambe na bango mpe mapamboli ya tempelo ezongisameli bango, mokumba na bango ya liboso ekozongisama lokola elimbolami awa na mokapo 32.17.2. Bakoki te kosala makuli kino na ntango wana.

  • Bakoki koya na milulu nyonso ya Eklezia oyo epesameli ndingisa na mondimi oyo azwa naino dotasio te mpe oyo azali na bonganganzambe te.

  • Bakoki te kolata bagarma ya tempelo to kozwa mokanda songolo ya boyingeli na tempelo kino mapamboli na bango ezongisama.

Bandimi Basusu

Naino Azwa Dotasio Te

  • Bakoki koya na milulu nyonso ya Eklezia lokola mondimi ya sika.

  • Bakoki kozwa mokanda ya boyingeli na tempelo mpo na mabatisi mpe nkotisa ya mozweli.

Asila Kozwa Dotasio

  • Bakoki koya na milulu nyonso ya Eklezia oyo epesameli ndingisa na mondimi oyo azwa naino dotasio te mpe oyo azali na bonganganzambe te.

  • Bakoki te kolata bagarma ya tempelo to kozwa mokanda songolo ya boyingeli na tempelo kino mapamboli na bango naino ezongisami (tala 32.17.2).

32.17.2

Bozongisi ya Mapamboli

Bato oyo basila kozwa dotasio na bango ya tempelo mpe bazongisamaki lisusu na nzela ya libatisi mpe nkotisa bakoki kozwa bonganganzambe (mpo na bandeko mibali) mpe mapamboli na bango ya tempelo bobele na bokuli ya bozongisi mapamboli (tala Malongi mpe Mayokani 109:21). Bakokulisama lisusu te na mikumba ya bonganganzambe to bakozwa dotasio lisusu te. Mapamboli oyo ekozongisama na nzela ya bokuli oyo. Bandeko mibali bakozwa mokumba na bango ya kala na bonganganzambe longola se soki ezali mokumba ya bantuku nsambo, episikopo to nkoko.

Kaka Bakambi ya Yambo nde bakoki kondima bosalemi ya bokuli mpo na bozongisi ya mapamboli. Bakotala mpe komanyola bosenga mpo na kozwa bokuli yango bobele soki esalamaki mobu moko eleki uta bozongisi moto na nzela ya libatisi mpe nkotisa.

Episikopo to mokambi ya likonzi akosolola na moto yango mpo na koyeba soki alongobani to asili komilengela. Ntango mokambi ya likonzi amoni ete moto asili komilengela, akopesa bozongisi ya mapamboli na kosalelaka LCR. Tala 6.2.3 mpo na ntina ya mokumba ya mokambi ya likonzi ntango ya kotinda mikanda na Bokambi ya Yambo.

Soki Bakambi ya Yambo bapesi bondimami na bozongisi ya mapamboli, bakopesa mokumba na Mokambi momeme moko to mokambi ya likonzi mpo na kosolola na moto yango. Soki moto yango alongobani, mokambi oyo akokulisa ye mpo na kozongisa mapamboli ya moto oyo.

Mpo na kozwa bansango mingi koleka na ntina ya mikanda ya mondimi mpe bozongisi ya mapamboli, tala 32.14.4.