Makomi
Etele 8


Mokapo 8

Songisongi mpe boswani bozali likolo lya bokonzi—Akisi asali likelemba lyoko lya nkuku likangana na ndai mpo ya koboma mokonzi—Makelemba ma nkuku mazali ma zabulu, mpe masuki o bobebisami bwa bikolo—Bapaganu ba sikawa bakebisami likolo lya likelemba lya nkuku liye liluki kokweyisa bonsomi bwa mboka, kabila, mpe bikolo.

1 Mpe esalemaki ete abotaki Omele, mpe Omele akonzaki o esika ya ye. Mpe Omele abotaki Yelede; mpe Yelede abotaki bana babali mpe bana basi.

2 Mpe Yelede atombokaki na tata wa ye, mpe ayaki mpe afandaki o mboka ya Eti. Mpe esalemaki ete aleteki bato mingi, na ntina ya maloba ma ye ma lokuta, kina alongaki katikati ya bokonzi.

3 Mpe elongaka ye katikati ya bokonzi apesaki etumba epai ya tata wa ye, mpe akumbaki mosika tata wa ye o kati ya bokangemi, mpe asalaki ye asala o bokangemi;

4 Mpe sikawa, o mikolo mya bokonzi bwa Omele azalaki o bokangemi katikati ya mikolo mya ye. Mpe esalemaki ete abotaki bana babali mpe bana basi, o ntei ya bango ezalaki Heselone mpe Koliatumili;

5 Mpe basilikaki mpenza na ntina ya bosali bwa Yelede ndeko mobali wa bango, mpenza ete batelemisaki limpinga lyoko mpe bapesaki etumba epai ya Yelede. Mpe esalemaki ete bapesaki etumba epai ya ye o butu.

6 Mpe esalemaki ete ebomaka bango limpinga lya Yelede bazalaki penepene na koboma ye lokola; mpe asambaki elongo na bango ete baboma ye te, mpe alingaki kosundola bokonzi epai ya tata wa ye. Mpe esalemaki ete batikaki epai ya ye bomoi bwa ye.

7 Mpe sikawa Yelede akomaki na mawa mpenza na ntina ya bobungisi bwa bokonzi bwa ye, mpo atiaka motema mwa ye likolo lya bokonzi mpe likolo lya nkembo ya mokili.

8 Sikawa mwana mwasi wa Yelede kozalaka nganga mpenza, mpe komonoko mawa ma tata wa ye, akanisaki kosala mwango moko na mwango akoka kosikola bokonzi bwa tata wa ye.

9 Sikawa mwana mwasi wa Yelede azalaki malonga mpenza. Mpe esalemaki ete alobaki elongo na tata wa ye, mpe alobaki epai ya ye: Mpo ya nini tata wa ngai ozali na mawa maike boye? Etangi yo te likundoli liye batata ba biso bamemeki na kokatisaka mozindo monene? Tala, ezali te nsango yoko etali bango ba kala, ete na miango mya nkuku mya bango bazwaki bokonzi mpe nkembo enene?

10 Mpe sikawa, yango wana, tika tata wa ngai atinda mpo ya Akisi, mwana mobali wa Kiminolo; mpe tala, nazali malonga, mpe nakobina liboso lya ye, mpe nakosepelisa ye, mpe akozala na mposa ya ngai o bolongani; yango wana soko akozala na mposa ya yo ete opesa epai ya ye ngai o bolongani, nde ekoloba yo: Nakopesa yo ye soko omemi epai ya ngai moto mwa tata wa ngai, mokonzi.

11 Mpe sikawa Omele azalaki moninga wa Akisi; yango wana, etindaka Yelede mpo ya Akisi, mwana mwasi wa Yelede abinaki liboso lya ye ete asepelisaki ye, mpenza ete azalaki na mposa ya ye o bolongani. Mpe esalemaki ete alobaki epai ya Yelede: Pesa ye epai ya ngai o bolongani.

12 Mpe Yelede alobaki epai ya ye: Nakopesa ye epai ya yo, soko omemi epai ya ngai moto mwa tata wa ngai, mokonzi.

13 Mpe esalemaki ete Akisi asangisaki o ndako ya Yelede libota lya ye mobimba, mpe alobaki epai ya bango: Ekolapa bino ndai epai ya ngai ete bakozala potongono epai ya ngai o likambo liye nakozala na mposa na bino?

14 Mpe esalemaki ete banso balapaki ndai epai ya ye, na nkombo ya Nzambe wa lola, mpe lisusu na lola, mpe lisusu na mabele, mpe lisusu na mito mya bango, ete oyo akobaluka mosika na lisalasi liye Akisi azalaki na mposa akobungisa moto mwa ye; mpe oyo akosakola likambo linso Akisi asalaki eyebana epai ya bango, akobungisa bomoi bwa ye.

15 Mpe esalemaki ete boye bayokanaki elongo na Akisi. Mpe Akisi asalaki epai ya bango ndai eye epesamaka epai ya bango ba kala baye lokola balukaki bokonzi, eye ekitanisamaki kutu uta na Kaina, oyo azalaki mobomi uta o ebandeli.

16 Mpe bakangamaki na nguya ya zabulu mpo ya kosala ndai iye epai ya bato mpo ya kokanga bango o molili, mpo ya kosalisa baye ba lolenge loye lokola balukaki nguya mpo ya kolonga nguya, mpe mpo ya koboma, mpe mpo ya kopunza, mpe mpo ya kokosa, mpe mpo ya kosala ndenge inso ya nkuna mpe pite.

17 Nde ezalaki mwana mwasi wa Yelede oyo atiaki yango o kati ya motema mwa ye mpo ya koluka makambo maye ma kala; mpe Yelede atiaki yango o motema mwa Akisi; yango wana, Akisi asalaki yango epai ya libota lya ye mpe baninga ba ye, kokambaka bango mosika na bilako malonga mpo ya kosala likambo linso azalaki na mposa.

18 Mpe esalemaki ete basalaki likelemba lya nkuku, kutu lokola bango ba kala; liye likelemba lizalaki nsomo mpe lya nkuna likolo lya inso, o bomoni bya Nzambe;

19 Mpo Nkolo akosalaka te o makelemba ma nkuku, mpe akolingaka te ete moto asopa makila, kasi o makambo manso apekisi mango, uta o ebandeli ya moto.

20 Mpe sikawa ngai, Moloni, nakomi te lolenge la makelemba ma bango, mpo eyebisamaki epai ya ngai ete ezalaki o ntei ya bato banso, mpe ezalaki o ntei ya Balamani.

21 Mpe masali bobebisami bwa bato baye, baye nazali kolobelaka sikawa, mpe lokola bobebisami bwa bato ba Nefi.

22 Mpe ekolo enso ekosunga makelemba ma nkuku ma lolenge loye, mpo ya kozwa nguya mpe matabisi, kina makopanzana likolo lya ekolo, tala, bakobebisama; mpo Nkolo akolinga te ete makila ma basantu ba ye, maye makosopana na bango, mabelela ntango inso epai ya ye uta o mabele mpo ya bobekoli likolo lya bango mpe nzokande abekoli bango te.

23 Bongo, O bino Bapaganu, ezali bwania na Nzambe ete makambo maye malakisama epai ya bino, ete na mango bokoka koyambola masumu ma bino, mpe bolinga te ete makelemba ma babomi baye mazwa likolo lya bino, maye matongami mpo ya kozwa nguya mpe matabisi—mpe mosala, iyo, kutu mosala mwa bobebisami moyei likolo lya bino, iyo, kutu mopanga mwa boyengebene bwa Nzambe wa Seko mokokweya likolo lya bino, mpo ya bokei mpe bobebisami bwa bino soko bondimi makambo maye mazala.

24 Yango wana, Nkolo atindi bino, ekomono bino makambo maye koya o ntei ya bino ete bolamuka o boyoki boko bwa ezaleli ya bino ya nsomo, na ntina ya likelemba liye lya nkuku liye likozala o ntei ya bino; to lisuma ezala epai ya lyango, na ntina ya makila ma bango baye babomamaki; mpo babeleli uta o mputulu mpo ya bobekoli likolo lya lyango, mpe lisusu likolo lya bango baye batongaki lyango.

25 Mpo esalemi ete ye oyo atongi lyango mpo ya kokweyisa bonsomi bwa mboka, mpe kabila, mpe bikolo binso; mpe ememi esalema bobebisami bwa bato banso, mpo litongami na zabulu, oyo azali tata wa lokuta lonso; kutu mokosi ona kaka abubaki baboti ba biso ba yambo, iyo, kutu mokosi ona kaka oyo asalaki moto asala bobomi uta o ebandeli; oyo ayeisaki mikasi mitema mya bato ete baboma baprofeta, mpe babamba bango mabanga, mpe babwaka bango libanda uta o ebandeli.

26 Yango wana, ngai, Moloni, natindami mpo ya kokoma makambo maye ete bobe bosila, mpe ete ntango ekoka koya eye Satana akoka te kozala na nguya likolo lya mitema mya bana ba bato, kasi ete bakoka kondimisama mpo ya kosala bolamu ntango inso, ete bakoka koya epai ya liziba lya bosembo bonso mpe kobikisama.