2010–2019
Libala: Kotala mpe Koyekola
Sánzá ya mínei 2013


Libala: Kotala mpe Koyekola

Bilaka ya Nkolo esembolami na baoyo balandi ndakisa ya bomoi oyo etongi mikangano ya libala ya esengo, ya esantu.

Mpokwa moko mibu mileki, mwasi wa ngai mpe ngai tokendeki kotala ndako ya moko ya bana babali ba biso mpe mwasi mpe bana ba ye mpo na kolia. Ezali likambo moko ya momesano mpo na libota moko na bana bake: ezalaki na makelele mpe kutu koseka mingi. Mwa ntango nsima ya kolia, nkoko wa ngai ya mwasi ya mibu minei, Anna, mpe ngai tovandako naino na mesa. Komonaka ete azalaki na bokebi bwa ngai nyonso, atelamaki ngwi na kiti moko mpe akangaki miso na ye na ngai. Ntango amonaki ete na ntembe te nazalaki kotala ye, na lokumu atindaki ngai mpo na“kotala mpe koyekola.” Nde abinaki mpe ayembaki loyembo moko mpo na ngai.

Liteya ya Anna ya “kotala mpe koyekola” ebetaki ngai. Ezalaki bwania ewutaki na monoko ya mwa mwana. Biso tokoki koyekola mingi mpenza na kotalaka mpe nsima komaniolaka maye tomoni mpe toyoki. Na molimo wana, tika nakabola elongo na bino mwa mabongisi moko oyo namonaki na kotalaka mpe koyekolaka uta na mabala ma kitoko mpe botongono. Mabongisi maye ekotonga mabala ya makasi mpe ya kosepelisa oyo ezali engebene na mabongisi ma lola. Nabengisi bino botala mpe boyekola elongo na ngai.

Yambo, namoni ete na mabala ma esengo mingi koleka ete mobali mpe mwasi bango mibale batiki batata mpe bamama ba bango, mpe bakani elongo kotonga libala moko oyo ekofuluka seko na seko. Basosoli ete bazali kotambola na nzela moko ya bonzambe. Bayebi ete mokangano mosusu ya lolenge moko te ekoki komema esengo mingi, kobota bolamu mingi, to kopesa bopetoli ya moto na moto. Botala mpe boyekola: balongani na libala ya malamu mingi koleka bakotala mabala ma bango lokola eluti na ntalo.

Nsima, bondimi. Mabala ma elongo matongami na moboko ya bondimi na Nkolo Yesu Klisto mpe bokangami na mateya ma ye.1 Namoni ete balongani oyo basali mabala ma bango ya esengo mpe ya bule bakosalela ndakisa ya bondimi: bakokende na elambo mpe mayangani masusu mposo inso, bakosala mpokwa na libota, bakofuta moko na zomi ya bosembo. Boluki bwa bango elongo ezali kotosa mpe kozala malamu. Bakokanisa te mitindo mizali bilei oyo bakokamata bobele makabo oyo ezali ya kitoko mingi koleka.

Bondimi ezali moboko ya bolamu nyonso oyo ekolendisa libala. Moboko mosusu te mpo na libala ekoki kopesa mbano eluti ntalo ya lolenge moko. Boye, kolendisaka bondimi ekolendisa libala. Bondimi ekokola lokola tozali kobatela mitindo. Lokola bondimi ya mobali mpe mwasi ekokola, bongo ekokola boyokani, bokasi, mpe esengo ya libala lya bango. Boye, kobatelaka mitindo ezali moboko ya kotiaka libala makasi. Botala mpe boyekola: bondimi na Nkolo Yesu Klisto ezali moboko ya mabala ya esengo mpe ya seko.

Misato, boyamboli. Mabala ya esengo eyekami na likabo ya boyamboli. Namoni libongisi oyo ya kitoko epamboli bandako mingi. Moko na moko na biso amemaka bokasi mpe botau na libala lya biso. Boyamboli ezali eteni ya ntina mpenza ya mokangano ya libala. Balongani oyo mbala na mbala bakosala bomisosoli ya bosembo mpe nokinoki bakosala bobelemi esengeli mpo na koyambola mpe kobongisa kozwa mabuta ma libiki na mabala ma bango. Boyamboli ekosalisa kozongisa mpe kosimba boyokani mpe kimia.

Bosawa ezali bozindo ya boyamboli. Bosawa ezangi kimoyimi, ezali moyimi te; ekosenga te lolenge ya yemei to ekoloba te mpo na komonela basusu. Esika na yango, bosawa ekoyanola na bosokemi 2 mpe ekoyokemela na boboto mpo na kososola, to kozongisela mabe. Bosawa endimi ete moko te akoki kobongola moto mosusu, kasi na bondimi, bokasi mpe lisalisi ya Nzambe, biso tokoki kosala mbongwana na motema ya bisomei na nguya.3 Koyebaka mbongwana ya matema na nguya ekosala biso tosalela basusu, mingimingi balongani ba biso, bosokemi.4 Bosawa elingi koloba ete mobali mpe mwasi bakoluka kopambolana, kosalisana, mpe kotombolana, kotiaka mosusu liboso na mokano nyonso. Botala mpe boyakola: boyamboli mpe bosawa ekotonga mabala ma esengo.

Minei, limemia. Namoni ete na mabala kitoko ma esengo, mibali mpe basi bamemianami. Bakotalana lokola balongani bakokani mpe bakosalisana na mikumba mya bango mya bule. Bizalela uta na bisika mpe ntango oyo mibali bakonzaki basi to basalelaki bango na ndenge nyonso lokola balongani ba nse na libala ezali engebene na mobeko mwa Nzambe te mpe esengeli kokitanisama na mabongisi mpe ndakisa ya bosembo.

Balongani na mabala manene bakozwa mikano na lisanga, na molongani moko na moko kosalaka lokola mosali elongo mpe asengeli na boponi mpe voti ya lolenge moko.5 Yambo bakokangama na ndako mpe na kosalisana na mikumba mya bango ya kokabola6 Mabala mavandi na kosala elongo, na kosamba te. Ngonga ya bolei mpe ntango ya libota oyo elandi ekomi otondo ya mokolo mwa bango mpe likambo ya makasi ma bango ya malamu mingi koleka. Bakokanga bikolo ya lotiliki mpe bakosundola lisano na moto na moto na ntina ya kosalisa mikumba ya ndako. Lokola ekoki kosalema, bakotanga elongo na bana ba bango butu nyonso mpe bango mibale bakosala elongo na kosalisaka kotia bana bake na mbeto. Bakokende mbeto elongo. Soki mikumba mpe bizalela bipesi nzela, mibali mpe basi bakosala penepene na misala ya motuya mingi koleka ezali—mosala tokosala na bandako ya biso.

Esika limemia ezali, ezali lisusu polele, oyo ezali mama na likambo ya mabala ma esengo. Namonaki ete ezali na sekele te na makambo malongobani na mabala mavanda na komemiana mpe polele. Mibali mpe basi bakozwa mikano nyonso ya mosolo elongo, mpe bango mibale bakozala miso na makambo manso.

Botongono ezali lolenge moko ya limemia. Balongani ba Libala ya elonga bazali “na botongono ya makasi” na moko mpe mosusu.7 Bakosala keba mpo na kotika balongobani mpenza na ndenge mingi. Bakomipesa te ndingisa na makambo ma nkuku ya interneti. Bakokabola na bonsomi liloba ya sekele na lingomba ya Interneti. Bakotala ata moke te bato ya interneti oyo bakoki koyiba bondimi ya bule ya molongani wa bango. Bakosala to koloba ata moko te eloko elongobani te, ezala ya bilili to ya nzoto. Botala mpe boyekola : mabala ma kafukafu ekozala na limemia nyonso, na polele, mpe na botongono.

Mitano, bolingo. Mabala ma esengo mingi koleka namoni ekongengisa botosi na moko ya mitindo ya esengo mingi koleka—ete “tozala elongo na bolingo.”8 Kolobaka na mibali, Nkolo atindaki “Okolinga mwasi wa yo na motema mwa yo mobimba, mpe akokangama na ye mpe na mosusu te.”9 Mokanda ya bokambi ya Eklezia eteyi: “Liloba kokangama elingi koloba kozala ya komipesa mpe botongono mobimba to moto moko. Balongani bakokangama na Nzambe mpe bango na bango na kosalisaka mpe kolinganaka mpe na kobatelaka mayokani na botongono nyonso bango na bango mpe na Nzambe. …[Mobali mpe mwasi bango mibale] bakotika nsima bomoi bwa bango ya bonzemba mpe bakotonga libala lya bango lokola eloko [ya bango] ya yambo. … Bakotika te moto mosusu te to litomba mosusu te kozala eloko ya yambo mingi … koleka kobatela mayokani basalaki na Nzambe mpe bango na bango.”10 Botala mpe boyekola: balongani ba elongo bamipesa mobimba na bango na bango.

Ezali na baye ya bango mabala mazali te ya esengo lokola balingi, baye babala mokolo moko te, baye baboma libala, bazali moboti se moko, to mpo na ntina kilikili bakoki te kobala. Bizalela oyo ekoki kozala mpenza ya kpokoso mpe ya mpasi na motema, kasi yango ezali ya seko te. Na bino oyo bozali na ezalela ya bongo kasi oyo “na esengo bozali kosala makambo manso oyo ezali na nguya na [bino] ”11 mpo na koyika mpiko, tika lola epambola bino mingi. Boluka lotomo ya kosala libala ya seko, lokola na kobundaka to komilengelaka mpo na kozala molongani ya kolongobana. Bomikundola, “bandimi ya botongono baye ya bango bizalela epesi bango nzela te ya kozwa lipamboli ya libala ya seko … na bomoi oyo bakozwa mapamboli manso malakelamaka na baboseko, soki babateli mayokani ma bango basalaki elongo na Nzambe.12

Moko ya nzela ezali elengi mingi koleka na Buku ya Mormon esangeli bobele “Mpe babalaki, mpe bapesamaki o libala, mpe bapambolamaki engebene na ebele ya bilako biye Nkolo asalaki epai ya bango.”13 Bilaka ya Nkolo esembolami na baoyo balandi ndakisa ya bomoi oyo etongi mikangano ya libala ya esengo, ya esantu. Mapamboli eyei lokola bansuka ya esengo, ya kolakelama ya kosalelaka na botongono nsango malamu ya Yesu Klisto.

Natondi botondi mpo na mwasi wa ngai ya kitoko, Katy, oyo azali bolingo ya bomoi bwa ngai.

Libala ezali likabo ewuti na Nzambe mpo na biso; bolamu ya mabala ma biso ezali likabo ewuti na Ye. Napesi litatoli ya mwango ya kitoko ya Tata wa biso ya bolingo, oyo apesi libako ya libala ya seko ya kitoko. O nkomba ya Yesu Klisto, amene.