2010–2019
Tozali Bana Basi Ba Tata wa Lola
Sánzá ya mínei 2013


Tozali Bana Basi ya Tata na Lola

Lokola bana basi ba Nzambe tozali kaka moko mpe tokesani na bizalela mpe mayele ma biso. Mpe kasi eteni ya biso ezali na ntina—mpamba te tozali na ntina.

Mposo nyonso bilenge basi na mokili mobimba bazongeli mokano ya Bilenge basi. Kotala te lokota, mbala yonso nayoki maloba mana, “Tozali bana basi ba Tata wa Lola, oyo alingi biso, mpe tolingi,”1 Molimo ayebisi mpenza na molimo mwa ngai ete mazali ya solo. Ezali bobele te liyebisi ya lolenge la biso—nani tozali—kasi lisusu bondimi ya nani tozali. Tozali bana basi ya mozali moko anetwama!

Na ekolo nyonso mpe na mokolo nyonso, nakutanaki na bilenge basi ya bondimi, ya maloba kitoko, batonda na pole, babongisama na mosala makasi mpe momekano, kozalaka na bondimi ya peto mpe ya pete. Bazali na nguya. Bazali babateli ya boyokani oyo “batelemi lokola banzeneneke ba Nzambe o ntango inso mpe o makambo manso, mpe o bisika binso.”2

Ntango nazalaki na college, nazali moko ya BYU International Folk Dancers. Eleko moko ya molunge lingomba ya biso ezwaki litomba kaka moko ya mobembo na bamisio na Europa. Ezalaki eleko ya molunge ya mpasi mpo na ngai mpamba te mwa basanza elekaki tata wa ngai akufaki na mbalakaka. Ntango tozalaki na Ecosse, namiyokaki mingimingi ngai moko kaka mpe nakomaki na botau. Tobinaki na ndakonzambe butu wana, mpe nde nsima ya lisano tokendeki na ekuke elandaki na ndako ya misio. Ntango nazalaki kotambola, namonaki libanga moko etiamaki na elanga moko ebombama malamu na ezibele. Likolo na yango natangaki maloba, “Ozala nani, sala ya yo eteni malamu.” Na ngonga wana maloba mana makotaki na mozindo na motema mwa ngai, nayokaki nguya ya lola esimbaki ngai mpe epesaki ngai ntango moko. Nayebaki nayebanaki na Tata moko ya Lola. Nayokaki nazalaki ngai moko kaka. Natelamaki na elanga na mpizoli na miso. “Ozala nani, sala ya yo eteni malamu.” Esakola wana ya pete ekomisaka kika bomoni bwa ngai ete Tata wa Lola ayebaki ngai mpe azalaki na mwango moko mpo na bomoi bwa ngai, mpe molimo nayokaki esalisaki ngai kososola ete eteni ya ngai ezali na ntina.

Nsima nayokaki ete liloba oyo mbala moko etindikaki profeta David O. McKay ntango azalaki kosala lokola misionele na Ecosse. Amonaka yango likolo ya libanga moko na ndako moko na ngonga moko ya botau na bomoi bwa ye mpe na misio ya ye, mpe maloba matombolaki ye. Mibu nsima ntango babukaki ndako wana, abongisaki mpo na kozawa libanga wana mpe asalaki etiama na elanga na ngako ya misio.3

Lokola bana basi ba Nzambe tozali kaka moko mpe tokesani na bizalela mpe mayele ma biso. Mpe kasi eteni ya biso ezali na ntina—mpamba te bisotozali na ntina. Lisalisi lya biso ya koleisa, koteya, mpe kolengela basusu ekoki komonana ya mpamba, ya kokitisa, ya mpasi, mpe ya kotiola ntango mosusu, mpe kasi ntango tomikundoli ete molongo mwa yambo na mokano ya Bilenge Basi—“Biso bana basi ba Tata wa Lola, oyo alingi biso” —ekosala bokeseni nyonso na mikangano mya biso mpe biyano bya biso.

Kala te mama wa ngai ya monzele ya mibu 92, akufaki. Atikaki bomoi ya kufa lokola azalaka na bomoi—na kimia. Bomoi bwa ye ezalaki te oyo ye akanaka. Mobali wa ye, tata wa ngai, akufaki ntango azalaki na mibu 45, kotikaka ye elongo na bana misato—ngai mpe bandeko ba ngai babali babale. Azalaki na bomoi mibu 47 lokola mokufeli mobali. Asungaki libota lya biso na koteyaka kelasi na moi mpe koteyaka piano na butu. Abatelaki tata wa ye ya mokolo, nkoko wa ngai, oy azalaki kofanda na ekule ya penepene. Asalaki keba ete moko na moko na biso asalaki college. Ya solo, akangamaki na yango mpenza ete tokokaki kozala “basalali elongo” mpe amilelaki mokolo moko te. Abatelaki mayokani ma ye, mpe mpamba te asalaki yango, abiangaki na nse nguya ya lola mpo na kopambola ndako ya biso mpe mpo na kotinda makamwisi. Ayekamaki na nguya ya losambo, bonganganzambe, mpe bilaka ya boyokani. Azalaki botongono na mosala epai na Nkolo. Bomipesi bwa ye ya sikisiki elendisaki biso, bana ba ye. Mbala mingi azalaki kozongela makomi: “Ngai, Nkolo, nazali ya kokangama ntango bosali nini nalobi; kasi ntango bosali te nini nalobi, bozali na elaka te.”4 Wana ezalaki mokano mwa ye, mpe ayebaki ezalaki ya solo. Asosolaki nini elingaki koloba kozala mobateli ya boyokani. Ayebanaki te na mokili. Alingaki yango te. Asosolaki nani azalaki mpe ya nani azalaki—mwana mwasi ya Nzambe. Ya solo, ekoki kolobama ete asalaki malamu eteni ya ye.

Mpo na basi mpe bamama, Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki kala:

“Tosengeli te kobungisa bomoni ya bokasi ya basi. … Ezali bamama nde mbala moko bakosalaka na bomoi ya bana ba banso. …Ezali bamama nde bakoleisaka bango mpe bakomemaka bango lisusu na ndenge ya Nkolo. Nguya ya bango ezali monene mpenza. …

“… Bazali bakeli ya bomoi. Bazali baleisi ya bana. Bazali bateyi ya bilenge basi. Bazali baninga ba biso ya kozanga te. Bazali basali elongo na biso na kotonga bokonzi ya Nzambe. Monene kani ezali mosala mwa bango, ya kokamwa kani ezali epeseli ya bango.”5

Boye boniboni mama moko mpe tata moko bako kotisa na mwana mwasi wa bango bosolo ya bonkumu mpe ya seko ete azali mwana mwasi ya Nzambe? Boniboni tokosalisa ye kobima na mokili mpe kokota na kati na bokonzi ya Nzambe?

Na mokili moko ezangi bongo, bana basi bazali na mposa ya basi mpe babali mpo na “kotelema banzeneneke ya Nzambe na ntango yonso mpe na makambo manso, mpe na bisika binso.” Mokolo moko te liboso eye ezala na motuya mingi koleka sikawa. Bilenge basi bazali na mposa ya bamama mpe bakambi oyo bazali ndakisa ya bomwasi. Bamama, mokangano mwa bino na bana basi ba bino ezali ya motuya monene mpenza, mpe boye ezali ndakisa ya bino. Lolenge olingi mpe okumisi tata wa ye, bonganganzambe ya ye, mpe mosala mwa ye ya bonzambe ekomonana mpe ntango mosusu ekokoma monene na lolenge mpe ezalela ya mwana mwasi wa yo.

Eteni kani tosengeli banso “kosala malamu”? Esakola ya libota ezali polele:

“Na mokano mwa bonzambe, batata bazali mpo na kokamba likola lya mabota ma bango na bolingo mpe bosembo mpe bazali na mokumba ya kopesa masengeli ma bomoi mpe kobatela mabota ma bango. Bamama bazali yambo na mokumba mpo na kobokola bana ba bango. Na mikumba mina mya bule, batata mpe bamama basengeli kosalisana lokola baninga bakokani. …

“Tokebisi bato oyo bazali kobuka mayokani ma bopeto, oyo bazali kotuka molongani to mwana, to oyo bazangisi kokokisa mikumba mya bango mya libota mokolo moko bakotelema mpo na koyanola liboso ya Nzambe.”6

Na mboka ya bobebi ya ntango ya Mormon, amilelaki ete basi bayibaki bango eloko oyo elutaki na ntalo mpe motuya likolo na nyonso—bopeto mpe boseka.7

Lisusu nabandelaki libiangi mpo na bopeto. Bopeto ezali bokasi mpe nguya ya bana basi ba Nzambe. Mokili ekoki kozala lolenge kani soki bopeto—ndakisa ya makanisi mpe ezalela evanda na mibeki ya bomoto ya likolo, lokola boseka8— ezongisami na mokili mwa biso lokola motuya ya ntalo eluti likolo. Soki bonsoni, pornografi, mpe botuki ekiti, ekokaki kozala mabala mabukana, bomoi ya kobukana, mpe mitema mibukana? Ekokaki malaka kokumisa mpe kokokisa esika ya kokomisa eloko mpe kokitisa bana ba ntalo ba Nzambe? Soki bato banso ya solo basosolaki motuya ya esakola “Tozali bana basi ba Tata wa busi ya Lola? Lolenge kani basi balingaki komonama mpe kosalelama?

Mibu mingi mileko, ntango Nganda ya Likita ezalaki kotongama penepene na kosila, nakotaki na ndako oyo ya bule na ndelo ya balcon na ekoti moko ya makasi mpe matalatali ya bobateli na likama, nabongaki mpo na kokomba na aspirateur tapi oyo mobali wa ngai azalaki kosalisa mpo na kotia. Wapi etando ezali sikawa ezalaki motuka ya komema salite, mpe mputulu na ndako oyo ezalaki kilo. Ntango etiamaki, esalaki bongo na tapi ya sika. Eteni ya ngai ezalaki kokombola. Mpe boye nakombolaki mpe nakombaki mpe nakombaki. Nsima ya mikolo misato aspirateur ya ngai ezikaki!

Nsima ya nzanga yambo ya likita linene na ndako oyo ya kitoko, mobali wa ngai abengaki ngai. Alingaki kotia ndambo ya nsuka ya tapi—na ne ya elobelo oyo eyebana.

Atunaki, “Makomi kani nasengeli kokoma na mokongo ya tapi oyo?

Mpe nalobaki, “Moziya 18:9: Telema lokola [nzeneneke] ya Nzambe o ntango inso, o makambo manso, mpe o bisika binso.’”

Na mokili moko ya mikakatano mingi mpenza, wana ezali lolenge namoni bilenge basi mpe basi ya Eklezia kosalaka. Bazali nguya mpo na bolamu. Bazali peto mpe na ndakisa, ba bwania mpe na mosala ya makasi. Bazali kosala bokeseni mpamba te bazali ya kokesana. Bazali kosalaka eteni ya bango.

Mibu mileko ntango nazalaki kokomba tapi oyo—komekaka kosala malamu eteni ya ngai—nasosolaki te ete nalingaki kotelema mokolo moko na makolo ma ngai na tapi na nse ya elobelo oyo.

Lelo lokola mwana mwasi ya Nzambe, natelemi lokola nzeneneke moko ete Ye azali na bomoi. Yesu azali Klisto. Ye azali Mosikoli wa biso. Ezali na nzela ya Ye libonza ya komikaba ezanga nuka nde nakozonga mokolo moko mpo na kozala elongo na Ye—ya kondimama, ya peto, mpe ya kokangisama na libota moko ya seko. Nakosanzoli ntango nyonso Ye mpo na litomba ya kozala mwasi moko, molongani moko, mama moko. Natatoli ete tokambami na profeta moko ya Nzambe, Mokambi Thomas S. Monson, mpe nakozala ntango nyonso na botondi mpo na bokasi nazwi na nzela ya nguya ekokisaka ya Bomikabi ezanga nsuka ya Mobikisi ntango nazali kokoba kobunga mpo na “kosala malamu eteni [ya ngai]” O nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Young Women Personal Progress (booklet, 2009), 3.

  2. Moziya 18:9.

  3. Tala Matthew O. Richardson, “‘What E‘er Thou Art, Act Well Thy Part’: John Allan’s Albany Crescent Stone,” Journal of Mormon History, vol. 33 (Fall 2007), 31–61; Francis M. Gibbons, David O. McKay: Apostle to the World, Prophet of God (1986), 45.

  4. Tala Doctrine and Covenants 82:10.

  5. Gordon B. Hinckley, “Standing Strong and Immovable,” Worldwide Leadership Training Meeting, sanza ya yambo 10, 2004, 21.

  6. “The Family: A Proclamation to the World,” Ensign or Liahona, sanza ya zomi na moko 2010, 129.

  7. Tala Moroni 9:9.

  8. Tala Young Women Personal Progress, 70.