2010–2019
Balandi ya Klisto
Sánzá ya mínei 2013


Balandi ya Klisto

Kolanda Klisto ezali ezalela ya nkozo to ya libaku te, kasi komipesa ya ntango nyonso mpe lolenge ya kofandela oyo esalelamaka na ntango nyonso mpe na bisika.

Moko ya banzembo na biso tolingi mingi koleka, eyembami na Bayembi ba Tabelenakele ntongo ya lelo ebandi na maloba maye:

“Yaka, landa ngai,” Mobikisi alobaki.

Nde tika totambola na matambi na ye,

Mpo bobele boye ekoki biso kozala na bomoko

Elongo na molingami wa yemei Nzambe, mobotami Mwana Mobali. 1

Maloba maye, mafulami na libiangi ya yambo ya mobikisi epai ya bayekoli na Ye (tala Matai 4:19), makomamaki na John Nicholson, mobongwami na Ecosse. Lokola mingi ya bakambi na biso ya yambo, asalaki kelasi mingi te kasi azalaki na bolingo ya mozindo mpo na Mobikisi mpe mwango ya lobiko. 2

Bitinda nyonso ya likita linene oyo asalisi biso tolanda matambi ya Mobikisi na biso, oyo ya ye ndakisa mpe mateya malimboli nzela mpo na molandi nyonso ya Yesu Klisto.

Lokola baklisto basusu, bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto Ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bayekolaka bomoi ya Mobikisi wa biso lokola elobelami na babuku ya Boyokani ya Sika ya Matai, Malako, Luka, mpe Yoane. Nakotala lisusu bandakisa mpe mateya mazwami kati na babuku minei oyo ya Biblia Esantu mpe nabiangi moko na moko na biso mpe Baklisto banso basusu na komaniola lolenge nini Eklezia na Ye ezongisami mpe moko na moko na biso tobongi lokola balandi ya Klisto.

Yesu ateyaki ete libatisi ezalaki na ntina mpo na kokota na bokonzi ya Nzambe (tala Yoane 3:5). Ye abandaki mosala na Ye na kobatisama (tala Malako 1:9), mpe Ye mpe balandi na Ye babatisaki basusu (tala Yoane 3:22–26). Tosalaka lolenge moko.

Yesu abandaki boteyi na Ye na kobiengaka bayoki na Ye bayambola (tala Matai 4:17). Wana ezali kaka etinda ya basali na Ye na mokili.

Na mosala na Ye mobimba Yesu apesaki mitindo. Mpe Ye ateyaki, “Soko bolingi ngai, bokotosa malako na ngai” (Yoane 14:15; tala lisusu milongo 21, 23). Ye alobaki mpenza ete kotosaka mitindo na Ye ekosenga bayekoli na Ye batika oyo Ye abengaki oyo “ejali monene kati na bato” ((Luka 16:15) mpe “mitindo miuti na bato” ((Malako 7:8 ; tala lisusu molongo 13). Ye akebisaki lisusu: “Soko bojalaki bato na mokili, mbe bamokili balingaki bato na bango mpenja. Nde awa ejali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bajali koyina bino” ((Yoane 15:19). Lokola Apostolo Petelo nsima asakolaki, balandi ya Yesu basengeli kozala “libota liponami” (1 Petelo 2:9).

Basantu ya Mikolo ya Nsuka basosoli ete tosengeli te kozala “ya mokili to kokangama na “mitindo miuti na bato,” kasi lokola balandi mosusu ya Klisto, tomonaka yango ntango mosusu mpasi komikabola na mokili mpe mimesano na yango. Boko bamekoli bangomei na ndenge ya mokili mpamba te, lokola Yesu alobaki na ntina ya basusu oyo Ye ateyaki “balingaki lokumu na bato liboso na lokumu ya Njambe” ((Yoane 12:43) Bozangi kolanda Klisto ezali mingi mpenza mpe kpokoso na kotanga awa. Ikwi makambo nyonso na misala ya mokili lokola bosemboli ya politiki mpe bolekisi ndelo na bolati mpe bokeseni ya bopengwi uta na bolamu ya ntina lokola ezalela ya seko mpe mosala ya libota

Mateya ya Yesu esalamaki te mpo na kotikala na maloba. Ntango nyonso ezalaki mpo na kosalela. Yesu, “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai mpe akotosaka yango akokokana na moto na mayele” ((Matai 7:24; tala Luka 11:28) mpe (Matai24:46) “Esengo na moombo yango oyo nkolo na ye akomona ye kosalaka boye wana ekoya ye” (Matai 24:46). Na loyembo mosusu nalingaka toyembi:

Mobikisi, ekoki ngai koyekola kolinga yo,

Kotambola na nzela oyo osili kolakisa, ...

Mobikisi, ekoki ngai koyekola kolinga yo—

Nkolo, nakolanda yo. 3

Lokola Yesu ateyaki, baoyo balingaka Ye bakotosa mibeko na Ye. Bakozala na botosi, lokola Mokambi Thomas S. Monson ateyaki ntongo ya lelo. Kolanda Klisto ezali likambo ya pete to ya libaku te, kasi komipesa ya ntango nyonso mpe lolenge ya kofandela oyo esalelamaka na ntango nyonso mpe na bisika nyonso. Mobikisi ateyaki libongisi wana mpe lolenge nini tosengeli komikundola mpe komilendisa mpo na kolanda yango ntango Ye asalaki likuli ya elambo (komunio lokola basusu babengaka yango). Toyebi uta na libimisi ya sikawa ete Ye atindaka balandi na Ye bakabola bilembo na bomikundoli na ntina na Ye (tala Joseph Smith Translation, Matthew 26:22 [na Matthew 26:26, footnote c], 24 [na the Bible appendix]; Joseph Smith Translation, Mark 14:21–24 [na the Bible appendix]). Bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka balandi motindo wana poso nyonso na kokendeke na liyangani ya bokumbameli na yango bakobola lipa na mai mpe bayokani ete bakomikundola ntango nyonso Ye mpe bakobatela mibeko na Ye.

Yesu ateyaki ete “ekoki na bango [bato]kobondela ntango nyonso” ((Luka 18:1). Ye atiaki lisusu ndakisa wana, lokola ntango Ye “aumelaki wana butu mobimba na kobondela Njambe” (Luka 6:12) liboso abianga Bapostolo Zomi na Babale na Ye. Lokola Baklisto mosusu, tosambelaka na mayangani ya kokumbamela na biso nyonso. Tosambelaka lisusu mpo na toli, mpe toteyaka ete tosengeli kosala nsambo ya moto na moto mbala na mbala mpe nsambo ya kofukama ya mokolo na mokolo lokola libota. Lokola Yesu, tosambelaka Tata wa biso na Lola, mpe tosalaka yango na nkombo ya bule ya Yesu Klisto.

Mobikisi abiangaki Bapostolo Zomi na Babale mpo na kosunga kati na Eklezia na Ye mpe apesaki bango bafungola mpe likoki ya kokoba nsima ya liwa (tala Matai 16:18–19; ; Malako ; ; 6:7; ; Luka 6:13). Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, lokola Eklezia ezongisami ya Yesu Klisto, elandaka ndakisa oyo na libongisi na yango mpe na bopesi ya bafungola mpe likoki na Bapostolo.

Boko baye Yesu abiangaki mpo na kolanda Ye bayanolaki sasaipi te kasi basengaki ntango moko mpo na kokokisa mikumba milongobani ya libota. Yesu ayanolaki, “Moto oyo atii loboko na etimeli mpe ajali kotala na nsima abongi na Bokonji na Njambe te” (Luka 9:62). Basantu ba Mikolo mya Nsuka mingi basalelaka makambo ya motuya mingi oyo Yesu ateyaki. Oyo ekwi ndakisa kitoko ya bankoto ya bamisionele ya nkulutu mpe basusu oyo batiki bana mpe bankoko mpo na kokokisa mikumba ya misio epai wapi babiangami.

Yesu ateyaki ete Nzambe akelaki mobali mpe mwasi, mpe mobali asengeli kotika baboti na ye mpe kosangana na mwasi na ye (tala Mark 10:6–8). Bomipesi na biso na liteya oyo eyebani malamu.

Na lisese eyebani ya mpate ebunga, Yesu ateyaki ete tosengeli kosala manso tokoki mpo na koluka moko ya etonga oyo ebungi (tala Matai 18:11–14; ; Luka 15:3–7). Lokola toyebi, Mokambi Thomas S. Monson apesi ntina monene na nzela wana kati na ndakisa mpe mateya na ye ya kobosana te na ntina ya kobikisaka baninga na biso mibali mpe basi. 4

Na makasi na biso mpo na kobikisa mpe kosalisa, tolandi ndakisa se moko mpe mateya ya boboto ya Mobikisi na biso etali bolingo. “Okolinga mojalani na yo lokola yo moko” ((Matai 22:39). Ye kutu atindaki biso tolinga banguna na biso (tala Luka 6:27–28). Mpe na mateya na Ye monene na nsuka ya mosala na Ye na kufa, ye alobaki:

“Najali kopesa bino lilako na sika ete, Bolinganaka; bolinganaka lokola ngai nalingi bino.

“Na bongo bato yonso bakoyeba ete bojali bayekoli na ngai soko bojalani na bolingo” ((Yoane 13:34–35).

Lokola eteni ya kolinganaka, Yesu ateyaki ete ntango totukami na bato tosengeli kolimbisa bango (tala Matai 18:21–35; ; Malako 11:25–26; ; Luka 6:37). Ntango mingi bazali kobunda na motindo ya mpasi oyo, biso banso toyebi bandakisa ya kofula ya Basantu ba Mikolo ya Nsuka oyo bapesi bolimbisi ya bolingo, kuta mpo na mabe eluti mingi mpenza. Ndakisa, Chris Williams ayekamaki na bondimi na ye na Yesu Klisto mpo na kolimbisa mokumbi ya kolangwa oyo abomaki mwasi na ye mpe ya mibale ya bana na bango. Mikolo mibale mpamba nsima ya likama mpe kaka ya kotukama mpenza, mobali molimbisi oyo, wana kosalaka lokola moko ya baepisikopo na biso, alobaki, “Lokola moyekoli ya Klisto, nazali na boponi mosusu te.”5

Baklisto mingi mpenza bapesaka na babola mpe bakeleli, lokola Yesu ateyaki (tala Matai 25:31–46; ; Malako 14:7). Na kolandaka mateya oyo ya Mobikisi na biso, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe bandimi na yango bazali likolo. Bandimi na biso basalaka babopesi ya bokabi epai ya bakaritas mpe bapesaka lisalisi ya moto na moto mpe makabo mosusu epai ya babola mpe bakeleli. Na kobakisa, bandimi na biso bakilaka bilei mpo na bilambo mibale sanza moko na moko mpe bapesaka ata motuya ya baelambo oyo lokola likambo ya bokili bilei, oyo baepisikopo na biso mpe bakambi ya baetape basalelaka mpo na kosalisa bandimi na biso bakeleli. Nzala na biso mpo na kosalisa bato ya nzala ezali ekela ya bolingo mpe, ntango esalami na likanisi ya peto, ezali feti ya molimo.

Oyo eyebani malamu te ezali lisalisi ya bato ya mokili mobimba na Eklezia na biso. Kosaleka mosolo epesami na bandimi ya bokabi, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka etindaka bilei, bilamba, mpe biloko mosusu ya ntina mpo kolongola mpasi ya bakolo mpe bana na mokili mobimba. Bopesi mpo na bato, ekokisi bankama ya bamilio ya dollar na mibu zomi oyo eleki, esalami kozangaka kotala eyamba, loposo, to ekolo.

Lisalisi na biso monene nsima ya boningani ya mabele mpe tsunami na Japon na mobu 2011 epesaki 13 milio ya $ na mosolo mpe biloko ya lisalisi. Na kobakisa, mingi koleka 31.000 basali baluki lifuta te bakambami na Eklezia bapesaki koleka 600.000 ngonga ya lisalisi. Lisungi na biso mpo epai ya bato na likama ya mbonge Sandy na este ya Etazini ekwi bopesi monene ya biloko mingi, kobakisa penepene na 300.000 ngonga ya lisalisi na bokasi ya kokombola na penepene ya bandimi ya Eklezia 28.000. Kati na bandakisa mingi mosusu mobu moleki, topesaki 136.000 kilo ya bilamba mpe sapato mpo na barefugie na ekolo ya Afrika o nkombo ya Tchad. Na mibu 25 mileki tosungi penepene na bato 30 milio na bikolo 179. 6 Solo, bato babengami “Bamormon” bayebi lolenge nini ya kopesela na babola mpe bakeleli.

Na liteya na Ye ya nsuka na Biblia, Mobikisi na biso asengaki balandi na Ye bamema mateya na Ye epai ya bikolo nyonso mpe bikelamo nyonso. Uta na ebandeli ya Bozongisi, Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka eluki kolanda liteya wana. Ata ntango tozalaki eklezia moko ya sika ya bobola mpe ya komiluka na kaka bandimi mwa bankoto, bakambi na biso ya yambo batindaki bamisionele kokatisa mbu, esti mpe westi. Lokola bato moko, tokobi koteya etinda ya Klisto kino lelo ntango pologalami na biso ya misio oyo ekeseni ezali na bamisionele ya ntango mobimba 60.000, bakisa bankoto ya mosusu oyo bazali kosala ntango ndambu. Tozali na bamisionele na koleka bikolo mpe mabele 150 na mokili mobimba.

Na nsuka ya Liteya na Ye monene likolo ya Ngomba, Yesu ateyaki, “Tika ete bojala malamu be lokola Tata na bino na Likolo ajali malamu” (Matai 5:48). Ntina ya liteya wana mpe ntina ya kolanda Mobikisi na biso ezali mpo na koya epai ya Tata, oyo Mobikisi na biso alobeli lokola “Tata na ngai, mpe Tata na bino; mpe … Njambe na ngai, mpe Njambe na bino” (Yoane 20:17).

Uta na bobimisi ya sikawa, ya kokesena mpo na nsango malamu ezongisami, toyebi ete motindo mpo na koluka bobongo nie ezali eteni ya mwango ya Nzambe Tata mpo na lobiko ya bana na Ye. Na nse ya mwango oyo tozali banso basangoli na libula ya baboti na biso ya likolo. . “Tojali bana na Njambe,” Apostolo Paulo ateyaki, mpe “soko tojali bana, mbe tojali basangoli na libula. Tojali basangoli na libula na Njambe, basangani na Klisto mpo na kosangola libula na ye elongo” (Baloma 8:16–17). Oyo elingi koloba, lokola tolobelami na Boyokani ya Sika, ete tozali “basangoli … na bomoi na seko” (Tito 3:7) soki toyei epai ya Tata, tosengeli “kojua biloko oyo” (Emoniseli 21:7) —nyonso oyo Ye azali na yango—likambo moko ya milimo na biso ya kufa ekoki kososola te. Kasi atako bongo tokoki kososola ete kokokisaka atandele na biso ya nsuka na boseko ekoki kosalama kaka soki tolandi Mobikisi na biso, Yesu Klisto, oyo ateyaki ete “Moto akokoma epai na tata te soko na njela na ngai te” (Yoane 14:6). Tolukaka kolanda Ye mpe kokoma mingi lokola Ye, awa mpe nsima ya awa. Yango wana ezali ete na milongo ya nsuka ya loyembo na biso, “Yaka, Landa Ngai,” toyembi:

Esengeli bobele koyeba

Ete tosengeli kolanda ye awa na nse,

Ntango tokosala mobembo na lobwaku oyo ya mpizoli?

Te, oyo ezali kokende tii bisika esantu koleka. ...

Mpo ngwende, bodondwi, bokonzi, nguya,

Mpe nkembo monene mpe esengo eluti ezali ya biso,

Soki biso, na boseko,

Totosi maloba na ye, “Yaka, Landa ngai.”7

Natatoli na ntina ya Mobikisi, Yesu Klisto, oyo mateya mpe ndakisa na ye tozali koluka kolanda. Ye abengisi biso banso oyo tozali na mikumba tokende epai na Ye, toyekola na nzela na Ye, tolanda Ye, mpe boye tobombola kimia mpo na milimo na biso (tala Matai 4:19; ; 11:28). Natatoli na ntina ya bosolo ya nsango na Ye mpe na ntina ya Etinda na ye ya bonzambe mpe likoki ya Eklezia na Ye ezongisami na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. “Viens et suis-moi,” Cantiques, no. 61

  2. Tala Karen Lynn Davidson, Our Latter-day Hymns: The Stories and the Messages (1988), 142–43, 419.

  3. “Seigneur, je te suivrai,” Cantiques,no. 141.

  4. Tala, ndakisa, Heidi S. Swinton, To the Rescue: The Biography of Thomas S. Monson (2010), 149–61; Thomas S. Monson, “To the Rescue,” ,” Ensign,, May 2001, 48–50; ; Liahona,, July 2001, 57–60.

  5. Chris Williams, in Jessica Henrie, “Father Relies on Faith to Forgive Intoxicated Teen Driver,” Deseret News,, Aug. 1, 2012, deseretnews.com/article/865559847/Let-It-Go-Chris-Williams-shares-his-story-of-tragedy-and-forgiveness.html; see also Chris Williams, Let It Go: A True Story of Tragedy and Forgiveness (2012).

  6. Tala “Emergency Response: Church Assists Worldwide,” Church News,, Mar. 9, 2013, 9; Welfare Services Emergency Response, “2012 Year in Review,” 8.

  7. Cantiques, no. 61.