2010–2019
Kimia ya Moto na Moto: Mbano ya Bosembo
Sánzá ya mínei 2013


Kimia ya Moto na Moto: Mbano ya Bosembo

Atako na mimekano ya bomoi, na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi mpe ngolu ya Ye, kozala mosembo ekopesama mbano ya kimia ya moto na moto.

Makambo ya kala te esalaki namaniola malongi ya kimia mpe mingimingi mosala ya Yesy Klisto na kosalisaka moko na moko na biso kozwa kimia ekowumela ya moto na moto.

Makambo mibale na mwa basanza eleki etutaki ngai na mozindo. Yambo, nalobaki na matanga ya liwa ya Emilie Parker, ya mibu motoba oyo abungisaki bomoi bwa ye elongo na 25 basusu, lokola bilenge bana, na likama ya masasi na Newtown, Connecticut. Nalelaki elong na libota lya ye mpe nandimaki ete mingi babungisaka kimia. Nazwaki bokasi mpe bondimi na baboti ba ye, Robert mpe Alissa Parker.

Mibale, nakutanaki na bankoto ya bandimi ba Eklezia na Côte d’Ivoire.1 Ekolo oyo ekolobaka francé, ya Afrika ya Westi ezwaki mpasi ya nkita, coup d’Etat ya basoda, mpe bitumba mibale ya mobulu esilaki na 2011. Kasi nayokaki kimia kafukafu na liboso na bango.

Makambo mbala mingi eyaka oyo ekoyibaka biso kimia ya biso mpe ekomatisaka boyebi ya botau bwa biso.

Nani akoki kobosana biyoma ya sanza ya libwa 11, 2001, na bisika mingi ya Etazini? Makambo ya boye ekokundolisaka biso na lobangu kani mayoki ma biso ya kimia mpe bozangi likama ekoki kobebisama.

Mwana mobali wa biso ya nkulutu mpe mwasi wa ye, oyo bazalaki kozela mwana wa bango ya yambo, bavandaki maboke misato uta na World Trade Center na New York City ntango mpepo ya yambo etobolaki na kati ya North Tower. Bakendeki na motondo ya ndako ya bango mpe bayokaki nsomo ntango bamonaki nini bakanisaki ezalaki lolenge ya likama ya nsomo. Nde bazalaki banzeneneke ya botoboli ya mpepo ya mibale na kati ya South Tower. Basosolaki mbala moko ete ezalaki te likama mpe bandimaki ete lower Manhattan ezalaki na nse ya eyoma. Ntango South Tower ekweyaki, ndako ya bango ezindaki na mapata ya mputulu oyo enokaki likolo ya Manhattan.

Na mobulu ya oyo bazalaki banzeneneke, na komitungisaka mpo na eyoma mosusu, balukaki nzela ya bango na esika moko ezangi likama mpe nsima na ndako ya Manhattan stake Church na Lincoln Center. Ntango bakomaki, bakutaki bazomi na mibali ya bandimi misusu na lower Manhattan bazwaka mokano wana kaka mpo na kosangana na ndako ya likonzi. Babengaki mpo na koyebisa biso wapi bazalaki. Nabondisamaki ete bazalaki na likama te kasi nasutukaki te mpo na esika bazalaki. Libimisi ya sika eteyi ete makonzi ma Siona mazali bobateli mpe “ekimelo na ekumbaki, mpe na nkanda ntango ekosopana na kosangana te likolo ya mabele.”2

Bakokaki te kozonga na ndako ya bango mpo na koleka poso moko mpe bayokaki mabe mpo na bobungi ya babomoi ezanga elindo, kasi bazwaki te mabe ya kowumela.

Na komaniola makambo oyo, nayoki bokeseni ya malongi katikati ya kimia ya bato banso mokili mpe kimia ya moto na moto.3

Na mbotami ya Mobikisi, ebele ya limpinga ya lola basanzolaki Nzambe mpe basakolaki, “Nkembo na Nzambe na likolo mingi koleka, mpe na mabele kimia, bolingi malamu epai ya bato.”4

Nzokande, emonanaki na mpasi na motema ete kutu na eleko oyo ya ntina ya seko kolandaki mbotama ya Mwana wa Nzambe, Elode asalaki bobomi ya bana bake banzangi elindo na Beteleme.5

Boponi ezali ya ntina mpo na mwango ya esengo. Ekopesa nzela mpo na bolingo, libonza, mpe bokoli ya moto na moto, mpe mayele masengeli mpo na bokoli bwa biso ya seko. Boponi lisusu ekopesa nzela mpo na bolozi mpe mpasi tozali koyoka na bokufi, kutu ntango ekelami na makambo tososoli te mpe boponi ya mabe ya bato basusu. Etumba mpenza ya lola endongamaki na boponi bwa biso ya bolamu to mabe mpe ezali ya ntina mpo na kososola mosala ya Mobikisi na mabele.

Lokola etangami na makopo 10 ya Matai, Mobikisi ateyaki Bazomi na Babale mpe andimaki ete etinda ya Ye ekosala te kimia ya mokili mobimba na bomoi ya kufa. Bapostolo balobelamaki batika kimia likolo ya bandako batalaki kasi bakebisa ete bakozala “kati na nkoi … [mpe] bakoyina bino mpo na nkombo na ngai. Kasi ye oyo akoumela kino nsuka akobika.”6 Esakola moko ya ntina esalemi na nzela 34: “Bokanisa te ete nayei kotia kimia kati na mokili.”7 Ezali polele ete kimia ya mokili mobimba ezalaki te na mabele ntango ya mosala ya Klisto na bokufi, mpe ezali te sikawa.

Na liyingisi ya Nkolo na Doctrine and Covenants, motango moko ya mabongisi ya motuya mpenza eteyami. Etali bato oyo bayamboli te, Molimo mwa Ye (Molimo ya Klisto), oyo epesami na moto nyonso oyo ayei na kati ya mokili,8 “akobunda ntango inso te elongo na moto.”9 Lisusu, “kimia ekolongwa na mabele.11 Baprofeta basakolaki ete kimia ya solo elongwi na mabele.11 Lusifelo akangami naino te mpe azali kosalela nguya na bokonzi bwa ye.12

Mpo ya lola na bato balamu bisika binso ezali mpe ntango inso ekozala mpo na kimia na mokili. Tosengeli te kotika kokoba na kokokisaka lotomo loye. Kasi, Mokambi Joseph F. Smith ateyaki, “Ekoki koya mokolo moko te na mokili molimo oyo ya kimia mpe bolingo … kino bato bakozwa bosolo ya Nzambe mpe etinda ya Nzambe … bakondima nguya mpe bokoki bwa ye oyo ezali ya bonzambe.”13

Tokolikiaka na lokengo mpe tokosambelaka mpo na kimia ya mikili mobimba, kasi ezali lokola bato mpe mabota nde tokozwa kimia oyo ezali mbano elakelama ya bosembo. Kimia oyo ezali likabo lilakelama ya etinda ya Mobikisi mpe libonza ya bomikabi.

Libongisi ezwami na Doctrine and Covenants: “Kasi boyekola ete ye oyo asali mosala ya bosembo akozwa mbano ya ye, kutu kimia na mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili ekoya.”14

Mokambi John Taylor ateyaki ete kimia ezali bobele te mposa, kasi “ezali likabo lya Nzambe.”15

Kimia nazali kolobela ezali bobele te kimia ya mwa ntango. Azali esengo ya mozindo ya kowumela mpe bosepeli ya molimo.16

Mokambi Heber J. Grant alimbolaki kimia ya Mobikisi boye: “Kimia ya Ye ekolembisa mpasi ya biso, ekobikisa motema mobukana mwa biso, ekolongola boyini bwa biso, ekobotisa na ntolo ya biso bolingi ya bandeko bato oyo ekotondisa milimo mya biso na kimia mpe esengo.”17 Na bosangani bwa ngai na baboti ba Emilie Parker, namonaki ete kimia ya mobikisi elembisaki mpasi ya bango mpe ezali kosalisa mpo na kobikisa mitema mibukana mya bango. Ekoki komonana ete nokinoki esilaki masasi kobetama, Ndeko mobali Parker apesaki bolimbisi na mobomi. Lokola Mokambi Grant alobaki, kimia ya Mobikisi ekoki “kolongola boyini.” Bosambisi ezali ya Nkolo.

Basantu ya Côte d’Ivoire, na ntango ya etumba ya mobulu na mboka, bazwaki kimia na kokangamaka na kosalelaka nsango malamu ya Yesu Klisto, na bobeti nsete na mambi ma libota mpe mosala mwa tempelo mpo na bankoko ba bango.18

Biso banso tozali na mpo ya kimia. Kimia ezali bobele te bozangi likama to bozangi etumba, boweli, mpe boswani. Kimia ekowuta na koyebaka ete Mobikisi ayebi nani tozali mpe ayebi ete tozali na bondimi na Ye, mpe tozali kobatela mitindo mya Ye, ata mpe mingimingi o ntei ya mimekano ya kobebisa mpe bobomibomi. Eyano ya Nkolo na Profeta Joseph Smith na Boloko ya Liberty ememaki libondisi na motema mwa ye:

“Mwana mobali wa ngai, kimia ezala na molimo mwa yo; kpokoso ya yo mpe matungisi ma yo makozala bobele ngonga moko moke;

“Mpe nde, soki oyiki mpiko malamu, Nzambe akonetola o likolo.”19

Bomikondula, “Nzambe azali te mokeli ya mobulu, kasi [mokeli] ya kimia.”20 Mpo na baye baboyi Nzambe, ezali na kimia te. Biso banso tosalaki elongo na makita ma lola oyo epesaki boponi ya bolamu to bobe, koyebaka ete ekozala na bolozi ya bokufi mpe kutu bobomibomi ya koloba te na ntina ya bobebisi ya boponi. Tososolaki ete eye ekokaki kotika biso na nkanda, na libungi, na bobateli te, mpe na bolembu. Kasi toyebaki lisusu ete Bomikabi ya Mobikisi ekolonga mpe kobongisa bokeseni nyonso ya bomoi ya kufa mpe ekomemela biso kimia. Mpaka Marion D. Hanks azalaki na esakola moko etandama ya efelo ya ye na Ugo Betti: “Kondima na Nzambe ezali koyeba ete mibeko minso mikozala malamu, mpe ete ekozala na bosutuki boko ya kokamwa.”21

Maziba ya kimia ezali nini? Boluki mingi mpo na kimia na ndenge ya mokili, oyo elonga mokolo moko te mpe ekolonga mokolo moko te. Kimia ekozwama te na kokomaka na bomengo, nguya, to lokumu mingi.22 Kimia ekozwama te na kolandaka elengi, bosepeli, to lisano. Moko te na oyo ekoki, atako ezwami na bofuluki, kokela esengo to kimia ya kowumela.

Loyembo Emma Lou Thayne akolingaka etuni mituna misengeli: “Wapi tokoki kokende mpo na kimia? Wapi libondisi lya ngai ntango maziba masusu mazangi kobikisa ngai?”23 Eyano ezali Mobikisi, oyo azali liziba mpe mokeli ya kimia. Ye azali “Nkolo na Kimia.”24

Boniboni kotikala penepene na Mobikisi? Komikitisaka liboso na Nzambe, kosambelaka ntango nyonso, koyambolaka masumu, kokotaka na mai ma libatisi na motema mobukana mpe molimo ya mawa, mpe kokomaka moyekoli ya solo ya Yesu Klisto ezali ndakisa ya mozindo ya bosembo oyo epesameli mbano na kimia ya kowumela.25 Esilaki Mokonzi Benyamina kopesa ntango etali Bomikabi ya Yesu Klisto, bato ebele bakweyaki na mabele. “Molimo mwa Nkolo moyaki likolo lya bango, mpe batondaki na esengo, kozwaki bolimbisi bwa masumu, mpe kozalaka na kimia ya motema, na ntina ya bondimi monene oyo bazalaki na yango na Klisto.”26 Boyambola mpe bozali bosembo ekopesa nzela mpo na kimia ya motema, oyo ezali na ntina mpo na bosepeli.27 Ntango ezali na bobuki mobeko monene, ntubela esengeli mpo na komema kimia.28 Ntango mosusu ezali na eloko moko te ya komekisa na kimia oyo ewuti na motema moko ebebisami na lisumu ekitiksi mokumba mwa ye likolo ya Nkolo mpe kosengaki na makasi mapamboli ya Bomikabi. Lokola loyembo mosusu elingama ya Eklezia elobi, “Nakobwaka mokumba mwa ngai na makolo ma ye mpe komema loyembo moko mosika.”29

Motema mwa ngai mosepela ntango nasosoli ete na mokolo mwa biso bankoto zomi ya bilenge babali, bilenge basi, mpe bamisionele ya bakolo bandimi libiangi ya kozala bantoma ba Nkolo mpe Mobikisi, Yesu Klisto. Bazali komema nsango malamu ezongisami na mokili, moto moko mpe libota moko na ngonga moko—mosala moko ya bosembo mpo na komema kimia oyo epai ya bana baTata wa Lola.

Eklezia ezali ekimelo wapi balandi ba Klisto bakozwa kimia. Boko bilenge na mokili balobaka bazali bato ba molimo kasi bato ba eyamba te. Komiyokaka ya molimo ezali litambi moko ya yambo ya malamu. Nzokande, ezali na Eklezia nde tosungami, toteyami, mpe toleisami na liloba ya malamu ya Nzambe. Ya motuya koleka, ezali likoki ya bonganganzambe na Eklezia nde epesi makuli ma bule mpe mayokani oyo ekokanga mabota elongo mpe ekokokisa moko na moko na biso mpo na kozonga epai na Nzambe Tata mpe Yesu Klisto na bokonzi ya Nzambe. Makuli maye makomema kimia mpamba te mazlai mayokani elongo na Nkolo.

Batempelo ezali wapi mingi ya makuli maye ma bule makomi mpe ezali lisusu liziba ya ekimelo ya kimia mosika na mokili. Baye bakei na elanga ya tempelo to basali elongo na bofungoli ya bandako ya tempelo lisusu bakoyoka kimia oyo. Likambo moko ya monene na mayele ma ngai ezali bofungoli ndako mpe bobulisi ya tempelo ya Suva Fiji. Ezalaki na eyoma ya politiki uta na batomboki kozikisaka mpe kopanzaka na mboka, kokangaka bandako ya parlema mpe kokanga badépité lokola ndanga. Mboka ezalaki na nse ya mobeko ya lokengo. Basoda ya Fiji bapesaki Eklezia mwa ndingisa mpo na kosangisa bato mpo na bofungoli ndako mpe mwa bato moke mpo na bobulisi. Bato banso babengisamaki te mpo na ntina ya bozangi likambo. Ezali bobeli bobulisi tempelo moko uta Tempelo ya Nauvoo ya ebandeli oyo esalemaki na nse ezalela ya kpokoso mpenza.

Moto moko abiangemaki na bofungoli ndako azalaki mwasi moko ya Indu ya kitoko ya baboti ba India, mosali na parlema oyo na ebandeli akangamaki kasi batikaki ye mpamba te azalaki mwasi.

Na kisuku ya selesitiale, mosika na mobulu ya mokili, atangisaki mpizoli ntango alobaki mayoki ma kimia oyo ezingaki ye. Ayokaki Molimo Mosantu kobondisaka mpe kopesaki litatoli ya lolenge ya bule ya tempelo.

Mobikisi azali liziba ya kimia ya solo. Atako na mimekano ya bomoi, na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi mpe ngolu ya Ye, kozalaka na bosembo ekozwa mbano ya kimia ya moto na moto. Na esika ya bolingi mpenza ya kisuku ya Pasika, Mobikisi alakaki Bapostolo ba ye ete bakopambolama na “Mosungi ye Molimo Mosanto” mpe nde alobaki maloba maye ya motuya: “Najali kotikela bino kimia na ngai moko. Napesi bino pelamoko ekopesaki mokili te.”30 Nde kaka yambo ya Losambo la Ye ya Kosengele: “Nasili kosolo na bino makambo oyo ete bojala na kimia kati na ngai. Kati na mokili bojali na boloji; nde boyika mpiko, ngai nasili koleka mokili.”31

Eliza R. Snow akomaki likambo oyo na kitoko:

Botombola mitema mya bino na bosanzoli epai na Nzambe;

Tika bosepeli bwa bino esila mokolo moko te.

Atako mitungisi mingali libanda,

Klisto alobi, “Na ngai bokozala na kimia.”32

Natatoli bongo o nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Makita mabale masalemaki na Abidjan na Eyenge, sanza ya mibale 10, 2013: bato 9.693 bazalaki—619 na bango bazalaki naino te bandimi ba Eklezia. Bandimi banso ya Eklezia na Côte d’Ioire bazali penepene na 19.000.

  2. Tala Doctrine and Covenants 115:6.

  3. Liloba kimia ezali na ndimbola ikesana. Na Kogrek ya kelasi elobeli botiki, bosilisi, to bozangi ya bitumba katikati ya mapimba na boweli. Na Ebeleo liloba yango ezali na ndimboli ya kosangisa mpe ntango mosusu ezali kaka lolenge ya mbote. Kimia ezali lisusu “ezalela ya bomoi oyo ekomeli moto likolo ya makambo mpe masengeli matiami na Nzambe” (Howard W. Hunter, na Conference Report, sanza ya zomi 1966, 14–17).

  4. Luka 2:14; nsete biso tobakisi.

  5. Tala Matai 2:16; tala lisusu Ross Douthat, “The Loss of the Innocents,” New York Times, zanza ya zomi na mibale 16, 2012, 12.

  6. Matai 10:16, 22.

  7. Matai 10:34.

  8. Tala Doctrine and Covenants 84:46.

  9. Tala Doctrine and Covenants 1:33.

  10. Mokambi Woodruff asakolaki yango na 1894 mpe lisusu na 1896. Tala The Discourses of Wilford Woodruff, ed. G. Homer Durham (1946), 251–52; tala lisusu Marion G. Romney, na Conference Report, sanza ya minei 1967, 79–82.

  11. Tala Joseph Fielding Smith, The Predicted Judgments, Brigham Young University Speeches of the Year (Mar. 21, 1967), 5–6. Nzokande, lokola Mpaka Neal A. Maxwell alobaki, “Tokoki kozala na kimia ya kati atako soki kimia elongwe na mabele …[mpe] ‘makambo manso [mazali] na mobulungano’” (“Behold, the Enemy Is Combined,” Ensign, sanza ya mitano 1993, 79).

  12. Teachings of Presidents of the Church: Joseph F. Smith (1998), 400.

  13. Tala Doctrine and Covenants 59:23.

  14. Teachings of Presidents of the Church: John Taylor (2001), 151.

  15. Uta ntango ya Bagrek kino mokolo mwa biso, maloba maye —esengo mpe bosepeli— eyekolamaki, esasamaki, mpe ezwamaki kaka na ntina na yango te kasi lisusu toli yango ekopesa na bomoi bwa biso. Tala David Malouf, The Happy Life: The Search for Contentment in the Modern World (2011). Tala lisusu nkoma ya botali ya buku ya Mr. Malouf, na R. Jay Magill Jr., “How to Live Well,” Wall Street Journal, sanza ya yambo 26–27, 2013, C6.

  16. Tala Teachings of Presidents of the Church: Heber J. Grant (2002), 226.

  17. “Misato ya makonzi mitano ya Côte d’Ivoire ezali o ntei ya 25 ya likola na Eklezia na moko na mokama ya bakolo oyo batindaki bankombo ya mabota mpo na makuli ma tempelo,” mpe Likonzi ya Cocody na Côte d’Ivoire eleki na likolo (C. Terry Warner mpe Susan Warner, “Apostle Visits Ivory Coast, Is ‘Impressed with Exceptional Spirit,’” Church News, sanza ya misato 3, 2013, 4, 14). Na nsima ya etumba ya mobulu mpe tempelo ya penepene mingi kozalaka na ngonga 12 mosika na Accra na Ghana na bisi, eye elaki ya solo bondimi mpe epesi mbano na kimia ya moto na moto.

  18. Doctrine and Covenants 121:7–8. Mokambi Harold B. Lee ateyaki, “Boye, tosengeli kopetolama; tosengeli komekama mpo na kolakisa bokani mpe nguya oyo ezali na biso” (Teachings of Presidents of the Church: Harold B. Lee [2000], 208).

  19. 1 Bakolinti 14:33.

  20. Na Marion D. Hanks, “A Loving, Communicating God,” Ensign, sanza ya zomi namoko 1992, 63.

  21. Tala Jeffrey R. Holland, For Times of Trouble (2012), 79. Mpaka Holland ateyaki ete “bobola ya solo ekoki kosala mingi kobebisa molimo ya moto koleka ezaleki moko longola se lisumu yangomei.” Kasi kosalela mosolo na bosembo ekoki kobakisa kimia.

  22. “Where Can I Turn for Peace?” Hymns, no. 129.

  23. Yisaya 9:6.

  24. John Greenleaf Whittier alobaki na pete: “Bosala keba na lolenge bozali kowumela. Bosala te na moi likambo oyo na butu ekolongola kimia na yo” (“Conduct [From the Mahabharata],” na The Complete Poetical Works of John Greenleaf Whittier [1802], 484).

  25. Moziya 4:3; nsete biso tobakisi; tala lisusu Marion G. Romney, na Conference Report, sanza ya minei 1967, 79–82.

  26. Kansasa ezali kompa moko ya makanisi kolakisaka biso nzela ya kimia. Etambwisami na ata maziba mabale: Pole ya Klisto, likoki ya bokolo ya nkembo ewuti na Tata wa biso ya Lola (tala Doctrine and Covenants 88:6–13; 93:2), mpe likabo ya Molimo Mosantu (tala Doctrine and Covenants 39:6).

  27. “Maboke mabale ya bolimbisi masengelama mpo na komema kimia na mobuki mobeko—moko uta ua mokonzi elongobani ya Eklezia ya Nkolo, mpe moko uta na Nkolo Yemei. [Tala Mozaya 26:29.]” (Teachings of Presidents of the Church: Spencer W. Kimball [2006], 41).

  28. “How Gentle God’s Commands,” Hymns, no. 125.

  29. Yoane 14:26–27.

  30. Yoane 16:33.

  31. “Though Deepening Trials,” Hymns, no. 122.