2010–2019
Mimona na Tempelo
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


Mimona na Tempelo

Nasambeli ete moko na moko na biso akumisa Mobikisi mpe asala mbongwana nionso esengeli mpo “tomimona na tempelo na Ye ya bule.

Kotambola ya mwango ya Nkolo ya Lobiko na eleko ya litondo ya bantango ezali penepene ya koleka bososoli.1 Oyo elakisami na kosakola ya Mokambi Thomas S. Monson batempelo 4 ya sika na liyangani oyo ya likita. Ntango Mokambi Monson abiangemaki lokola Apostolo na 1963, Ezalaki na batempelo 12 kosala na mokili.2 na libulisi ya tempelo ya Provo City Center, ezali sikawa 150, mpe ekozala 177  ntango batempelo esakolama nionso ekobulisama. Oyo ezali likambo mpo na biso tosepela na komikitisa.

Mibu nkama moko ntuku mwambe eleki, na mokolo oyo mpenza, sanza ya minei  3, 1836, limonisi moko efungwanaki na Profeta Joseph Smith mpe Oliver Cowdery na Tempelo ya Kirtland. Oyo ekomaki kaka poso moko nsima ya kobulisa tempelo wana. Na limonisi oyo bamonaki Nkolo atelemaki na likolo ya libaya ya elobelo na tempelo. O ntei ya makambo misusu, Mobikisi asakolaki:

“Tika mitema ya baton a ngai nyonso esepela, oyo, na makasi na bango, batongi ndako oyo na nkombo na ngai.

“Mpo tala, nandimi ndako oyo, mpe nkombo na ngai ekozala awa; mpe nakomilakisa na bato na ngai na ngolu na ndako oyo.”3

Na libaku wana ebulisami, baprofeta ya kala babimaki, ndakisa Elisa, oyo apesaki bafungola ya ntina mpenza mpo na makuli ya tempelo.

Tozwi mwa ntina ya esepeli oyo ezali kosalema na Quito, Equateur; Harare, Zimbabwe, Belém, Brezil; mpe Lima, Perou, banso na bandimi mpe bamisionele, na koyokaka oyo ekomaki na Bangkok, Thailand, mobu moko eleki ntango basakolaki tempelo oyo. Ndeko mwasi Shelly Senior, mwasi ya mokambi ya Misio ya Thailand ya ntango wana na Bangkok, David Senior, atindaki email na libota mpe baninga mpo na koyebisa ete sima ye mpe mobali na ye bayoka Mokambi Monson kosakola tempelo wana, ezalaki na “ngonga 12 ya mpongi te mpe eboke ya mpinzoli ya esengo.” Babengaki bakitani na bango ya misio na 11:30 ya nsima ya nzanga mpe bayebisaki bango. Bakitani ya misio babengaki bamisionele. Nsango ezongaki ete “misio mobimba elamukaki na katikati ya butu kopumbwaka na bambeto na bango.” Ndeko mwasi Senior mpo na kosekisa akebisaki libota mpe baninga: “Palado bolobela Bilo ya Misio te!”4

Eyano ya mozindo ya bandimi na Thailande ezali lisusu makasi. Nalikii ezalaki bolengeli ya molimo na mitema mpe bandako mpe malakisi uta na lola kolengelaka basantu esika bantempelo ya oyo elobelami ekozala.

Elilingi
Bilenge basi ya Thai na kitata oyo elobi, “Tala Yomei na Tempelo.”

Ndeko mwasi Senior, na Thailand, azalaki na bakitalatala ya loboko ya kafukafu esalamaki mpo na boyekoli na ye moko, mingimingi na bandeko basi. Ezalaki na tempelo eyemamaki na kitalatala na maloba, “Mimona na Tempelo.” Ntango bato batalaki na kitalatala, bamimonaki na tempelo. Basenior bateyaki baluki mpe bandimi kokanga foto bango moko na tempelo mpe basalaki mbongwana esengeli ya lolenge ya bomoi mpe bolengeli ya molimo mpo na kokokisa ntina oyo.

Momekano na ngai na ntongo oyo mpo na biso banso, esika nionso tozali, mpo na komimona na tempelo. Mokonzi Monson asakolaki: “Kino okoti na ndako ya Nkolo mpe ozwi mapamboli oyo ozali kozela kuna, ozwi naino te nionso Eklezia esengeli kopesa. Mapamboli eleki nionso na motuya mpe ya nsuka ya bandimi na Eklezia ezali mapamboli wana oyo tozwaka na batempelo ya Nzambe.”5

Ata kozanga bosembo na mokili lelo, tozali na ntango moko esantu, mpe ya bule. Baprofeta na mitema ya bolingo mpe ya mposa, balimbolaki mokolo na biso minkama ya mibu mileki.6

Profeta Joseph Smith, kotangaka Obadia nyonso mibale7 na Boyokani ya Kala mpe 1 Petelo8 na Boyokani ya Sika, akumisi mwango monene ya Nzambe na kopesaka libatisi mpo na bawa mpe kopesaka biso ndingisa ya kozala babikisi na Ngomba Siona.9

Nkolo afulukisi bato na biso mpe apesi mosolo mpe bokambi ya baprofeta mpo ete tokoka kozala makasi na kosalaka misala na biso mpo na baye na bomoi mpe bawa.

Na ntina ya nsango malamu ezongisami ya Klisto, tososoli ntina ya bomoi, mwango ya Tata mpo na bana na Ye, libonza ya bosikoli ya Mobikisi, mpe mosala ya motuya monene koleka ya mabota na bobongisi ya lola.10

Kosangisa ya motango ebakisami ya batempelo mpe teknolozi ya likolo mpo na kokokisa mikumba na biso ya bule ya libota mpo na bankoko na biso ekomisi oyo ntango eleki kopambolama na mambi ya bato. Nasepeli na botongono kitoko makasi ya bilenge na biso na kokotisaka mpe komemaka bankombo ya bankoko na bango mpe nsima kosala libatisi mpe mosala ya nkotisa na tempelo. Bozali mingimingi o ntei ya babikisi basakoli na Ngomba Siona.

Boniboni Tozali Komilengela mpo na Tempelo?

Toyebi ete bosembo mpe bosantisami ezali biteni ya ntina ya komilengela mpo na tempelo.

Na Doctrine et alliances eteni 97, etangami, “mpe mbala inso bato na ngai bakotonga ndako moko mpo na ngai na nkombo ya Nkolo, mpe andimi te eloko ya mbindo eya na kati na yango, ete esantolama, nkembo ekofanda likolo na yango.”11

Kino 1891 Mokambi ya Eklezia azalaki kotia elembo na tempelo nionso mpo na kobatela bosantu ya tempelo. Mokumba wana nsima etiamaki likolo ya baepisikopo mpe bakambi ya makonzi.

Ezali mposa na biso ete bandimi ya Eklezia bawumela mpo na kolongobana na ndingisa ya tempelo. Palado bomona tempelo te lokola mwa lotomo moko ya mosika mpe ya kokoka kokokisa te. Na kosalaka elongo na baepisikopo, bandimi mingi bakoki kokokisa masengi na eleko moko mwa mokuse soki bazali na mokano ya komibongisa mpe koyambola mobimba bobuki mibeko. Yango ekwi kozala na bolingi ya komilimbisa mpe kokangama te na bazangi bobongi mpenza to masumu na biso lokola ekopekisa biso na kokota na tempelo moko ya bule.

Bomikabi ya Mobikisi esalemaki mpo na bana ya Nzambe. Libonza ya bosikoli na Ye esepelisi bosenga ya boyengebene mpo na banso oyo bayamboli ya solo. Makomi elimboli oyo na lolenge ya kitoko mingi:

“Ata masumu na biso ezali motano ngba, ekokoma mpembe lokola mbula ya mpembe.”12

“Mpe nakomikundola [yango] lisusu te.”13

Totatoli na bino ete kosalela mabongi ya bosembo ekomemela bino mpe mabota na bino esengo, litondi, mpe kimia.14Bandimi, bakolo mpe bilenge,15 bamitatolelaka bolongobani na bango ntango bayanolaka na mituna ya ndingisa ya tempelo. Bosenga ya motuya ezali kobakisa litatoli na biso ya Nzambe Tata; Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto; mpe Bozongisi ya nsango malamu na Ye mpe koyeba lisalisi ya Molimo Mosantu.

Mapamboli ya Tempelo Ezali Ebele

Mapamboli ya yambo ya tempelo ezali makuli ya bonetoli. Mwango ya nsango malamu etali bonetoli mpe ekwi kosalela mpe kobatela mayokani na Nzambe. Kolongola libatisi mpe nkotisa, makuli mpe mayokani esalemaka mpe ezwamaka na tempelo mpo na baye na bomoi. Mpo na bawa makuli mpe mayokani nionso ya kobikisa ezwamaka na tempelo.

Brigham Young ateyaki, “ezali na likambo te Nkolo akokaki kosala mpo na lobiko ya libota ya bato oyo atalaki mpamba na kosala; …nionso oyo ekokaki kosalama mpo na lobiko na bango, na kozanga na bango, esalemaki na kati mpe na nzela ya Mobikisi.”16

Bakambi ya Eklezia babongisaka makonzi, bapalwasi, masanga makoki, masanga malandi ya Eklezia, bamisio, mpe bongo na bongo. na bandakonzambe na biso mpe bandako misusu. Nkolo abongisaka mabota ya seko na batempelo.

Ezali polele ete baye na mitema mibukana mpe milimo ya mawa oyo bayamboli ya solo masumu na bango bandimami mobimba na Nkolo na ndako na Ye ya bule.17 Toyebi “Nzambe akabolaka bato te.”18 Moko ya makambo ya ntalo nalingaka etali tempelo ezali ete o ntei ya baye bakendeke na tempelo bokabwani ya bomengo, bozwi, to mpete ya ndenge kani ezali te. Tokokani liboso ya Nzambe. Moto nionso alataka mpembe mpo na kolakisa tozali bato ya peto mpe ya bosembo.19 Banso bafandaka mopanzi na mopanzi na mposa na mitema ya kozala bana mibali mpe bana basi balongobani ya Tata ya lola.

Elilingi
Kisuku ya kokangisa ya Tempelo

Kanisa naino, na mokili mobimba basi mpe mibali bakoki na nzela ya “makuli mpe mayokani ya bule ezwami na tempelo … kozonga na miso ya Nzambe mpe … kosangisama seko.”20 Basalaka yango na kisuku moko ya bule bokangisi ya kitoko, ezwami mpo na bandimi balongobani ya tempelo nionso. Nsima ya kokota na kati ya mayokani, bakokoka “komimona na tempelo” na batalatala oyo etalani. Elongo batalatala ezongisaka liboso mpe nsima bilili oyo ebendanaka lokola na kati ya boseko.”21 Bilili oyo esalisaka biso komaniola baboti, bankoko, mpe bankola nionso ya liboso. Ekosalisa biso kolula mayokani ya bule oyo ekangisaka biso na bankola nionso elandi. Oyo ezali na ntina ya kokamwa, mpe ebandaka ntango yo omimona na tempelo.

Elilingi
Bitalatala na kisuku ya tempelo

Mokambi Howard W. Hunter apesaki biso toli mpo na tomaniola “mateya ya lipombo na losambo ya kobulisa Tempelo ya Kirtland, losambo moko oyo Profeta Joseph Smith alobaki epesamelaki ye na bobimisi. Ezali losambo moko oyo ekobi koyanola likolo na biso moto na moto, likolo na biso lokola mabota, mpe likolo na biso lokola bato na ntina ya nguya ya bonganganzambe Nkolo apesi biso tosalela na batempelo esantu.”22 Tokosala malamu na koyekola eteni ya109 ya Doctrine and Covenants mpe kolanda lilendisi ya Mokambi “mpo na kotia tempelo ya Nkolo lokola elembo monene ya bandimi na biso.”23

Tempelo ezali lisusu esika mpo na kobombana, kopesa matondi, koteyama, kososola, mpe “na makambo nionso etali bokonzi ya Nzambe na mabele.”24 Na bomoi na ngai mobimba ezalaka esika moko ya kimia mpe boboto na mokili oyo ezali mpenza kobulungana.25 Ezali kitoko kotika mitungisi ya mokili nsima na esika wana ya bule.

Mbala mingi na tempelo, mpe ntango tomipesi na koluka mambi ya libota, tokoyoka botindiki mpe makanisi uta na Molimo Mosantu.26 Na mabaku mosusu na tempelo lido katikati na biso mpe baye na ngambo mosusu ekomi moke. Tozwaka lisalisi ya kobakisa na makasi na biso mpo na kozala babikisi na Ngomba Siona.

Mibu mingi mileki na tempelo ya Amerika ya Kati, mwasi ya moko ya Bakambi Banene oyo-sikawa ya kala azalaki kosalisa tata, mama moko, mpe bana na bango na kozwaka mayokani ya seko na kisuku ya bokangisi wapi ezalaki batalatala ya tempelo. Ntango basilisaki mpe batalaki batalatala wana, amonaki ezalaki na elongi moko na kitalatala oyo ezalaki te na kisuku. Atunaki mama wana mpe ayokaki ete mwana moko ya mwasi akufaka mpe ya solo azalaki te wana. Mwana mwasi wana nsima bakotisaki ye na kosalela na likuli ya bule. 27 Kotala mpamba te lisalisi epesami na batempelo uta na ngambo mosusu ya lido.

Palado yeba na lokengo kani tozali na mposa ete moto nionso asala mbongwana nionso esengeli mpo na komikokisa mpo na tempelo. Na losambo sosola wapi ozali na bomoi na yo, luka bokambi ya Molimo, mpe loba na episikopo na yo etali komilengela na yo mpo na tempelo. Mokambi Thomas S. Monson alobaki, “Ezali te na lotomo ya motuya mpo na yo kosalela kolaka kolongobana mpo na kokende na tempelo.”28

Mobikisi “Azali Mokonzi, ya Kolongola te ya Bondimi na Biso na Eklezia na Ye”

Nazwaki libaku ya kosala elongo na Mokambi Henry B. Eyring na kobulisa Tempelo ya Suva Fiji ya sika sanza mibale mileki. Ezalaki libaku moko ya kafukafu mpe ya bule. Mpiko mpe mayele ya bokasi ya molimo ya Mokambi Eyring epesaki nzela ete kobulisa ya sika esalema liboso ya ekumbaki emonana naino te na Mikili ya Sudi. Bobateli ya bikela mpe ya molimo epesamaki na bilenge, bamisionele, mpe bandimi.29 Lobiko ya Nkolo ezalaki kuna na polele. Kobulisa Tempelo ya Suva Fiji ya sika ezalaki ebombelo na ekumbaki. Mbala mingi ntango tokutani na ekumbaki ya bomoi, totatolaka loboko ya Nkolo na kopesaka bobateli ya seko.

Kobulisa Tempelo ya Suva Fiji ya yambo na sanza ya motoba  18, 2000, ezalaki lisusu ya kokamwa. Ntango tempelo ekomaki penepene ya kosila, baye parlema bazwaki bango bakangami na liboko moko ya batomboki. Engumba ya Suva, Fiji, epunzamaki mpe ezikisamaki. Basoda batiaki mibeko ya nsomo.

Lokola Mokambi ya Etuka, nakendeki elongo na bakambi minei ya makonzi na Fiji mpe nakutanaki na bakambi ya basoda na ngande ya basoda na Queen Elizabeth. Nsima tolimbolaki ntina ya bobulisi, bapesaki biso lisungi kasi bamitungisaki mpo na kobatela Mokonzi Gordon B. Hinckley na likama. Basengaki bobulisi moko ya moke na milulu te libanda ya tempelo, lokola molulu ya kotia mama ya libanga. Bakangamaki na kolakisa ete moto nionso libanda ya tempelo akokaki kozala na likama ya mobulu.

Mokonzi Hinckley andimaki liyangani moko ya moke kaka na bakambi ya Tempelo mpe mwa bakambi ya esika; moto mosusu te abengisamaki na ntina ya likama. Nzokande, akangamaki na koloba, “soki tobulisi tempelo, tokozala na molulu ya kotia ya libanga mama mpamba te Yesu Klisto azali libanga mama ya yambo, oyo ezali Eklezia na Ye.”

Ntango mpenza tobimaki mpo na molulu ya libanga mama, ezalaki te bandimi, bana, bapanzi nsango, to basusu. Kasi profeta moko oyo alakisaki mpiko na ye mpe mokano na ye ya sikisiki mpo na Mobikisi.

Nsima Mokambi Hinckley, kolobaka etali Mobikisi, alobaki: “Ezali moko te akokani na Ye. Etikala kozala moko te. Ekozala moko mokolo moko te. Matondi ezala na Nzambe mpo na likabo ya Mwana na Ye ya Mobali, oyo apesaki bomoi na Ye ete tokoka kozala mpe oyo azali libanga mama ya sikisiki ya yambo ya bondimi na biso mpe Eklezia na Ye.”30

Bandeko mibali mpe bandeko basi, nasambeli ete moko na moko na biso akumisa Mobikisi mpe asala mbongwana nionso esengeli mpo tomimona na tempelo na Ye ya bule. Nakosalaka bongo, tokokoka kokokisa ntina na Ye ya bule mpe kolengela bisomei mpe mabota na biso mpo na mapamboli nionso Nkolo mpe Eklezia na Ye ekoki kopesa na bomoi oyo mpe na boseko. Napesi litatoli na ngai ete Mobikisi azali na bomoi. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.