2010–2019
Mpe Kufa Ekozala Lisusu Te
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


Mpe Kufa Ekozala Lisusu Te

Mpo na baye banso batika mwana na lilita to bazali kolela mpo na balongani to baboti bakufa to moto oyo balingaki mingi, Lisekwa ezali ebandeli ya elikia monene.

Poso eleki ezalaki Pasika, mpe makanisi na biso etalelaki lisusu likabo ya bomikabi ya mpe Lisekwa ya Yesu Klisto. Mobu oyo eleki nazalaki kobanza mpe komaniola na ntina ya Lisekwa mingi mingi koleka.

Kala te mobu moko eleki, mwana na biso ya mwasi Alisa akufaki. Atungisamaki na cancer mibu libwa, na balipaso ebele, batretema ya ndenge na ndenge, bikamwisi ya makasi, mpe bozangi elikia ya mozindo koleka. Totalaki lenge na ye ya nzoto koniokwama ntango akomaki penepene ya liwa. Ezalaki mpasi mingi komona yango kokomela mwana na biso ya mwasi ya bolingo—mwa bebe kitoko oyo akolaki mpo na kokoma mwasi ta talanta, mwasi bonzenga, mwasi, mpe mama. Nakanisaki motema na ngai ekokaki kopasuka.

Elilingi
Alisa Johnson Linton

Na ntango ya Pasika eleki, mwa sanza moko yambo akufa, Alisa akomaki: “Pasika ezali bokundolami ya nionso oyo nalikiaka mpo na ngai moko. Ete mokolo moko nakobikisama mpe mokolo moko nakozala mobimba. Mokolo moko nakozala na linzanza to kopali moko te pene na ngai. mokolo moko motema ngai ekozala na bobangi te mpe makanisi na ngai ekozala na mawa te. Nazali kosambela te ete yango eyela ngai sikawa, kasi nazali na esengo nazali mpenza kondimela bomoi kitoko sima.”1

Lisekwa ya Yesu Klisto epesi elikia na makambo nionso Alisa alikiaki na yango mpe na moko na moko na biso “ntina [mpo] na elikia oyo ezali kati na [biso].”2 Mokambi Gordon B. Hinckley atalisaki Lisekwa lokola “likambo ya motuya mingi koleka kati ya lisitwale ya moto.”3

Lisekwa ezali kokokisa na Bomikabi ya Yesu Klisto mpe ezali mosisa na mwango ya monene ya lobiko.4  Tozali bana ya molimo ya baboti ya Lola.5 Ntango tyaka na mabele awa, molimo na biso esanganaki na nzoto na biso. Tokutani na bisengo mpe mikakatano kati ya bomoi ya kufa. Ntango moto akufaka, milimo na bango ekabwanaka na nzoto. Lisekwa esalaka yango ezala pete mpo na molimo ya moto mpe nzoto esangana lisusu, bobele na ntango oyo wana ekozanga nkufa mpe ekokoma bobongi nie—ekoyokisama lisusu mpasi te, bokono, to makambo mosusu.6

Sima ya Lisekwa, molimo ekokabwana lisusu te na nzoto mpo ete Lisekwa ya Mobikisi ememaki elonga ya nsuka likolo ya kufa. Na ntina kozwa lobi na biso ekoya ya seko, tosengeli kozwa molimo ya bozangi nkufa oyo—molimo mpe nzoto—esangisami mpo ya libela. Na molimo mpe nzoto ezanga nkufa ezanga bokabwani, tokoki kozwa bofuluki ya esengo.7 Na yango, na bozangi Lisekwa tokokaki kozwa atako moke te bofuluki ya esengo kasi mpasi nde ekokaki kozala mpo na libela.8 Atako bondimi, bato ya sembo bamoni bokabwani na bango ya nzoto na molimo lokola bowumbu. Tobikisami na uta na bowumbu oyo na nzela ya Lisekwa, oyo ezali bosikoli uta na basinga to mikangano ya kufa.9 Lobiko Ezali te soki nzoto na biso mpe molimo ezali elongo te.

Moko na moko na biso azali na nzoto, makanisi, mpe bandelo ya bamposa mpe babotawu. Mikakatano oyo, mosusu kati na yango emonisamaka kozala mpasi sikawa, ekozwama biyano. Makambo oyo ekotikala elongo na biso te sima ya bosekwi. Bato na bokono ya cancer lolenge moko na Alisa, mpe motango ealaki ya bosungi te. Akomaki: “Kasi lobiko ezali, nazali kobanga te. Yesu asi abikisaki cancer na ngai, mpe na ya bino. ... Na kozala malamu mingi. Nazali na esengo nayebi yango malamu.”10

Tokoki kotiya liloba cancer na esika ya bokono mosusu ya nzoto, moto, to bokono mosusu oyo tokoki kokutana na yango. Mpo ete na nzela Lisekwa, bango esi babikisami. Bikamwa ya Lisekwa, lobiko ya nsuka, ezali likolo ya nguya nkisi ya leloe. Kasi ezali likolo nguya ya Nzambe te. Toyebi ekoki kosalema mpo ete Mobikisi asekwaki mpe akokokisa lisusu Lisekwa ya moko na moko na biso.11

Lisekwa ya Mobikisi endimisi ete Azali Mwana ya Nzambe mpe ete oyo Ateyaki ezali solo. “Atombwamaki, lokola alobaki.”12 Ekoki kozala na ntembe moko ya makasi ya bonzambe na Ye eleki bowuti na Ye uta na nkunda elongo na nzoto ya bozangi kufa.

Toyebi na ntina ya litatoli ya Lisekwa kati ya bantango ya Boyokani ya Sika. Mpo na kobakisa basi mpe mibali totangi na kati ya Nsango malamu, Boyokani ya Sika endimisi bisi ete minkama sikawa bamonaki Nkolo Mosekwi.13 Mpe Buku ya Mormon eyebisi na ntina ya minkama koleka: “Bobakisami ekobaki, mpe bandimeli maboko na bango na ngambo na ye,  … mpe [ba] monaki na miso na bango mpe bayokaki na maboko na bango, mpe bayebaki na bosolo mpe bakomaki, ete ezalaki ye, oyo akomamaki na baprofeta, oyo asengelaki koya.”14

Na baoyo matatoli ya kala ebakisamaki kati ya matatoli ya mikolo ya nsuka. Na yango, na limoni ya yambo ntango mambi ya eleko oyo ebandaki, Joseph Smith amonaki Mobikisi asekwa na Tata.15. Baprofeta ya bomoi mpe bapostolo batatolaki bosolo ya bosekwi, Klisto ya bomoi.16 Bongo tokoki koloba, “Biso lisusu tofutami na yango elongo na lipata monene ya matatoli.”17 Mpe moko na moko kati na biso akoki kozala eteni ya lipata ya matatoli oyo ayebi na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu oyo tosepelaka na Pasika sikawa ekomaki—ete Lisekwa ezali solo.

Bosolo ya Lisekwa ya Mobikisi etondisaka motema na ebukana na elikia, mpo ete elongo na yango elikia ekoya ete bilaka mosusu nionso ya nsango malamu ezali bobele solo—bilaka oyo ezali moke ten a bikamwa koleka Lisekwa. Toyebi azali na nguya ya kopetola biso na masumu na biso nionso. Toyebi ete Ye azwaki likolo na Yemoko mikumba na biso nionso, mpasi, mpe the bozangi boyengebene oyo tonyokwamaki.18 Toyebi ete Ye “alamuka[ki] uta baweyi, elongo na malady na mapapu na ye.”19 Toyebi ete Ye akoki kokomisa biso mobimba kotala te oyo ezangi na nzoto na biso. Toyebi ete Ye “akopangwisa mpinzoli nionso na miso na [biso]; mpe liwa ekozala lisusu te, atako mawa, to kolela, mpe mpasi ata moko te ekozala lisusu.”20 Toyebi ete tokoki kokoma “babongi nie na nzela ya Yesu …, oyo andimaki Bomikabi oyo ya bobongi nie,”21 soki kaka tokozala na bondimi mpe kolanda Ye.

Na nsuka ya bofulami ya oratorio Mesiya, Handel asalaki loyembo kitoko maloba ya Apostolo Polo oyo esepelisaka likolo ya Lisekwa.

“Tala nazali [koloba] na bino likambo libombami; Biso nionso tokolala te, nde biso nionso tokobongwama,

“Na mwa ntango moke moke, na ntango na kobweta liso, wana ekoyula kelelo na nsuka: … kelelo ekoloba mpe biso tokobongwama motindo mosusu.

“Zambi ekoki ete nzoto oyo na kopola, mpe biso elata kozanga kopola mpe njoto oyo na kufa elata kozanga kokufa.

“… Mpe liloba likokoka oyo ekomami, Kufa emelami na elonga.

“O, kufa, kolonga na yo ezali wapi? O lilita esweli na yo ezali wapi? …

“Kasi botondi na Nzambe, oyo apesi biso elonga na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto.”22

Nazali na esengo mpo na mapamboli oyo ezali ya biso mpo ete Bomikabi mpe Lisekwa ya Yesu Klisto. Mpo na baye banso batika mwana na lilita to bazali kolela mpo na balongani to baboti bakufa to moto oyo balingaki mingi, Lisekwa ezali ebandeli ya elikia monene. Boyebi ya nguya kani ekozala ya komona bango lisusu—kaka te lokola milimo kasi na nzoto ya bosekwi.

Nazali mpenza na mposa ya komona mama na ngai mpo na ntango molai mpe koyoka boboto na ye mpe kotalaka kati ya miso na ye ya bolingo. Nalingi komona kongwenya ya tata na ngai mpe koyoka koseka na ye mpe komona ye lokola mosekwi, mobongi nie. Na misu ya bondimi, nazali kobanza Alisa na mobimba likolo ya mikakatano nionso ya mabele to mpasi ya kufa—mosekwi, Alisa mobongi nie mpe na bofuluki ya esengo.

Mwa Bapasika eleki, akomaki na bokuse: “Bomoi na nzela ya nkombo na Ye. Bongo elikia ebele. Ntango nionso. Na makambo nionso. Nalingaka Pasika mpo na kokundolisa ngai.”23

Natatoli na bosolo ya Lisekwa. Yesu Klisto azali na bomoi, mpe mpo na ntina na Ye, tokozala banso na bomoi lisusu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.