2010–2019
Endimi Ngai Yango?
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


Endimi Ngai Yango?

Soki makambo oyo ezali ya solo, nde tozali na nsango monene koleka ya elikia mpe lisalisi oyo mokili eyeba naino te.

Na sanza ya misato 30, kaka mobu moko eleki, ethan Carnesecca ya moke, uta na America Folk, Utah, bayambaki ye na lopitali na maladi ya kopema mpe mai nzinganzinga ya bapumo. Mikolo mibale nsima nzoto na ye ekomaka mabe mpenza ete asengalaki kokende ya helicopter na Lopitalo ya Eteyelo ya Bana na Salt Lake City. Na komitungisa mama na ye, Michele, azwaki ndingisa ya kokende na kiti ya liboso mpo kozala elongo na mwana ye ya mobali. Bapesaki ye nsinga ya motoyi boye akokaki kosolola na basusu na helicopter. Akokaki koyoka minganga kosalaka na mwana na ye ya mobali ya moke ya maladi, mpe lokola azalaki monganga yemei, Michele ayebaki ya kokoka mpo na kososola ete Ethan azalaki na mpasi mpenza.

Elilingi
Ethan Carnesecca while ill

Na ngonga oyo ya matata, Michele amonaki bazalaki kokende nokinoki na Tempelo ya Draper Utah. Uta na likolo, atalaki libanda na kati ya lobwaku mpe akokaki lisusu komona Tempelo ya Jordan River, the Tempelo ya Oquirrh Mountain, mpe kutu Tempelo ya Salt Lake na mosika. Likanisi eyaki na mayele na ngai: “Ondimelaka yango to te?”

Alobeki mpo na likambo oyo:

“Nayokaki nsango ya mapamboli ya tempelo mpe [ete] ‘mabota ezali mpo na libela’ na Eteyelo ya bana mpe na Bilenge Basi. Nkangisamaki na moninga na ngai ye seko mpo na ntango mpe mpo na boseko na tempelo. Nakanisaki mateya ya mabota lokola mokambi ya Bilenge Basi, mpe nakabolaki masolo ya mabota ya libela elongo na bana na likita ya libota na mpokwa. NAYEBAKI yango, kasi ENDIMAKI ngai yango? Eyano eyaki nokinoki lokola motuna ebimaki na kati ya moto na ngai: Molimo etatolaki na motema mpe mayele na ngai eyano nasilaki koyeba—NANDIMAKI YANGO MPENZA!

“Na ngonga wana nasopaki motema na ngai na losambo na Tata ya Lola, kotondaki Ye mpo na boyebi mpe Bondimi nazalaka na yango ete mabota ya solo ezali ya libela. Natondaki Ye mpo na Mwana na Ye ya Mobali, Yesu Klisto, oyo esalaki yango esalema. Natondaki Ye mpo na mwana na ngai ya mobali mpe nasalaki na Tata na ngai ya Lola ayeba soki nasengalaki komema Ethan na ngai ya moke na ndako na ye ya lola, ezalaki malamu. Nalikiaki na Tata na ngai ya Lola mpenza, mpe nayebaki nakomona Ethan lisusu. Nazalaki na botondi mpenza ete na ngonga moko ya matata, nazalaki na boyebi MPE bondimi ete nsango malamu ezalaki ya solo. Nazalaka na kimia.”1

Ethan alekisaki baposo mingi na lopitalo, mpo na kozwa bolengeli ya minganga ya mayele. Kosambela, kokila, bondimi ya balingami, esangana na bolengeli wana, epesaki ye ndingisa alongwa lopitalo mpe azonga na ndako mpo na kozala elongo na libota na ye. Azali kolongono mpe malamu lelo.

Elilingi
Libota ya Carnesecca
Elilingi
Ethan Carnesecca bomonani

Na ngonga oyo ya ndimbola mpo na Michele etatolaki ye ete nini azalaki koteya bomoi na ye mobimba ezalaki mingi koleka maloba kaka; ezali ya solo.

Ekomaki biso ntango mosusu na momesano na mapamboli topesameli na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ete tozangi kososola mobimba likamwisi mpe lokumu ya boyekoli na Eklezia ya solo ya Nkolo? Ezali biso naino na elingo ya kozala bolole mpo na likabo monene koleka ekoki kopesamela biso na bomoi oyo? Mobikisi Yemei ateyaki, “soki obateli mibeko na ngai mpe oyiki mpiko kino nsuka okozwa bomoi ya seko, oyo ezali likabo eleki moneneya Nzambe.”2

Tolikii ete Eklezia ezali mingi koleka kaka esika malamu ya kokende eyenga mpe koyekola kozala moto moko malamu. Ezali mingi koleka kaka lingomba ya baklisto ya mokili wapi tokoki kosangana elongo na bato ya ndakisa malamu ya ezalela. Ezali kaka te lisanga moko malamu ya makanisi oyo baboti bakoki koteya bana na bango na ndako boye bakozala bato ya malonga mpe ya malamu. Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali mingi koleka makambo nionso oyo.

Bokanisa kaka ngonga moke etali litotoli tosalaka lokola eyamba. Tondima ete Eklezia ya Yesu Klisto wana kaka oyo etiamaki ntango azalaki na mabeli ezingisama mbala moko lisusu na profeta moko abiangemaki na Nzambe na ntango na biso mpe ete bakambi na biso bosimbi nguya mpe likoki wana kaka mpo na kosala na nkombo ya Nzambe oyo Bapostolo ya kala basimbaki. Ebengami bonganganzambe ya Nzambe. Totatoli ete na nzela ya likoki ezongisami, tokoki kozwa makuli ya lobiko lokola libatisi mpe kosepela likabo ya kopetola mpe kobongisa ya Molimo Mosantu mpo na kozala elongo na biso ntango nionso. Tozali na bapostolo mpe baprofeta kokambaka mpe koyangelaka Eklezia oyo na nzela ya bafungola ya bonganganzambe, mpe tondimi ete Nzambe alobaka na bana na Ye na nzela baprofeta oyo.

Tondimi lisusu ete nguya ya bonganganzambe esalaka esalema mayokani mpe kozwa makuli na batempelo esantu oyo ekokokisa biso mokolo moko kozonga na miso ya Nzambe mpe kozala elongo na Ye libela. Totatoli lisusu likoki ete, nzela ya nguya oyo, maboti ekoki kokangisama elongompo na boseko ntango balongani bakoki na liyokani ya sika mpe ya libela ya libala na bandako ya bule oyo tondimi azali mpenza bandako ya Nzambe. Totatoli ete tokoki kozwa makuli ya lobiko oyo kaka te mpo na bisomei kasi lisusu mpo na bankoko na biso azalaki oyo bazalaka na mabele na kozanga libaku ya kosala elongo na makuli oyo ya ntina ya lobiko. Tondimi tokoki kosalela makuli mpo na bankoko na bison a batempelo esantu wana kaka.

Tondimi ete, na nzela na profeta moko mpe nguya ya Nzambe, tozwi makomi ya kobakisa, litatoli ya kobakisa na oyo ya Biblia na kosakolaka ete Yesu Klisto azali Mobikisi ya Mokili.

Totatoli ete Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka ezali bokonzi ya Nzambe mpe Eklezia ya solo moko kaka na mabele. Ebengami Eklezia ya Yesu Klisto mpambe te Ye atelemi na liboso; ezali Eklezia na Ye, mpe makambo manso oyo ekoki kosalema na ntina na libonza ya bomikabi na Ye.

Tondimi ete biloko oyo kokesenisa ekoki kozwama te na esika to lingomba mosusu te na mabele. Ata bosembo biyamba misusu ezali, moko te na yango ezali na likoki mpo na kopesa makuli ya lobiko oyo ezwami na Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Tozali na boyebi ya makambo oyo, kasi endimaka biso yango ? Soki makambo oyo ezali ya solo, nde tozali na nsango monene koleka ya elika mpe lisalisi oyo mokili eyeba naino te. Kondimaka yango ezali likambo ya ntina ya seko mpo na biso mpe baye tolingaka.

Mpo na kondima, tosengeli kozwa nsango makamu uta na mito na biso kino mitema na biso! Ekoki kosalema mpo na biso kokende kaka bongo na bongo na kosalelaka nsango malamu mpamba te ezelami to mpamba te ezali bonkoko na yango tokoli to mpamba te ezali momesano. Boko bayebi ntango mosusu nini bato ya Mokonzi Benjamin bayokaki nsima ya lisakola na ye ya lotomo: “Mpe bango banso babelelaki na mongongo moko, kolobaka: Iyo, tondimi makambo manso maye olobi epai ya biso; mpe lisusu, toyebi sikisiki mpe bosolo bwa mango, na ntina ya Molimo mwa Nkolo wa Nguya Inso, oyo asali mbongwana ekasi na biso, to o mitema mya biso, ete tozali lisusu na meko mpo ya kosala bobe te, kasi mpo ya kosala bolamu ntango inso.”3

Tosengeli koluka kosala mitema na biso mpe bozali na biso mpenza ebongwana mpo ete tozala lisusu te na mposa ya kolanda banzela ya mokili kasi tosepelisa Nzambe. Mbongwana ezali nzela oyo esalemaki na ntaka ya ntango mpe esengi bolingi na kosalela bondimi. Eyaka ntango toluki makomi esika ya koluka Internet. Eyaka ntango totosi mitindi ya Nzambe. Mbongwana eyaka ntango tosalisi boye nzinganzinga na biso. Eymboaka uta na losambo, kokende tempelo mbala na mbala, mpe kokokisa na botongono mikumba na biso Nzambe apesa. Esengaka sikisiki mpe bokasi ya mokolo na mokolo.

Batunaka ngai mbala na mbiala, “Mokakatano nini eleki monene bilenge na biso bakutani na yango lelo?” Nayanoli ete nandimi ezali nguya ya ntango nionso ya “ndako enene mpe ya etando”4 na bomoi na bango. Buku ya Molomoni ekomamaka kaka mpo na mokolo na biso, nde ya solo tokoki te kobunga bosolo mpo na biso banso ya nsango ya limoni ya Leyi ya nzete ya bomoi mpe nguya ya baye bazalaki kolakisa misapi na bango mpe koseka uta na ndako ya monene mpe ya etando.

Nini epasolaka ngai motema ezali bolakisa ya baye basilaki kozwa nzela na bango na kati ya londende ya molili na nzela eke mpe ya nkaka, bakangamaki na lingenda ya ebende, bakomaki na nsuka na bango, mpe babandaki komeka mbuma ya peto mpe ya elengii mpenza ya nzete ya bomoi. Nde makomi elobi ete bato balati kitoko na ndako monene mpe ya etando, “bazalaki koseka mpe kolakisa misapi na bango epai ya baye bayaka nampe bazalaka kolia mbuma.

“Mpe nsima bameki mbuma bayokaki nsoni, na ntina ya bazalaki koseka bango; mpe bakweyaki mosika na banzela epekisama mpe babungaki.”5

Milongo oyo elakisi baye ya biso oyo basili kozwa nsango malamu na bomoi na biso. Ezala tobotamaki na kati na yango to tosengelaki kobunda na nzela na biso na kati ya londende ya molili mpo na kozwa yango, tomekaki mbuma, oyo “ezali ya ntalo mpe ya mposa koleka” mpe ezali na likoki ya komema biso na bomoi ya seko.”6Tosengeli kaka te kokoba kokila mpe kosala bokebi te na baye bakoseka bondimi na biso to baye basepeli kotia nteme to baye bamoni mabunga ya bakambi mpe malongi ya Eklezia. Ezali boponi tosalaka mokolo na mokolo—mpo na kopona bondimi likolo na ntembe. Mpaka M. Russell Ballard atindi biso “botikala na bwato, bosalela kazaka ya bomoi, mpe kosimba na maboko mibale.”7

Lokola bandimi ya Eklezia ya solo ya Nkolo, tosili kozala na bwato. Tosengeli te kokende koluka na nzela ya bafilosofi ya mokili bosolo oyo ekopesa biso libondisi, lisalisi, mpe bokambi mpo na komema biso na kimia na nzela ya mimekano ya bomoi—tosili kozwa yango! Kaka lokola mama na Ethan akokaki kososola bondimi na ye asimba kala mpe kosakola na bondimi na ngonga ya matata, “nandimaka yango mpenza,” bongo tokokoka!

Natatoli ete bondimi na biso na bokonzi ya Nkolo ezali likabo ya motuya ya komeka te. Napesi botatoli ete mapamboli mpe kimia Nkolo abombeli Baye bazali botosi mpe botongono eleki nionso mayele ya moto ekoki kososola. Natiki litatoli oyo na bino na nkombo ya Yesu Klisto, amene.