Makomi
3 Nefi 13


Mokapo 13

Yesu ateyi Banefi losambo la Nkolo—Basengeli kotia bomengo o lola—Bazomi na Babale o mosala mwa bango batindami kotia te likanisi mpo ya biloko bya ntango—Mekisani Matai 6. Penepene na 34 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Solo, solo, nalobi ete nalingi ete bokaba limozina epai ya bakeleli, kasi salani keba ete bokaba te limozina lya bino liboso lya bato mpo ya komonomo na bango; soko te bozali na mbano te, na Tata wa bino oyo azali o lola.

2 Yango wana, ekokaba bino limozina lya bino, bolelisa mondule te liboso lya bino, lokola ekosalaka bakibisi o sinagogi mpe o nzela, ete bakoka kozala na nkembo ya bato. Solo nalobi epai ya bino, bazali na mbano ya bango.

3 Kasi ekokaba yo limozina tika loboko la yo la mwasi loyeba te nini loboko la yo la mobali losali.

4 Ete limozina lya yo likoka kozala na nkuku; kasi Tata wa yo oyo akomonoko na nkuku, yemei akopesa yo mbano na polele.

5 Mpe ekosambela yo okosala te lokola bakibisi, mpo bakosambelaka, kotelemeke o sinagogi mpe na litumu lya balabala, ete bakoka komonomo na bato. Solo nalobi epai ya bino, bazali na mbano ya bango.

6 Kasi yo, ekosambela yo, kota o kati ya kisuku ya yo, mpe ekangi yo ekuke ya yo, sambela na Tata wa yo oyo azali na nkuku, Mpe Tata wa yo, oyo akomonoko na nkuku akopambola yo na polele.

7 Kasi ekosambela bino, salelani te mabandeli ma mpamba, lokola Bapaganu, mpo bakanisi ete bakoyokama mpo ya bolobi boike bwa bango.

8 Zalani te bo epai ya bango, mpo Tata wa bino ayebi makambo kani bosengeli na yango yambo bosenge ye.

9 Nsima ye lolenge loye, yango wana, sambelani: Tata wa biso oyo azali o lola, ebulisama nkombo ya yo,

10 Bolingi bwa yo bosalema o mabele lokola ezali o lola.

11 Mpe limbisa biso niongo ya biso, lokola biso tokolimbisaka bato ba niongo ya biso.

12 Mpe kamba biso te o kati ya lisenginia, kasi bikisa biso uta o mabe.

13 Mpo ya yo ezali bokonzi, nguya, mpe nkembo, libela. Amene.

14 Mpo, soko bolimbisi bato mabe ma bango Tata wa bino wa lola akolimbisa bino lokola.

15 Kasi soko bolimbisi te bato mabe ma bango mpe Tata wa bino akolimbisa te mabe ma bino.

16 Lisusu, ekokila bino bilei zalani te lokola bakibisi, na bilongi bya mawa, mpo bakobebisaka bilongi bya bango ete bakoka komonomo epai ya bato bakili. Solo nalobi epai ya bino, bazali na mbano ya bango.

17 Kasi ekokila yo, pakola moto mwa yo mafuta mpe sukola elongi ya yo.

18 Ete emonono te epai ya bato okili, kasi epai ya Tata wa bino, oyo azali na nkuku; mpe Tata wa yo oyo akomonoko na nkuku, akopesa yo mbano na polele.

19 Tiani te mpo ya binomei bomengo likolo lya mabele, wapi mpomboli mpe bogugi bokobebisaka, mpe bayibi bakodusolaka mpe bakoyibaka.

20 Kasi tiani mpo ya binomei bomengo o lola, wapi mpomboli to bogugi bokobebisaka te, wapi bayibi bakodusolaka to bakoyibaka te.

21 Mpo wapi bomengo bwa yo bozali, kuna motema mwa yo mokozala lokola.

22 Mwinda mwa nzoto mozali liso; soko, yango wana, liso lya yo lizali swii, nzoto ya yo mobimba ekotonda na mwinda.

23 Nde soko liso lya yo lizali libe, nzoto ya yo mobimba ekotonda na molili. Soko, yango wana, mwinda moye mozali na yo mozali molili, boniboni enene ezali molili mona!

24 Moto te akoki kosalela bankolo babale; mpo akoyina moko mpe akolinga mosusu, to lisusu akosimba na moko mpe akotiola mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mosolo.

25 Mpe sikawa esalemaki ete elobaka Yesu maloba maye atalaki likolo lya bazomi na babale baye aponoko, mpe alobaki epai ya bango: Bomikundola maloba maye nalobi. Mpo tala, bozali bango baye naponi mpo ya kosala epai ya bato baye. Yango wana nalobi epai ya bino, tiani te likanisi mpo ya bomoi bwa bino, nini bokolia, to nini bokomele; to mpo ya nzoto ya bino te, nini bokotia likolo. Ezali te bomoi mingi koleka niama mpe nzoto koleka elamba?

26 Talani ndeke ya mopepe, mpo bakokonaka te, mpe bakobukaka to bakosangisaka te o kati ya ebombelo; nzokande Tata wa bino wa lola akoleisaka bango. Ezali bino te mingi balamu koleka bango?

27 Nani wa bino na kotiaka likanisi akoki kobakisa eteni yoko o bolai bwa ye?

28 Mpe ntina nini botii likanisi mpo ya bilamba? Maniolani fololo ya elanga boniboni ikokolaka. Ikosalaka te, mpe ikotongaka elamba te.

29 Mpe nzokande nalobi epai ya bino, ete kutu Solomo, o nkembo enso ya ye, atutaki monzele bo yoko ya yango te.

30 Yango wana, soko Nzambe akolatisaka matiti ma elanga, maye lelo mazali, mpe lobi makobwakama o kati ya fulu, kutu boye akolatisa bino soko bozali te na bondimi boke.

31 Yango wana tiani te likanisi, kolobaka, Nini tokolia? to, Nini tokomele? to Nini tokolata?

32 Mpo Tata wa bino wa lola ayebi ete bozali na mposa ya biloko biye binso.

33 Kasi lukani yambo bokonzi bwa Nzambe mpe bosembo bwa ye mpe biloko biye binso bikobakisama epai ya bino.

34 Tiani, yango wana, likanisi te mpo ya mokolo mwa nsima; mpo mokolo mwa nsima mokotia likanisi mpo ya biloko bya mwangomei. Ekoki mokolo mpo ya bobe bwa mwango.