Makomi
3 Nefi 3


Mokapo 3

Gidiani, mokambi wa Gadiatoni, asengi ete Lakonusi mpe Banefi batika bangomei mpe mboka ya bango—Lakonusi aponi Gidigidoni lokola mokonzi wa mampinga—Banefi basangani o Zalayemila mpe Beboo mpo ya komibatela. Penepene na 16–18 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe sikawa esalemaki ete o mobu mwa zomi na motoba uta o boyei bwa Klisto, Lakonusi, mokonzi wa mboka, azwaki monkanda uta na mokambi mpe moyangeli wa lingomba liye lya bayongoli; mpe iye izalaki makambo maye makomamaki, kolobaka:

2 Lakonusi, nkumu aleki lokumu mpe moyangeli mokonzi, tala, nakomi monkanda moye epai ya yo, mpe napesi epai ya yo bosanzoli bonene na ntina ya sikisiki ya yo, mpe lisusu sikisiki ya bato ba yo, na kosimbaka ena eye bobanzi ezali litomba mpe lipanda lya bino; iyo, botelemi malamu, lokola soko bosalisami na loboko la nzambe moko, na bobateli bwa lipanda lya bino, bozwi bwa bino, mpe ekolo ya bino, to ena eye bobiangi boye.

3 Mpe emononi mawa epai ya ngai, nkumu aleki lokumu Lakonusi, ete ozali ligboma mpe mpamba boye ete okoki kotelemela bato bilombe mingi boye baye bazali o etinda ya ngai, baye sikawa o ntango eye batelemi o mandoki ma bango, mpe bazeli na nsomo mpo ya liloba—Kitani likolo lya Banefi mpe bebisani bango.

4 Mpe ngai, koyebaka molimo molongamaka te mwa bango o esika ya etumba, mpe koyebaka boyini bwa libela bwa bango ona bino na ntina ya mbeba mingi eye bosali epai ya bango, yango wana soko bakokita kobunda na bino bakobimela bino na bobebisami mpenza.

5 Yango wana nakomi monkanda moye, kokangaka mwango na maboko ma ngaimei, koyokaka mpo ya bolamu bwa bino, na ntina ya sikisiki ya bino na ena eye bondimi ezali alima, mpe molimo mwa bino wa bonkumu o esika ya etumba.

6 Yango wana nakomi epai ya yo, kozalaka na mposa ete botika epai ya bato ba ngai, engumba ya bino, mboka ya bino, mpe bozwi bwa bino, esika ete babimela bino na mopanga, ete bobebisami boya epai ya bino.

7 To na maloba masusu, bomitika epai ya biso, mpe bosala bomoko elongo na biso, mpe bokoma bayebi na misala mya biso mya nkuku, mpe bokoma bandeko ba biso ete bozala lokola epai ya biso—bawumbu ba biso te, kasi bandeko ba biso mpe baninga ba biloko binso bya biso.

8 Mpe tala, nalapi epai ya yo, soko osali eye, na ndai yoko, bokobebisama te; kasi soko osali eye te, nalapi epai ya yo na ndai yoko, ete o sanza ya nsima nakotinda ete mampinga ma ngai makita kobunda na bino, mpe bakokanga maboko ma bango te, mpe bakotika bino te, kasi bakoboma bino, mpe bakotika mopanga mokweya likolo lya bino kina bokosilisama.

9 Mpe tala, nazali Gidiani; mpe nazali moyangeli wa lingomba liye lya nkuku lya Gadiatoni; liye lingomba mpe misala mya lyango nayebi mizali milamu; mpe mizali mya mikolo mya kala mpe mikitisanisamaki epai ya biso.

10 Mpe nakomi monkanda moye epai ya yo, Lakonusi mpe naliki ete bokopesa mboka ya bino mpe bozwi bwa bino, na bozangi bosopi makila, ete eye bato ba ngai bakoka kozongela makoki mpe boyangeli bwa bango, baye bakabwani mosika uta na bino na ntina ya nkuna ya bino na kokangisaka bango na boyangeli bwa bango, mpe longola se soko bosali eye, nakobekola mbeba ya bango. Nazali Gidiani.

11 Mpe sikawa esalemaki ete eyambaki Lakonusi monkanda moye akamwaki mpenza, na ntina ya bozangi bobangi bwa Gidiani na kosengeke bozwi bwa mboka ya Banefi, mpe lisusu na kokanelaka bato mpe kobekolaka mbeba ya bango baye bazwaki mbeba te, longola se soko bamisalaki mabe na kokabwanaka na bayongoli bana ba nkuna mpe ba nsomo.

12 Sikawa tala, Lakonusi oyo, moyangeli, azalaki moto moko moyengebene, akokaki te kobangisama na bisenge mpe bokaneli bwa moyongoli moko; yango wana ayokemelaki te na monkanda mwa Gidiani, moyangeli wa bayongoli, kasi asalaki ete bato ba ye babelela epai ya Nkolo, mpo ya bokasi o ntango eye bayongoli bakokita kobunda na bango.

13 Iyo, atindaki esakola yoko o ntei ya bato banso, ete basangisa elongo basi ba bango, mpe bana ba bango, bibwele bya bango, bitonga bya bango, mpe biloko binso bya bango, longola se mboka ya bango, epai ya esika yoko.

14 Mpe asalaki ete bisika bikasi bitongama zingazinga na bango, mpe bokasi bwa byango bosengelaki kozala bonene mpenza. Mpe asalaki ete mampinga, ma Banefi mpe ma Balamani lokola, to banso ba bango baye batangemaki o ntei ya Banefi, batiama lokola bakengeli zingazinga mpembeni mpo ya kokenge bango, mpe kobatela bango na bayongoli moi mpe butu.

15 Iyo, alobaki epai ya bango boye: Lokola Nkolo azali na bomoi, longola se soko boyamboli mabe ma bino manso, mpe bobeleli epai ya Nkolo, bokobikisama ata moke te libanda lya maboko ma bayongoli bana ba Gadiatoni.

16 Mpe enene boye mpe ya bokamwi izalaki maloba mpe mabikuli ma Lakonusi ete esalaki bobangi boya likolo lya bato banso, mpe bamilendisaki na bokasi bwa bango mpo ya kosala engebene na maloba ma Lakonusi.

17 Mpe esalemaki ete Lakonusi aponoki bakapiteni bakonzi likolo lya mampinga manso ma Banefi, mpo ya koyangela bango o ntango eye bayongoli bakokita libanda lya esobe mpo ya kobunda na bango.

18 Sikawa mokonzi aleki monene o ntei ya bakapiteni bakonzi banso mpe komanda monene wa mampinga manso ma Banefi aponomoki, mpe nkombo ya ye ezalaki Gidigidoni.

19 Sikawa ezalaki momeseno o ntei ya Banefi banso mpo ya kopono bakapiteni bakonzi wa ba bango (longola se o ntango ya nkuna) moto moko oyo azalaka na molimo mwa bobimisi mpe bobikuli lokola; yango wana Gidigidoni oyo azalaki profeta moko monene o ntei ya bango, mpe lokola ezalaki mosambisi mokonzi.

20 Sikawa bato balobaki epai ya Gidigidoni: Sambela epai ya Nkolo, mpe tomata likolo lya ngomba mpe o kati ya esobe, ete tokoka kokweya likolo lya bayongoli mpe kobebisa bango o mboka ya bangomei.

21 Kasi Gidigidoni alobaki epai ya bango: Nkolo apekisi; mpo soko tomati mpo ya kobanda na bango Nkolo akotika biso o kati ya maboko ma bango; yango wana tokomilengele o kati ya ntei ya mboka ya biso, mpe tokosangisa mampinga ma biso manso elongo mpe tokokende te kobunda na bango, kasi tokozela kina bakoya kobanda na biso; yango wana lokola Nkolo azali na bomoi, soko tosali eye akotika bango o kati ya maboko ma biso.

22 Mpe esalemaki ete o mobu mwa zomi na sambo, o nsuka nsuka ya mobu, esakola ya Lakonusi ekendeki o ntaka ya etando mobimba ya mboka, mpe bakamataki farasa ya bango, mpe makalo ma bango, niama ya kobokolo ya bango, bibwele bya bango, mpe bitonga bya bango, mpe mboto ya bango, mpe biloko binso bya bango, mpe batambolaki nkoto na nkoto mpe zomi na zomi na nkoto na nkoto, kina bakendeki banso o esika eye eponomoki ete basangisa bangomei elongo, mpo ya komibatela na bayini ba bango.

23 Mpe mboka eye eponomoki ezalaki mboka ya Zalayemila, mpe mboka eye ezalaki o kati ya mboka Zalayemila mpe mboka Beboo, iyo, o monkoloto moye mozalaki o kati ya mboka Beboo mpe mboka Mpamba.

24 Mpe ezalaki bato boko nkoto mingi baye babiangemaki Banefi, baye basangisaki bangomei elongo o mboka eye. Sikawa, Lakonusi asalaki ete basangisa bangomei elongo o mboka ya epai ya sudi, na ntina ya botutu bonene boye bozalaki likolo lya mboka ya epai ya nordi.

25 Mpe bamilendisaki na kobunda na bayini ba bango; mpe bafandaki o mboka yoko, mpe o nzoto yoko, mpe babangaki maloba maye malobamaka na Lakonusi, mpenza ete koyambolaki masumu ma bango manso; mpe bamatisaki nsambo ya bango epai ya Nkolo Nzambe wa bango, ete abikisa bango o ntango eye bayini ba bango bakoya kobunda na bango.

26 Mpe bazalaki na mawa mpenza na ntina ya bayini ba bango. Mpe Gidigidoni asalaki ete basala mandoki ma etumba ma lolenge na lolenge, mpe bazala bakasi na bibundele bya bango, mpe na nguba inene, mpe nguba ike, nsima ya lolenge la mitindo mya ye.