Makomi
3 Nefi 4


Mokapo 4

Mampinga ma Nefi bakweyisi bayongoli ba Gadiatoni—Gidiani abomami, mpe mokitani wa ye, Zeminaliya, adiembisami—Banefi basanzoli Nkolo mpo ya elonga ya bango. Penepene na 19–22 ya Mobu mwa Mokonzi.

1 Mpe esalemaki ete o nsuka nsuka ya mobu mwa zomi na mwambe mampinga mana ma bayongoli balengeleke mpo ya etumba, mpe babandaki kokita mpe kowelisa uta o ngomba patatalu, mpe libanda lya ngomba, mpe esobe, mpe bisika bikasi bya bango, mpe bisika bya nkuku bya bango mpe babandaki kobotolo mboka, iye izalaki o sudi mpe iye izalaki o nordi lokola, mpe babandaki kobotolo mboka inso iye itikaka Banefi, mpe bingumba biye bitikalaki mpamba.

2 Kasi tala, izalaki te niama ya nzamba mpe niama ya bokila o mboka ina iye Banefi batikaka, mpe ezalaki te niama ya bokila mpo ya bayongoli, longola se soko ezalaki o esobe.

3 Mpe bayongoli bakokaki te kowumela, mpo ya bozangi bilei, Banefi batikaka mboka ya bango mpamba, mpe basangisaka bibwele bya bango mpe bitonga bya bango mpe biloko binso bya bango mpe bazalaki o nzoto yoko.

4 Yango wana, ezalaki nkonzo te mpo ya bayongoli kozwa bilei, longola se soko ezalaki komata o etumba ya polele na Banefi; mpe Banefi kozalaka o nzoto yoko, mpe kozalaka o motango moko monene, mpe kobombaka mpo ya bangomei bilei, farasa mpe niama ya kobokolo, mpe bibwele bya lolenge na lolenge, ete bakoka kowumela mpo ya ntaka ya mibu sambo, o yango ntango balikiaki kobebisa bayongoli mosika uta o etando ya mboka; mpe boye elekaki mobu mwa zomi na mwambe.

5 Mpe esalemaki ete o mobu mwa zomi na libwa, Gidiani amonoki ete elongobanaki ete akende kobunda na Banefi, mpo ezalaki nzela te ete bakoka kowumela longola se soko ezalaki na kopunza mpe koyongolo mpe koboma.

6 Mpe bamekaki te kopanzana bangomei likolo lya etando ya mboka mpenza ete bakoka kokolisa mboto, mbele Banefi baya likolo lya bango mpe baboma bango; yango wana Gidiani apesaki motindo epai ya mampinga ma ye ete o mobu moye bamata mpo ya kobunda na Banefi.

7 Mpe esalemaki ete bamataki mpo ya kobunda; mpe ezalaki o sanza ya motoba; mpe tala, enene mpe ya nsomo ezalaki mokolo moye bamataki mpo ya kobunda; bazingamaki zingazinga na nkamba nsima ya lolenge la bayongoli; mpe bazalaka na mposo ya mwana wa mpate zingazinga na nketo ya bango, mpe bapakolamaki na makila, mpe mito mya bango mizalaki kolokolo, mpe bazalaka na bibende bya mito likolo lya bango, mpe enene mpe ya nsomo ezalaki etalisi ya mampinga ma Gidiani na ntina ya bibundele bya bango, mpe na ntina ya kopakolamaka na makila.

8 Mpe esalemaki ete mampinga ma Banefi, emonoko bango etalisi ya mampinga ma Gidiani, banso bakweyaka o mabele, mpe batombolaki bibelela na Nkolo Nzambe wa bango, ete abatela bango mpe abikisa bango libanda lya maboko ma bayini ba bango.

9 Mpe esalemaki ete emonoko mampinga ma Gidiani eye babandaki koganga na mongongo moko mokasi, na ntina ya bosepeli bwa bango, mpo babanzaki ete Banefi bakweyaka na bobangi na ntina ya nsomo ya mampinga ma bango.

10 Kasi na eye basisolamaki, mpo Banefi babangaki bango te; kasi babangaki Nzambe wa bango, mpe babondelaki ye mpo ya bobatelami; yango wana, ewelaki mampinga ma Gidiani likolo lya bango, balengelemeki mpo ya kokutana na bango; iyo, na bokasi bwa Nkolo bayambaki bango.

11 Mpe etumba ebandaki o sanza ya motoba; mpe enene mpe ya nsomo ezalaki etumba ya yango, enene mpe ya nsomo ezalaki bobomi bwa yango, mpenza ete eyebanaki mokolo moko te bobebisami bonene boye o ntei ya bato banso ba Lehi uta atikaki Yelusaleme.

12 Mpe ata bokaneli mpe ndai iye Gidiani asalaka, tala, Banefi babeteki bango, mpenza ete bakweyaki nsima uta o liboso lya bango.

13 Mpe esalemaki ete Gidigidoni atindaki mampinga ma ye malanda bango mosika lokola o ndelo ya esobe, mpe balingaki kobikisa moko te na baye bakokweya o kati ya maboko ma bango na nzela; mpe boye balandaki bango mpe babomaki bango, o ndelo ya esobe, kutu kina bakokisaka motindo mwa Gidigidoni.

14 Mpe esalemaki ete Gidiani, oyo atelemeke mpe abundaka na mpiko mpenza, alandamaki lokola ekimaki ye; kozalaka ya kolembe na ntina ya bitumba biike, akangamaki mpe abomamaki. Mpe boye ezalaki nsuka ya Gidiani moyongoli.

15 Mpe esalemaki ete mampinga ma Banefi bazongaki lisusu o esika ya bango ya bozangi likama. Mpe esalemaki ete mobu moye mwa zomi na libwa molekaki, mpe bayongoli bayaki lisusu te kobunda, mpe bayaki lisusu te o mobu mwa tuku mibale.

16 Mpe o mobu mwa tuku mibale na moko bamataki te mpo ya kobunda, kasi bamataki o ngambo inso mpo ya kotia bozingi zingazinga na bato ba Nefi; mpo babanzaki ete soko bakokata bato ba Nefi mosika uta o mboka ya bango, mpe bakozinga bango na ngambo inso, mpe soko bakati bango mosika uta o matomba manso ma bango ma libanda, ete bakokaki kosala bango bamitika engebene na matombeli ma bango.

17 Sikawa baponoko mpo ya bangomei mokambi mosusu, ya ye nkombo ezalaki Zeminaliya; yango wana ezalaki Zeminaliya oyo asalaki ete bozingi bwa mboka botiama.

18 Kasi tala, eye ezalaki litomba lyoko mpo ya Banefi, mpo ekokaki te mpo ya bayongoli kotia bozingi bolai bokoki ete ezala na mpamba te likolo lya Banefi, na ntina ya bilei biike biye batiaki likolo o ebombelo.

19 Mpe na ntina ya boke bwa bilei o ntei ya bayongoli—mpo tala, bazalaki na eloko te longola se ezalaki niama mpo ya bolei bwa bango, eye niama bazwaki o esobe.

20 Mpe esalemaki ete niama ya bokila ibungaki o esobe mpenza ete bayongoli bazalaki penepene na kowa na nzala.

21 Mpe Banefi bazalaki ntango inso kotambolaka libanda o moi mpe o butu, mpe kokweyaka likolo lya mampinga ma bango, mpe kokataka bango nkoto na nkoto mpe zomi na zomi na nkoto na nkoto.

22 Mpe boye ekomaki mposa ya Zeminaliya mpo ya kolongola bango uta o mokano mwa bango, na ntina ya bobebisami bonene boye boyaki likolo lya bango o moi mpe o butu.

23 Mpe esalemaki ete Zeminaliya apesaki etinda epai ya bato ba ye ete bamilongola uta o bozingi, mpe batambola o kati ya biteni bileki mosika bya mboka ya epai ya nordi.

24 Mpe sikawa, Gidigidoni koyebaka mwango mwa bango, mpe koyebaka botau bwa bango na ntina ya mposa ya bilei, mpe bobomi bonene boye bosalemaki o ntei ya bango, yango wana atindaki libanda mampinga ma ye o ntango ya butu, mpe akataki nzela ya bobombami bwa bango, mpe atiaki mampinga o nzela ya bobombami bwa bango.

25 Mpe eye basalaki o ntango ya butu, mpe batambolaki koleka bayongoli, boye ete o mokolo mwa nsima, ebandaki kotambola bayongoli, bakutanamaki na mampinga ma Banefi o liboso lya bango mpe o nsima ya bango.

26 Mpe bayongoli baye bazalaki o sudi bakatamaki mosika ya bobombami bwa bango. Mpe makambo maye manso masalemaki na etinda ya Gidigidoni.

27 Mpe ezalaki nkoto mingi baye bamitikaki bato ba boloko epai ya Banefi, mpe etikali ya bango babomamaki.

28 Yango wana mokambi wa bango, Zeminaliya, akamatamaki mpe adiembikamaki likolo lya nzete, iyo, kutu likolo lya nsonge ya yango kina akufaki. Mpe ediembikaki bango ye kina akufaki, esalemaki ete bakweyisaki nzete o mabele, mpe babelelaki na mongongo mokasi, kolobaka:

29 Tika Nkolo abatela bato ba ye o bosembo mpe o bosantu bwa motema, ete basala ekweyisama o mabele banso baye bakoluka koboma bango na ntina ya nguya mpe makelemba ma nkuku, kutu lokola moto oyo akwei o mabele.

30 Mpe basepelaki mpe babelelaki lisusu na mongongo moko, kolobaka: Tika Nzambe wa Abalayama, mpe Nzambe wa Yisaka, mpe Nzambe wa Yakobo, abatela bato baye o bosembo, ntango inso lokola bakobianga likolo lya nkombo ya Nzambe wa bango mpo ya bobatelami.

31 Mpe esalemaki ete bapasukaki, banso lokola moko, na koyembaka, mpe kosanzolaka Nzambe wa bango mpo ya likambo linene liye asalelaka mpo ya bango, na kobatelaka bango na bokwei o maboko ma bayini ba bango.

32 Iyo, babelelaki: Hozana na Nzambe Aleki Monene. Mpe babelelaki: Epambolama nkombo ya Nkolo Nzambe wa Bokasi Bonso, Nzambe Aleki Likolo.

33 Mpe mitema mya bango mivimbaki na bosepeli, na kobimisaka mpizoli mingi, na ntina ya bolamu bonene bwa Nzambe na kobikisaka bango libanda lya maboko ma bayini ba bango; mpe bayebaki ezalaki na ntina ya boyamboli bwa bango mpe bosawa bwa bango ete babikisamaki uta o bobebisami bwa libela.