Makomi
Moziya 12


Mokapo 12

Abinadi akangemi o boloko mpo ya kobikulaka bobebisami bwa bato mpe liwa lya Mokonzi Noa—Banganga ba lokuta batangi nkoma mpe balobi babateli mobeko mwa Mose—Abinadi abandi kolakisa bango Mitindo Zomi. Penepene na 148 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete nsima ya ntaka ya mibu mibale ete Abinadi ayaki o ntei ya bango na bonkutu, ete bayebaki ye te, mpe abandaki kobikula o ntei ya bango, kolobaka: Boye Nkolo atindi ngai, kolobaka—Abinadi, kende mpe bikula epai ya bato ba ngai baye, mpo bayeisi mitema mya bango mikasi na maloba ma ngai; bayamboli te misala mya bango mibe; yango wana, nakobimela bango na nkanda ya ngai, iyo, na nkanda ekasi ya ngai nakobimela bango o mabe mpe bonsomo bwa bango.

2 Iyo, lisuma ezala epai ya nkola eye! Mpe Nkolo alobi epai ya ngai: Tandola loboko la yo mpe bikula, kolobaka: Boye elobi Nkolo, ekosalema ete nkola eye, na ntina ya mabe ma bango, ekomememe o kati ya bowumbu, mpe ekobeteme o litama; iyo, mpe ekobenganama na bato, mpe ekobomama; mpe ewando ya likolo, mpe mbwa, iyo, mpe niama ya zamba, bakolia mosuni mwa bango.

3 Mpe ekosalema ete bomoi bwa mokonzi Noa bokozala lokola elamba yoko ezali o etumbele ya moto mokasi; mpo akoyeba ete nazali Nkolo.

4 Mpe ekosalema ete nakobete bato ba ngai baye na matungisi ma nsomo, iyo, na nzala mpe na bokono bobe; mpe nakosala ete bakomilela bolai bwa mokolo mobimba.

5 Iyo, mpe nakosala ete bakozala na mikumba milingama likolo lya mikongo mya bango; mpe bakobenganama liboso bo mpunda baba.

6 Mpe ekosalema ete nakotinda mbula ya mabanga o ntei ya bango, mpe ekobete bango; mpe bakobeteme lisusu na mopepe mwa esti; mpe mwa niama ikotungisa mboka ya bango lokola, mpe ikolia mboto ya bango.

7 Mpe bakobeteme na bokono bonene—mpe enso eye nakosala mpo ya mabe mpe bonsomo bwa bango.

8 Mpe ekosalema ete longola se soko bayamboli nakobebisa bango mpenza uta o etando ya mabele; nzokande bakotika likundoli lyoko nsima ya bango, mpe nakobatela mango mpo ya bikolo bisusu biye bikozwa mboka; iyo, kutu eye nakosala ete nakoka kobombola bonsomo mya bato baye o bikolo bisusu. Mpe makambo mingi Abinadi abikulaki mpo ya mabe ma bato baye.

9 Mpe esalemaki ete basilikaki na ye; mpe bakamataki ye mpe bamemeki ye akangema liboso lya mokonzi, mpe balobaki epai ya mokonzi: Tala, tomemi moto moko liboso lya yo oyo abikulaki makambo mabe etali bato ba yo, mpe alobi ete Nzambe akobebisa bango.

10 Mpe abikulaki lisusu mabe matali bomoi bwa yo, mpe alobaki ete bomoi bwa yo bokozala lokola elamba yoko o etumbele ya moto.

11 Mpe lisusu, alobaki ete okozala lokola mokoko, kutu lokola mokoko mokauka mwa zamba, moye momatelami na niama mpe moniatami o nse ya lokolo.

12 Mpe lisusu, alobaki okozala lokola fololo ya mobwe, eye, ekotela yango mpenza, soko mopepe mobeti, ekobenganama likolo lya etando ya mboka. Mpe alobaki na ntembe te Nkolo alobaki yango. Mpe alobaki ete enso eye ekokoma likolo lya yo longola se soko oyamboli, mpe eye na ntina ya mabe ma yo.

13 Mpe sikawa, O mokonzi, mabe manene kani osali, to masumu manene kani bato ba yo basali, ete totumbolama na Nzambe to tosambisama na moto oyo?

14 Mpe sikawa, O mokonzi, tala, tozali na elindo te, mpe yo, O mokonzi, osumuki te; yango wana, moto oyo akosi etali yo, mpe abikuli na mpamba.

15 Mpe tala, biso tozali bakasi, tokoya te o kati ya bowumbu, to tokokangema te na bayini ba biso; iyo, mpe ozwi bomengo o mboka eye, mpe okozwa lisusu bomengo.

16 Tala, awa ezali moto, topesi ye o kati ya maboko ma yo; okoki kosala na ye lokola emoni yo bolamu.

17 Mpe esalemaki ete mokonzi Noa asalaki ete Abinadi abwakama o kati ya boloko; mpe atindaki ete banganga basangisa bangomei elongo ete akoka kosala likita elongo na bango nini bakosala na ye.

18 Mpe esalemaki ete balobaki epai ya mokonzi: Meme ye awa ete tokoka kotuna ye mituna; mpe mokonzi atindaki ete bameme ye liboso lya bango.

19 Mpe babandaki kotuna, ete bakoka kokutisa ye, ete na yango bakokaki kozwa na nini kofunda ye; kasi ayanolaki bango na bobangi te, mpe alongaki mituna mya bango minso, iyo, na bokamwi bwa bango; mpo alongaki bango na mituna mya bango minso, mpe abulunganisaki bango na maloba ma bango manso.

20 Mpe esalemaki ete moko wa bango alobaki epai ya ye: Nini elingi koloba maloba maye makomamaki, mpe maye malakisamaki na batata ba biso, kolobaka:

21 Boniboni kitoko likolo lya ngomba ezali makolo ma ye oyo akomeme nsango elamu; oyo akobimisa kimia, oyo akomeme nsango elamu ya bolamu; oyo akobimisa lobiko; oyo akoloba epai ya Siona, Nzambe wa yo akokonza;

22 Basinzili ba yo bakotombola mongongo; na mongongo elongo bakoyemba; mpo bakomono miso na miso ekomeme Nkolo lisusu Siona;

23 Bukanani o bosepeli; yembani elongo bino bisika bya mpamba bya Yelusaleme; mpo Nkolo abondisi bato ba ye, asikoli Yelusaleme;

24 Nkolo asalaki bolumbu loboko la ye losantu o miso mya bikolo binso, mpe nsuka inso ya mabele ikomono lobiko la Nzambe wa biso?

25 Mpe sikawa Abinadi alobaki epai ya bango: Ezali bino banganga, mpe bolobi bolakisi bato baye, mpe bososoli molimo mwa mabikuli, mpe nzokande bozali na mposa ya koyeba na ngai nini makambo maye malingi koloba?

26 Nakoloba epai ya bino, lisuma ezala epai ya bino mpo ya kosantolaka nzela ya Nkolo! Mpo soko bososoli makambo maye bolakisaki yango te; yango wana, bozali kosantola nzela ya Nkolo.

27 Botii mitema mya bino te mpo ya kososola; yango wana bozali na bwania te. Yango wana, nini elakisi bino bato baye?

28 Mpe balobaki: Tokolakisa mobeko mwa Mose.

29 Mpe lisusu alobaki epai ya bango boye: Soko bokolakisa mobeko mwa Mose ntina nini bokobatela yango te? Ntina nini bokotia mitema mya bino likolo lya bozwi? Ntina nini bokosala pite mpe bokobebisa makasi ma bino elongo na basi ba pite, iyo, mpe bokosala bato baye basumuka, ete Nkolo asali mpo ya kotinda ngai mpo ya kobikula likolo lya bato baye, iyo, kutu mabe manene ma bato baye?

30 Eyebi bino te ete nakoloba bosolo? Iyo, boyebi ete nakoloba bosolo; mpe bosengelaki kolenge liboso lya Nzambe.

31 Mpe ekosalema ete bokobeteme mpo ya mabe ma bino, mpo bolobi ete bokolakisa mobeko mwa Mose. Mpe nini eyebi bino etali mobeko mwa Mose? Lobiko lokoya na mobeko mwa Mose? Nini bolobi?

32 Mpe bayanolaki mpe balobaki ete lobiko lokoya na mobeko mwa Mose.

33 Kasi sikawa Abinadi alobaki epai ya bango: Nayebi ete soko bobateli mitindo mya Nzambe bokobika; iyo, soko bobateli mitindo miye Nkolo apesaki epai ya Mose o ngomba ya Sinai, kolobaka:

34 Nazali Nkolo Nzambe wa yo, oyo amemeki yo libanda lya mboka ya Ejipito, libanda lya ndako ya bowumbu.

35 Okozala na Nzambe mosusu te liboso lya ngai.

36 Okosala te elili ekatama epai ya yo, to emoniseli ya eloko yoko te o lola, to biloko biye bizali o mabele o nse.

37 Sikawa Abinadi alobaki epai ya bango: Bosalaki enso eye? Nalobi epai ya bino, Te, bosali yango te. Mpe elakisaki bino bato baye ete basala makambo maye? Nalobi epai ya bino, Te, bosali yango te.