Makomi
Moziya 25


Mokapo 25

Bana ba Muleki o Zalayemila bakomi Banefi—Bayekoli etali bato ba Alama mpe etali bato ba Zenifi—Alama abatisi Limiyi mpe bato banso ba ye—Moziya apesi Alama bokulaka mpo ya kobongisa Eklezia ya Nzambe. Penepene na 120 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa mokonzi Moziya asalaki ete bato banso basangana elongo.

2 Sikawa ezalaki boye mingi te ya bana ba Nefi, to boye mingi ya bango baye bazalaki biboto bya Nefi, lokola ezalaki bato ba Zalayemila, baye bazalaki ba bana ba Muleki, mpe bango baye bayaki elongo na ye o kati ya esobe.

3 Mpe ezalaki boye mingi te ya bato ba Nefi mpe ya bato ba Zalayemila lokola ezalaki Balamani; iyo, bazalaki katikati boye mingi te.

4 Mpe sikawa bato banso ba Nefi basanganaki elongo, mpe lisusu bato banso ba Zalayemila, mpe basanganaki elongo o nzoto ibale.

5 Mpe esalemaki ete Moziya atangaki, mpe asalaki etangema, makundoli ma Zenifi na bato ba ye; iyo, atangaki makundoli ma bato ba Zenifi, uta ntango batikaki mboka ya Zalayemila kina ntango bazongaki lisusu.

6 Mpe atangaki lisusu nsango ya Alama mpe bandeko ba ye, mpe matungisi ma bango manso, uta o ntango batikaki mboka ya Zalayemila kina o ntango bazongaki lisusu.

7 Mpe sikawa, etiaki Moziya nsuka yoko ya botangi makundoli, bato ba ye baye batikalaki o mboka bamonoki bokamwi mpe bosutuki.

8 Mpo bayebaki te nini kokanisa; mpo emonoki bango baye babikisamaka libanda lya bowumbu batondisamaki na bosepeli enene mpenza.

9 Mpe lisusu, ekanisaki bango etali bandeko ba bango baye babomamaka na Balamani batondisamaki na mawa, kutu basopaki mpizoli ya mawa.

10 Mpe lisusu, ekanisaki bango etali bolamu bwa sasaipi bwa Nzambe, mpe nguya ya ye na kobikisaka Alama mpe bandeko ba ye libanda lya maboko ma Balamani mpe lya bowumbu, batombolaki mingongo mya bango mpe bapesaki matondi na Nzambe.

11 Mpe lisusu, ekanisaki bango likolo lya Balamani, baye bazalaki bandeko ba bango, etali bozali bwa bango bwa masumu mpe mbindo, batondisamaki na bolozi mpe nsomo mpo ya bolamu bwa bozo bwa bango.

12 Mpe esalemaki ete bango baye bazalaki bana ba Amuloni mpe bandeko ba ye, baye bakamataka o bolongani bana basi ba Balamani, basepelaki te na bizaleli bya batata ba bango, mpe balingaki lisusu te kobiangema na nkombo ya batata ba bango, yango wana bakamataki likolo lya bangomei nkombo ya Nefi, ete bakoka kobiangema bana ba Nefi mpe kotangema o ntei ya bango baye babiangemaki Banefi.

13 Mpe sikawa bato banso ba Zalayemila batangemaki elongo na Banefi, mpe eye zambi bokonzi bopesamaka likolo lya moko te kaka bango baye bazalaki biboto bya Nefi.

14 Mpe sikawa esalemaki ete etiaka Moziya nsuka yoko ya kolobaka mpe kotangaka na bato ba ye, azalaki na mposa ete Alama lokola aloba na bato.

15 Mpe Alama alobaki epai ya bango, esanganaki bango elongo o nzoto inene, mpe akendeki uta lingomba lyoko o lisusu, koteyaka epai ya bato boyamboli mpe bondimi likolo lya Nkolo.

16 Mpe alendisaki bato ba Limiyi mpe bandeko ba ye, bango banso baye babikisamaki libanda lya bowumbu, ete bamikundola ete ezalaki Nkolo moto abikisaki bango.

17 Mpe esalemaki ete esilisaki Alama kolakisa bato makambo mingi, mpe kotia nsuka yoko ya kolobaka na bango, ete mokonzi Limiyi azalaki na mposa ete akoka kobatisama; mpe bato ba ye banso bazalaki na mposa ete bakoka kobatisama lokola.

18 Yango wana, Alama akendeki o kati ya mai mpe abatisaki bango; iyo, abatisaki bango nsima ya lolenge asalaki bandeko ba ye o mai ma Molomoni; iyo, mpe mingi lokola abatisaki bakomaki ba eklezia ya Nzambe; mpe eye na ntina ya boyambi bwa bango likolo lya maloba ma Alama.

19 Mpe esalemaki ete mokonzi Moziya apesaki ndingisa epai ya Alama ete akoka kotia biklezia o ntaka ya mboka mobimba ya Zalayemila; mpe apesaki ye nguya ya kokulisa banganga mpe balakisi likolo lya eklezia na eklezia.

20 Sikawa eye esalemaki zambi ezalaki bato boye mingi ete bakokaki te koyangelama na molakisi moko; mpe bakokaki te koyoka liloba lya Nzambe o lisanga lyoko;

21 Yango wana bamisangisaki elongo o nzoto ikesene, ibiangemaki biklezia; eklezia na eklezia ezalaki na banganga ba yango mpe na balakisi ba yango, mpe nganga na nganga koteyaka liloba engebene lokola epesamaki na ye na monoko mwa Alama.

22 Mpe boye, ata ezalaki biklezia mingi bizalaki binso eklezia yoko, iyo, kutu ezalaki eklezia ya Nzambe; mpo eteyamaki eloko te o biklezia binso longola se soko ezalaki boyamboli mpe bondimi na Nzambe.

23 Mpe sikawa ezalaki biklezia sambo o mboka ya Zalayemila. Mpe esalemaki ete banso baye bazalaki na mposa mpo ya kokamata likolo lya bango nkombo ya Klisto, to ya Nzambe, bakanganaki elongo na biklezia ya Nzambe;

24 Mpe babiangemaki bato ba Nzambe. Mpe Nkolo asopaki libanda Molimo mwa ye likolo lya bango, mpe bapambolamaki, mpe bazwaki bomengo o mboka.