Makomi
Moziya 23


Nsango yoko ya Alama mpe bato ba Nkolo, baye babenganamaki o kati ya esobe na bato ba Mokonzi Noa.

Kokwaka mikapo 23 mpe 24.

Mokapo 23

Alama aboyi kozala mokonzi—Asali lokola nganga monene—Nkolo atumboli bato ba ye, mpe Balamani balongi mboka ya Helama—Amuloni, mokambi wa banganga ba nkuna ba Mokonzi Noa, ayangeli moyangelami na mokonzi wa Balamani. Penepene na 145–121 Yambo ya Klisto.

1 Sikawa Alama, ekebisamaki ye na Nkolo ete mampinga ma basoda ba mokonzi Noa bakoya likolo lya bango, mpe eyebisaki ye yango na bato ba ye, yango wana basangisaki bibwele bya bango elongo, mpe bakamataki mboto ya bango, mpe bakendeki o kati ya esobe liboso lya mampinga ma basoda ba mokonzi Noa.

2 Mpe Nkolo apesaki bango makasi, ete bato ba mokonzi Noa bakoka kolonga bango te mpo ya kobebisa bango.

3 Mpe bakimaki mikolo mwambe mya mobembo o kati ya esobe.

4 Mpe bakomaki o mboka yoko, iyo, kutu mboka ya kitoko mpe ya elengi mingi, mboka yoko ya mai peto.

5 Mpe batelemisaki biema bya bango, mpe babandaki kokona bilanga, mpe babandaki kotonga ndako; iyo, bazalaki balinga mosala, mpe basalaki mingi mpenza.

6 Mpe bato bazalaki na mposa ete Alama azala mokonzi wa bango, mpo alingamaki mingi na bato ba ye.

7 Kasi alobaki epai ya bango: Tala, elongobani te ete tozala na mokonzi; mpo boye elobi Nkolo: Bokokumisa mosuni moko te likolo lya mosusu, to moto moko te akokanisa yemei likolo lya mosusu; yango wana nalobi epai ya bino elongobani te ete bozala na mokonzi.

8 Nzokande, soko ekokaki kosalema ete bokoka ntango inso kozala na bato sembo mpo ya kozala bakonzi ba bino elingaki kozala malamu mpo ya bino kozala na mokonzi.

9 Kasi bomikundola mabe ma mokonzi Noa mpe banganga ba ye; mpe ngai ngaimei nakangemaki o motambo moko, mpe nasalaki makambo mingi maye mazalaki ma nsomo o bomoni bwa Nkolo, maye masalaki ngai boyamboli bwa nsomo;

10 Nzokande, nsima ya mokakatano moike, Nkolo ayokaki bibelela bya ngai, mpe ayanolaki nsambo ya ngai, mpe atiaki ngai esalele yoko o maboko ma ye na komemeke boye mingi ba bino mpo ya boyebi boko bwa bosolo bwa ye.

11 Nzokande, o eye nakokembela te, mpo nalongobani te mpo ya komikembela.

12 Mpe sikawa nalobi epai ya bino, bokakemamaki na mokonzi Noa, mpe bozalaki o bowumbu na ye mpe na banganga ba ye, mpe bamememeki o kati ya bobe na bango; yango wana bokangemaki na nkanga ya bobe.

13 Mpe sikawa lokola bobikisamaki na nguya ya Nzambe libanda lya nsinga iye; iyo, kutu libanda lya maboko ma mokonzi Noa mpe bato ba ye, mpe lisusu uta o nsinga ya bobe, kutu boye nazali na mposa ete boteleme ngbi o lipanda liye na wapi bosalemi nsomi, mpe bondima moto te mpo ya kozala mokonzi likolo lya bino.

14 Mpe lisusu bondima moto te mpo ya kozala molakisi wa bino to mosali wa bino, longola se azala moto wa Nzambe, kotambolaka o nzela ya ye mpe kobombaka mitindo mya ye.

15 Boye Alama alakisaki bato ba ye, ete moto na moto alinga moto wa penepene na ye lokola yemei, ete ezala boweli te o ntei ya bango.

16 Mpe sikawa, Alama azalaki nganga monene wa bango, ye kozalaka mobandi wa eklezia ya bango.

17 Mpe esalemaki ete moko te azwaki bokulaka mpo ya koteya to mpo ya kolakisa longola se soko ezalaki na ye uta na Nzambe. Yango wana abulisaki banganga ba bango banso mpe balakisi ba bango; mpe moto moko te abulisamaki longola se soko bazalaki bato bayengebene.

18 Yango wana basenzeleki likolo lya bato ba bango, mpe baleisaki bango na makambo masengeli mpo ya bosembo.

19 Mpe esalemaki ete babandaki kozwa bomengo mpenza o mboka; mpe babiangaki mboka Helama.

20 Mpe esalemaki ete bayikanaki mpe bazwaki bomengo mpenza o mboka ya Helama; mpe batongaki engumba yoko, eye babiangaki engumba ya Helama.

21 Nzokande Nkolo amoni elongobani kotumbola bato ba ye; iyo, ameki bompikiliki bwa bango mpe bondimi bwa bango.

22 Nzokande—onso oyo akotia elikia ya ye na ye, ye kaka akotombolama likolo o mokolo mwa nsuka. Iyo, mpe boye ezalaki na bato baye.

23 Mpo tala, nakolakisa epai ya bino ete bamemeki bango o kati ya bowumbu, mpe moko te akokaki kobikisa bango kaka Nkolo Nzambe wa bango, iyo, kutu Nzambe wa Abalayama mpe wa Yisaka mpe wa Yakobo.

24 Mpe esalemaki ete abikisaki bango, mpe alakisaki nguya ya ye monene epai ya bango, mpe enene ezalaki bosepeli bwa bango.

25 Mpo tala, esalemaki ete ntango bazalaki o mboka ya Helama, iyo, o engumba ya Helama, o ntango bazalaki kokona bilanga zingazinga mpembeni, tala limpinga lyoko lya Balamani bazalaki o ndelo ya mboka ya bango.

26 Sikawa esalemaki ete bandeko ba Alama bakimaki uta o bilanga bya bango, mpe basanganaki bangomei elongo o mboka ya Helama; mpe babangaki mingi na ntina ya etalisi ya Balamani.

27 Kasi Alama akendeki mpe atelemeki o ntei ya bango, mpe alendisaki bango ete babanga te, kasi bamikundola Nkolo Nzambe wa bango mpe akobikisa bango.

28 Yango wana, batikaki bobangi bwa bango, mpe babandaki kobelela epai ya Nkolo ete alembisa mitema mya Balamani, ete babikisa bango, mpe basi ba bango, mpe bana ba bango.

29 Mpe esalemaki ete Nkolo alembisaki mitena mya Balamani. Mpe Alama mpe bandeko ba ye bakendeki mpe bamitikaki o kati ya maboko ma bango; mpe Balamani bakamataki mboka ya Helama.

30 Sikawa mampinga ma basoda ba Balamani, baye balandaka nsima na bato ba mokonzi Limiyi, babungaki o esobe mpo ya mikolo mingi.

31 Mpe tala, bamonoko banganga bana ba mokonzi Noa, o esika yoko eye babiangaki Amuloni; mpe babandaki kokamata mboka ya Amuloni mpe babandaki kokona bilanga.

32 Sikawa nkombo ya mokambi wa banganga bana ezalaki Amuloni.

33 Mpe esalemaki ete Amuloni asambaki elongo na Balamani; mpe atindaki lisusu basi ba bango, baye bazalaki bana basi ba Balamani, mpo ya kosamba elongo na bandeko ba bango, ete babebisa te babali ba bango.

34 Mpe Balamani bayokaka mawa likolo lya Amuloni mpe bandeko ba ye, mpe babebisaki bango te, na ntina ya basi ba bango.

35 Mpe Amuloni mpe bandeko ba ye bakanganaki elongo na Balamani, mpe bazalaki kotambolaka elongo o esobe o boluki bwa mboka ya Nefi ebombolaki bango mboka ya Helama, eye ezwamaki na Alama mpe bandeko ba ye.

36 Mpe esalemaki ete Balamani bapesaki elako epai ya Alama mpe bandeko ba ye, ete soko bakolakisa bango nzela eye ekokamba o mboka ya Nefi ete bakotika epai ya bango bomoi bwa bango mpe lipanda lya bango.

37 Kasi esilisaka Alama kolakisa bango nzela eye ekokamba o mboka ya Nefi Balamani balingaki te kobatela elako ya bango; kasi batiaki bakengeli zingazinga mpembeni na mboka ya Helama, likolo lya Alama mpe bandeko ba ye.

38 Mpe etikali ya bango bakendeki o mboka ya Nefi; mpe eteni yoko ya bango ezongaki o mboka ya Helama, mpe lisusu bamemeki elongo na bango basi mpe bana ba bakengeli baye batikalaki o mboka.

39 Mpe mokonzi wa Balamani apesaki ndingisa epai ya Amuloni ete azala mokonzi mpe moyangeli likolo lya bato ba ye, baye bazalaki o mboka ya Helama; nzokande akozala na nguya mpo ya kosala likambo te lya bokeseni na bolingi bwa mokonzi wa Balamani.