Makomi
Moziya 16


Mokapo 16

Nzambe asikoli bato uta o ezaleli ya libunga mpe bokwei bwa bango—Bango baye bazali ba mosuni bakotikala lokola soko bosikoli bozalaki te—Klisto akosala esalema bosekwi boko o bomoi lozanga nsuka to botumboli bozanga nsuka. Penepene na 148 Yambo ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete esilisaka Abinadi koloba makambo maye, atandolaki loboko la ye mpe alobaki: Ntango ekoya ekomono bato banso lobiko la Nkolo; ekomono ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato miso na miso mpe bakondima liboso lya Nzambe ete masambisi ma ye mazali mayengebene.

2 Mpe nde bato ba nkuna bakobwakama libanda, mpe bakozala na ntina ya koganga, mpe kolela, mpe komilela, mpe kolia mino mya bango; mpe eye zambi balingi koyokemela te epai ya mongongo mwa Nkolo; yango wana Nkolo akosikola bango te.

3 Mpo bazali bato ba mosuni mpe ba zabulu, mpe zabulu azali na nguya likolo lya bango; iyo, kutu nioka oyo ya kala oyo akosaki baboti ba biso ba yambo, oyo azalaki ntina ya bokwei bwa bango; oyo azalaki ntina ya bato banso kokomaka ba mosuni, ba elengi ya biyokeli, ba zabulu, koyebaka bolamu mpe bobe, koyangelamisaka bangomei na zabulu.

4 Boye bato banso babungaki; mpe tala, balingaki kobunga libela ezalaka te ete Nzambe asikolaki bato ba ye uta o bozali bwa libunga mpe bokwei bwa bango.

5 Kasi bomikundola ete ye oyo akolenda o lizali lya mosuni lya yemei, mpe akokoba o nzela ya lisumu mpe botomboki na Nzambe, akotikala o bozali bwa ye bwa bokwei mpe zabulu akozala na nguya inso likolo lya ye. Yango wana azali lokola soko bosikoli bosalemaki te, kozalaka moyini wa Nzambe; mpe lokola ezali zabulu moyini wa Nzambe.

6 Mpe sikawa soko Klisto ayaka te o kati ya mokili, kolobaka makambo makoya lokola soko makomaka, ekokaki kozala bosikoli te.

7 Mpe soko Klisto asekwaka te uta o bakufi, to akataka nkanga ya liwa te ete lilita lizala na elonga te, mpe ete liwa lizala na etengu te, ekokaki kozala bosekwi te.

8 Kasi ezali bosekwi, yango wana lilita lizali na elonga te, mpe etengu ya liwa eminami nie na Klisto.

9 Azali mwinda mpe bomoi bwa mokili; iyo, mwinda moye mozanga nsuka, moye mokoki koyindisama mokolo moko te; iyo, mpe lisusu bomoi boye mozanga nsuka, ete ekoka kozala liwa lisusu te.

10 Kutu kufa eye ekolata bozangi bokufi, mpe bopoli bokolata bozangi bopoli, mpe ekomememe mpo ya koteleme liboso lya esika ya bosambisi ya Nzambe, mpo ya kosambisama na ye engebene na misala mya bango soko mizali milamu to soko mizali mibe—

11 Soko mizali milamu, o bosekwi bwa bomoi bozanga nsuka mpe esengo; mpe soko mizali mibe, o bosekwi bwa botumboli bozanga nsuka, kosundolamaka na zabulu, oyo ayangelaki bango, eye ezali botumboli—

12 Kokendeke engebene na bolingi mpe mposa ya mosuni ya bangomei; kobiangaka mokolo moko te likolo lya Nkolo ntango etandamaki maboko ma ngolu ona bango; mpo maboko ma ngolu matandamaki ona bango, mpe balingaki te; ekebisamaki bango na mabe ma bango mpe nzokande balingaki te kolongwa mosika na yango; mpe batindamaki koyamboli mpe nzokande balingaki te koyamboli.

13 Mpe sikawa, esengeli bino kati ya te kolenge mpe koyambola masumu ma bino, mpe komikundola ete bobele o mpe na Klisto nde bokoki kobikisama?

14 Yango wana, soko bozali kolakisa mobeko mwa Mose, lakisani lisusu ete mozali elilingi ya makambo mana maye makoya—

15 Lakisani bango ete bosikoli bokoya na Klisto Nkolo, oyo azali Tata wa Seko mpenza. Amene.