Makomi
Moziya 19


Mokapo 19

Gideona aluki mpo ya koboma Mokonzi Noa—Balamani bakamati mboka—Mokonzi Noa ayoki mpasi ya liwa na moto—Limiyi ayangeli lokola mokonzi moyangelami. Penepene na 145–121 Yambo ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete limpinga lya mokonzi bazongaki, elukaki bango na mpamba bato ba Nkolo.

2 Mpe sikawa tala, makasi ma mokonzi mazalaki make, ekutolamaki bango, mpe ebandaki kozala bokabwani o ntei ya etikali ya bato.

3 Mpe eteni eleki eke ebandaki kofula bokaneli likolo lya mokonzi, mpe boweli bonene bobandaki kozala o ntei ya bango.

4 Mpe sikawa ezalaki moto moko o ntei ya bango ya ye nkombo ezalaki Gideona, mpe ezalaki ye moto mokasi mpe moyini wa mokonzi, yango wana abendaki mopanga mwa ye, mpe alapaki ndai o nkele ya ye ete akoboma mokonzi.

5 Mpe esalemaki ete abundaki na mokonzi; mpe emonoki mokonzi ete azalaki penepene na kolonga ye, akimaki mpe akendeki likolo lya linongi liye lizalaki mpembeni ya tempelo.

6 Mpe Gideona alandaki nsima ya ye mpe azalaki penepene na kokoma likolo lya linongi mpo ya koboma mokonzi, mpe mokonzi abwakaki miso mya ye zingazinga mpembeni ona mboka ya Semiloni, mpe tala, limpinga lya Balamani bazalaki o kati ya ndelo ya mboka.

7 Mpe sikawa mokonzi abelelaki makasi na nsomo ya bozo bwa ye, kolobaka: Gideona, bikisa ngai, mpo Balamani bazali likolo lya biso mpe bakobebisa biso; iyo, bakobebisa bato ba ngai.

8 Mpe sikawa mokonzi azalaki mingi te motema likolo mpo ya bato ba ye lokola azalaki mpo ya bomoi bwa yemei; nzokande, Gideona abikisaki bomoi bwa ye.

9 Mpe mokonzi atindaki bato ete bakima liboso lya Balamani, mpe yemei akendeki liboso lya bango, mpe bakimaki o kati ya esobe, elongo na basi ba bango mpe bana ba bango.

10 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki bango, mpe bakangaki bango, mpe babandaki koboma bango.

11 Sikawa esalemaki ete mokonzi atindaki bango ete babali banso batika basi ba bango mpe bana ba bango, mpe bakima liboso lya Balamani.

12 Sikawa ezalaki mingi baye balingaki te kotika bango, kasi balingaki nde kotikala mpe bakufa elongo na bango. Mpe etikali batikaki basi ba bango mpe bana ba bango mpe bakimaki.

13 Mpe esalemaki ete bango baye batikalaki elongo na basi ba bango mpe na bana ba bango basalaki ete bana basi ba malonga ba bango bakende koteleme mpe kosamba elongo na Balamani ete baboma bango te.

14 Mpe esalemaki ete Balamani bayokaki mawa likolo lya bango, mpo basenginiamaki na kitoko ya basi ba bango.

15 Yango wana Balamani babikisaki bomoi bwa bango, mpe bakamataki bango bakangemi mpe bazongisaki bango o mboka ya Nefi, mpe bapesaki ndingisa epai ya bango ete bakoka kozwa mboka, o nse ya masengeli ete bapesa mokonzi Noa o kati ya maboko ma Balamani, mpe bapesa bozwi bwa bango, kutu katikati ya enso eye bazwaki, katikati ya wolo ya bango, mpe mpauni ya bango, mpe biloko binso bya motuya bya bango, mpe boye bafutaki mpako na mokonzi wa Balamani mibu na mibu.

16 Mpe sikawa ezalaki moko wa bana babali ba mokonzi o ntei ya bango baye bakamatamaki bawumbu, ya ye nkombo ezalaki Limiyi.

17 Mpe sikawa Limiyi azalaki na mposa ete tata wa ye abebisama te; nzokande, Limiyi abosanaki te mabe ma tata wa ye, ezalaki yemei moto moyengebene.

18 Mpe esalemaki ete Gideona atindaki bato o kati ya esobe na nkuku, mpo ya koluka mokonzi mpe baye bazalaki elongo na ye. Mpe esalemaki ete bakutanaki na bato o esobe, banso longola se mokonzi mpe banganga ba ye.

19 Sikawa balapaki ndai o mitema mya bango ete bakozonga o mboka ya Nefi, mpe soko basi ba bango mpe bana ba bango babomamaki, mpe lisusu bango baye batikalaki elongo na bango, ete bakoluka bobekoli, mpe lokola bakowa elongo na bango.

20 Mpe mokonzi atindaki bango ete bazonga te; mpe basilikaki na mokonzi, mpe basalaki ete ayoka mpasi, kutu kina o liwa na moto.

21 Mpe bazalaki penepene na kokamata banganga lisusu mpe kopesa bango liwa, mpe bakimaki liboso lya bango.

22 Mpe esalemaki ete bazalaki penepene na kozonga o mboka ya Nefi, mpe bakutanaki na bato ba Gideona. Mpe bato ba Gideona balobaki epai ya bango makambo manso malekaki na basi ba bango mpe bana ba bango; mpe ete Balamani bapesaka epai ya bango ete bakoka kozwa mboka na kofutaka mpako yoko na Balamani ya katikati ya enso eye bazwaki.

23 Mpe bato balobaki epai ya bato ba Gideona ete babomaka mokonzi, mpe banganga ba ye bakimaki mosika mpenza na bango o kati ya esobe.

24 Mpe esalemaki ete esilisaki bango molulu, ete bazongaki o mboka ya Nefi, kosepelaka, zambi basi ba bango mpe bana ba bango babomamaki te; mpe balobelaki Gideona nini basalaki na mokonzi.

25 Mpe esalemaki ete mokonzi wa Balamani alapaki ndai yoko epai ya bango, ete bato ba ye bakoboma bango te.

26 Mpe lisusu Limiyi, ezalaki ye mwana mobali wa mokonzi, epesamaki bokonzi likolo lya ye na bato, alapaki ndai epai ya mokonzi wa Balamani ete bato ba ye bakofuta mpako epai ya ye, kutu katikati ya enso eye bazwaki.

27 Mpe esalemaki ete Limiyi abandaki kotia bokonzi mpe kotia kimia o ntei ya bato ba ye.

28 Mpe mokonzi wa Balamani atiaki bakengeli zingazinga mpembeni ya mboka, ete akoka kobatela bato ba Limiyi o mboka, mpo ete bakoka kokende te o kati ya esobe; mpe afutaki bakengeli ba ye na mpako eye azwaki uta na Banefi.

29 Mpe sikawa mokonzi Limiyi azalaki na kimia ya ntango inso o bokonzi bwa ye mpo ya ntaka ya mibu mibale, miye Balamani batumolaki bango te to balukaki te kobebisa bango.