2010
Bomeki ya Eyamba na Ngai
sánzá ya mínei 2010


Bolenge

Bomeki ya Eyamba na Ngai

Ntango nazalaki na mbula 13, nabandaki kotanga Buku ya Molomoni mikolo nyonso, mpe napambolamaki mikolo nyonso wuta wana.

Na mateya ya Kelasi ya Eyenga ya bana ya mbula 13 ezalaki koyebana te mpenza mpo na botosi na biso Nzokande, tozalaki na moteyi ya malamu oyo amekaki nyonso mpo koteya liteya moko moko na Molimo. Moko ya liteya ya lolenge boye ezalaki na ntina na kotanga makomi masantu.

Na suka ya liteya ye apesaki biso momekano. Elakisaki mpo na biso nyonso, kasi mpo na boko ntina atalaki ngai mpe alobaki, “Nasengi yo kotanga Buku ya Molomoni mikolo nyonso!” Nakanisaki ngai moko, “Nakolakisa bino. Nakosala yango!”

Nabandaki 1 Nefi mokapo 1 na butu wana mpe nakobaki kotanga mikolo nyonso. Ntango mosusu nazalaki na ezaleli malamu te ntango nabandaki, kasi sima na ntango nabandaki kolinga lolenge kotanga Buku ya Molomoni eyokisaki ngai. Kotanga butu moko moko ekomaki ezaleli ya kitoko.

Basanza eleki nakomaki na Alama 32 mpe nakamwisamaki na likanisi ya bomeki ya eyamba. Na eteyelo toyekolaki se na ntina na kokamba mayela ya mokanda, boye nafukamaki mpe nayebisaki Tata ya Likolo ete nalingaki kobanda likambo. Natunaki ete nalingi koyeba soki Buku ya Molomoni ezalaki solo.

Kati na motema, nayebi ete Tata ya Likolo ayanolaki balosambo na ngai mbala ebele. Kotanga mikolo nyonso Buku ya Molomoni epesaki ngai likoki monene ya kolonga mabe. Nayokaki penepene na Tata na ngai ya Likolo. Nayokaki ya kolendisama na nguya ya Molimo Mosantu mpo kolonga bampasi. Oyo Alama alobaki na ntina na kozwa mayele na liloba na Nzambe ezali solo: “Ebandi kotandola bozo bwa ngai; iyo, ebandi kopelisa mwinda mwa bososoli bwa ngai, iyo, ebandi kozala elengi mpo ya ngai” (Alama 32:28).