2010
Koluka mpe Kozwa Emoniseli ya Moto Yemei
sánzá ya mínei 2010


Etinda ya Bamama Bateyi Bateli, sanza ya Minei 2010

Koluka mpe Kozwa Emoniseli ya Moto Yemei

Teya makomi masantu mpe makanisi to, soki mposa ezali, mobeko mosusu oyo ekopambola bandeko basi okotalaka. Pesa litatoli ya mateya. Bengisa baoyo otalaka na kokabola oyo bango bayoki mpe bayekoli.

Lolenge Nini Nakoki Koluka Emoniseli na Ngaimei?

Tolengelami na kozwa emoniseli ya moto yemei lokola baprofeta basali, na koyekolaka makomi masantu, kokilaka bilei, kosambelaka, mpe kotongaka eyamba. Eyamba ezali fungola. Bokanisa bolengelami ya Joseph Smith mpo na Bomoni ya Yambo:

“‘Soki moko na bino azangi bwania, tika ye asenga epai na Nzambe. …

“Kasi alomba na kondima, abeta ntembe te.’”1

Mpaka Robert D. Hales ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale.

“Losambo ezali ya yo fungola mpo ya likolo. Ekangeli ezali na ngambo na bino ya mabe.

“Kasi wana esali nyonso te. Mpo na oyo akanisaki ete emoniseli ekosopana longola se makasi, Nkolo alobaki:

“‘Bososoli te; bokanisi ete nakopesa bino yango, ntango bozwaki likanisi te ya kobomba yango ezalaki kotuna ngai.

“‘Kasi, tala, nalobi na bino, ete bosengeli koyekola yango kati na motema; sima bosengeli kotuna ngai soki ezali malamu, mpe soki ezali malamu nakosala ete bozo na bino ekozika kati na bino; nzokande, boko yoka ete ezali malamu.’”2

Mokambi Boyd K. Packer, Mokambi ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale.

Lolenge Nini Nakoki Kozwa Emoniseli na Ngaimei?

“Na balolenge na yango ya momesano, emoniseli to likanisi ya bonzambe eyaka na nzela ya maloba to makanisi epesami na motema (tala Enosa 1:10; M&E 8:2–3), na bongengisi ya mbalakata (tala M&E 6:14–15), na mayoki ya malamu to ya mabe na ntina na misala emoniami, to kutu na misala epesamelami na likanisi ya bonzambe, lokola na bantoki esalami. Lokola Mokambi Boyd K. Packer, … Mokambi ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale, asakoli, ‘Likanisi ya bonzambe eyaka lokola liyoki koleka lolaka.’”3

Mpaka Dallin H. Oaks ya Lisanga ya Bapostolo Zomi na Babale.

“Tempelo ezali ndako ya boyekoli. Ebele ya mateya epesami kati na tempelo ezali elembo mpe eyekolami na Molimo. Oyo elakisi ete toteyami uta na likolo. … Bososoli na biso ya ntina ya milulu mpe bilaka ekokola lokola tozongi na tempelo mingi mingi na ezaleli ya koyekola mpe kotala babosolo ya seko koteyama. … Tika biso tosepela bolendisi ya molimo mpe emoniseli tozwi lokola tokei na tempelo ntango nyonso.”4

Silvia H. Allred, mosungi ya yambo kati na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama po na Bosalisi.

Ban3koma

  1. “Emoniseli ya Moto Yemei: Mateya mpe Bandakisa ya Baprofeta,” Liawona, sanza ya Zomi na Moko.

  2. “Emoniseli ya Moto Yemei: Likabo, Momekano, mpe Elako,” Ensign, sanza ya Zomi na Moko 1994, 59–60.

  3. “Bantina Mwambe mpo na Emoniseli,” Liawona, sanza ya libwa 2004, 8.

  4. “Batempelo Esantu, Bilaka Esantu,” Liawona, sanza ya Zomi na Moko 2008, 113, 114.

Masalisi mpo na Bateyi Batali

Lokola bateyi batali, bokoki kozwa makanisi ya Molimo lokola na oyo etali bamposa ya bandeko basi mpe lolenge nini kokutana na bamposa wana. Lokola bokoteya etinda oyo, bokabola, lokola elongobani, likanisi songolo to lisalisi bozwi na oyo etali boteyi botali.

Bolengelami ya Moto Yemei

1 Samwele 3:10

1 Bakonzi 19:11–12

Alama 5:46; 26:22

3 Nefi 19:19–23

M&E 8:2–3; 9:8–9; 88:63–64