2010
Moninga ya sika
sánzá ya nsambo 2010


BIlenge

Moninga ya sika

Nazalaki na mikakatano koyokaka lokola nazalaki malamu. Libota na ngai esilaki na kala mingi te kolongwa mosika kokatisaka ekolo mpo na bisika mosusu. Paloasi oyo tokomelaki ezalaki na liboke ya bilenge, kasi oyo ezalaki mbala ya yambo ete nazali “moninga ya sika”. Eteni ya mabe koleka mpenza ezalaki oyo nasengelaka kokende na kelasi ya sika, mpe likanisi liyelaki na mbala moko kati na moto na ngai, “Nani nakofanda na ye elongo na ntango ya molia moke?” Nabanza nakomona moto moko ya Eklezia, kasi nalingaki te kokota na mesa ya molia moke ya moto mosusu, mingi mpo nayebaki te soki kutu ekolinga bango ngai kuna!

Mokolo ya yambo na kelasi ezalaki lokola ya kowumela seko. Na nsuka ngonga ya molia moke ebetaki. Ekotaki ngai na malembe kati na suku ya molia moke, nasambelaki Tata ya Likolo mpo na kosunga ngai namona moto moko nayebaki. Na bwakaki miso nzinganzinga mpo na komona soki nakokaki koyeba ata moto moko. Moko te. Yango wana na mikendelaki na mesa oyo ezalaki na mopanzi ya mosika ya suku ya molia moke mpe naliaki molia ya moke na ngai.

Sima ya ntango koleka na mokolo wana, na ngonga ya mateya ya Ntalo, nayebaki elongi moko ya momesano. Nasilaki komona Dawidi na kelasi ya bilenge na ntongo. Asengaki ete amona ntango na ngai mpe amonaki ete tozalaki biso mibale na ngonga ya molia moke se moko. “Ozalaki wapi na molia moke lelo?” alobaki.

“Naliaki na mopanzi ya mosika ya suku,” Nazongisaki.

“Malamu, lobi yaka mpe fanda elongo na ngai na ntango ya molia moke” alobaki.

Matondi mpo na bolingo ya Tata ya Likolo, oyo ayebi mposa ya moko moko na biso mpe oyo ayanolaka losambo moko moko na biso. Matondi lisusu mpo na moto moko oyo azalaki na bolingo ya kosembola loboko ya bolingaki. Eloko ya pete lokola bobiangi ekoki kosala bokeseni nyonso.