2010
Kolendisa Mabota mpe Ndako
sánzá ya nsambo 2010


Etinda ya Bamama Bateyi Batali, sanza ya SAMBO 2010

Kolendisa Mabota mpe Ndako

Yekola liteya eye, mpe na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala, Salela mituna mpo na kosunga yo olendisa bandeko basi na yo mpe mpo na kokomisa Lingomba ya Bamama Basungi eteni moko ya makasi ya bomoi na yo mei.

Uta makomi: Genese 18:19 Moziya 4:15 M&M 93:40 Uta Mose 6:55–58

Kolendisa na libaku nyonso

Moko na moko kati na biso azali koteya lolenge ya libota ya kokesana. Mabota mosusu ezali na mama mpe tata elongo na bana na ndako. Mabala mosusu ezali lisusu na bana na ndako te. Bandimi mingi ya Eklezia bazali minzemba, mpe basusu bazali baboti bazangi balongani. Basusu bazali bakufeli mibali to bakufeli basi kofandaka bango moko.

Likambo te lolenge nini libota na yo ezali, moko na moko kati na biso akoki kosala mpo na kolendisa mabota na bisomei to kosunga kati na kolendisa basusu.

[Mokolo moko] Nafandaki na ndako ya mwana mwasi ya ndeko na ngai mpe libota na ye. Mpokwa wana yambo bana bakende kolala, tosalaki lisanga ya mpokwa ya libota mpe tobetaki lisolo euti na likomi ya mokuse. Tata na bango abetaki lisolo etali libota ya Leyi mpe lolenge kani ateyaki bana na ye ete basengeli kosimba makasi lingenda ya ebende, oyo ezali liloba ya Nzambe. Kosimbaka makasi ekobatela bango mpe ekomema bango na nsai mpe na esengo. Soki etikaki bango lingenda ya ebende, mbele ezalaki na likama ya kozinda kati na liziba ya mayi ya mbindo.

Mpo na kolakisa yango na bana, mama na bango akomaki “kingenda ya ebende” oyo esengelaki bango kokangema, mpe tata na bango akomaki zabolo komekaka kobenda bana mosika ya bobateli mpe ya esengo. Bana balingaki lisolo mpo bayekolaki ntina kani ezali na kosimba makasi lingenda ya ebende. Sima ya lisolo ya makomi ekomaki ntango mpo na losambo ya libota. …

“Makomi, lisanga ya mpokwa ya libota, mpe losambo ya libota ekolendisa mabota. Tozali na mposa ya kozua libaku nyonso mpo na kolendisa mabota mpe kosungana mpo na kotikala na nzela ya sembo”1

Na Barbara Thompson, mosungi ya mibale kati na bokambi bonene ya Lingomba ya Bamama mpo na bosalisi.

Nini Tokoki Kosala?

  1. Makanisi nini ya ntina ya kolendisa mabota mpe ndako okokabola elongo na bandeko na yo basi? Lokola ezali yo kokanisa makambo ya moko na moko na bango, Molimo akoki komema makanisi kati na moto na yo.

  2. Nini ya koleka liboso okoki kobongola sanza eye na ntina ya kolendisa malamu koleka libota mpe ndako ya yo mei?

Uta Bonkoko na Biso

Uta ebandela Lingomba ya Bamama Basungi esili kozwa mokumba ya kolendisa mabota mpe ndako. Profeta Joseph ateyaki bandeko basi na likita moko ya Lingomba ya Bamama mpo na Bosungi na ntango ya ebandeli boye: “Ntango bokeyi na ndako, bopesa ata moke te liloba ya nkanda to liloba ya boboto te epai ya mibali na bino, kasi tika boboto, bolingo ya Klisto mpe bolingo elata misala na bino uta sikawa.2

Na mobu 1914 Mokambi Joseph F. Smith alobaki na bandeko basi ya Lingomba ya Bamama mpo na Bosalisi boye, “Bisika nyonso oyo ezali na bozangi (boyebi) to na mwa moke bozangi ya basosoli na maye matali libota, … kuna nde lingomba ezali to ezali mosika te, mpe na kolatisama na nguya ya molimo kati ya Tempelo mpe na kozwa makanisi ya Nzambe ya kobotama oyo ezali na lingomba balengelemi mpe balingi kosakola mateya oyo etali misala ya ntina oyo.”3

Bankoma

  1. Barbara Thompson, “Loboko na Ye ekoki,” Liahona, Sanza ya mitano mobu 2009, 84.

  2. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 369

  3. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (1998), xiv, 21–22