2010
Mapamboli ma Tempelo
sánzá ya zómi 2010


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Zomi 2010

Mapamboli ma Tempelo

Tempelo ezali kopesa ntina na bomoi na biso. Ememaka kimia na milimo na biso—kimia oyo bato bapesaka te kasi kimia oyo Mwana ya Nzambe alakaki ntango Alobaki ete, “Natikeli bino kimia, kimia na ngai napesi epai na bino.”

Kati na tempelo tokoki komimona penepene na Nkolo

Nakanisi ezali na esika moko te kati na mokili wapi namimonaka penepene na Nkolo koleka moko ya batempelo na Ye esantu. Mpo na kozwa maloba ya makomi ya ntoki moko:

Boniboni mosika ezali lola?

Ezali mosika mpenza te.

Kati na batempelo ya Nzambe,

Ezali kaka wapi tozali.

Nkolo alobakli:

“Bomibombela biloko ya motuya na mabele te, wapi lopomboli mpe mabanga ekolia, mpe wapi bayibi bakokota mpe bakoyiba:

“Kasi bomibombela biloko ya motuya na lola, wapi lopomboli mpe mabanga ekoki kolia te, mpe wapi bayibi bakoki kokota to koyiba te:

“Mpo wapi ezali biloko na yo ya motuya, kuna nde ekozala motema na yo.”1

Epai ya bandimi ba Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Tempelo ezali esika ya bule koleka binso na mabele. Ezali ndako ya Nkolo, mpe kaka lokola nkoma oyo ezali libanda ya tempelo ezali koloba, tempelo ezali “bosantu na Nkolo.”

Tempelo etombolaka mpe enetolaka biso

Kati na tempelo, mwango mwa Nzambe ya motuya eteyami. Ezali nde na tempelo wapi mayokani ma seko masalemaka. Tempelo etombolaka, enetolaka biso, etelemi lokola likonzi ya moto ete banso bamona, mpe elakisaka biso nzela ya nkembo ya selesitiale. Ezali ndako ya Nzambe. Nyonso oyo esalemaka kati na bifelo ya tempelo etombolaka mpe epesaka lokumu.

Tempelo ezali mpo na mabota, moko ya biloko ya motuya ya monene koleka binso oyo tozali na yango na bomoi oyo ya kufa. Nkolo alimbolaki manso polele ntango alobaki na biso batata, kolakisaka ete tozali na mokumba ya kolinga basi na biso na motema na biso mobimba mpe kobokola bango mpe bana na biso. Alakisaki ete mosala monene koleka nyonso oyo biso baboti tokoki kosala mosalemi na bandako na biso, mpe bandako na biso ekoki kozala lola, mingi mingi ntango mabala na biso makangami na ndako ya Nzambe.

Nkondo Mpaka Matthew Cowley, oyo azalaki moko ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, abetaki lisusu mokolo moko lisolo ya makambo nkoko ya mobali moko akutanaki na yango na mokolo mwa Mposo nsima na nzanga ntango, loboko na loboko, akamataki nkoko na ye ya mwasi na mokolo ya bokundoli mbotama na ye kokende kotala—baniama to sinema te: kasi na libanda ya tempelo. Na ndingisa ya mokengeli ya libanda, banso mibale bakendeki bipai na bikuke minene bya tempelo. Apesaki ye likanisi ete ye [nkoko ya mwasi] atia loboko na ye likolo ya efelo ya makasi mpe nsima na ekuke ya monene. Na bolingo bonso alobaki na ye nsima ete, “Mikundola o mokolo moye ete osimbaki tempelo. Mokolo moko okokota na kati.” Likabo na ye epai ya mwana oyo ya moke ezalaki bonbon to crème te kasi likambo moko ya ntina monene koleka mpe ya libela—motuya ya ndako ya Nkolo. Ye [nkoko ya mwasi] asimbaki tempelo, mpe tempelo esimbaki ye.

Tempelo ememaka kimia na milimo na biso

Wana ezali biso kosimba mpe kolinga tempelo, bomoi na biso ekolakisa bondimi na biso. Wana ezali biso kokende na ndako esantu, lokola tokokundola mayokani tosalaki kuna na kati, tokoka kokanga motema na mimekano nyonso mpe kolonga lisenginia moko moko. Tempelo ezali kopesa ntina na bomoi na biso. Ememaka kimia na milimo na biso—kimia oyo bato bapesaka te kasi kimia oyo Mwana ya Nzambe alakaki ntango Alobaki ete, “Natikeli bino kimia, kimia na ngai napesi epai na bino. Tika ete motema na yo molenga te, mpe ebanga te.”2

Ezali na bondimi monene o ntei ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Nkolo apesi biso libaku ya kotala soki tokolanda mitindo mya Ye, soki tokolanda nzela oyo Yesu ya Nazaleti alandaki, soki tokolanda Nkolo na motema, bokasi, mayele, mpe bokasi na biso mobimba, mpe soki tokolinga baninga na biso ya penepene lokola biso moko.3

Nandimi lisese oyo ete “Tiela Nkolo motema na yo monso; mpe koyekama te na mayele na yo moko. Ndima ye na banzela na yo nyonso, mpe akokamba banzela na yo.”4

Ezalaka ntango nyonso se bongo; mpe ekotikala ntango nyonso kozala bongo. Soki tosali mosala na biso mpe totieli Nkolo motema na biso mobimba, tokotondisa batempelo na Ye, na kosalaka bobele makuli na biso moko te, kasi lisusu kozwaka litomba ya kosala mosala yango mpo na basusu. Tokofukama na mesa ya santu mpo na kozala bakitani na esika ya baoyo bakufa na bokangisi oyo ekosangisa esika moko mibali mpe basi mpe bana mpo na boseko. Bilenge mibali mpe basi ya mibu 12 oyo balongobani bakoki kozala bakitani mpo na baoyo bakufa na kozangaka kozwa mapamboli ya libatisi. Oyo ekozala mposa ya Tata na biso na Likolo mpo na bino mpe ngai.

Bikamwa bisalemaki

Mibu mingi mileki, Nkoko moko ya bomikitisi mpe ya botongono, Ndeko Percy K. Fetzer, abiangamaki kopesa lipamboli ya nkoko na bandimi oyo bazalaki kofanda nsima na Iron Curtain.

Ndeko Fetzer akendaki na mboka ya Pologne o mikolo mina ya mpasi. Bandelo nyonso ezalaki ya kokangama, mpe moi- mboka moko te apesamaki nzela ya kobima na mboka. Ndeko Fetzer akutanaki na Basantu ya Allemagne oyo bakangamaki kuna ntango babongolaki bandelo ya sika nsima ya Etumba ya Mokili Mobimba ya II mpe mboka wapi bazalaki kofanda ekomaki eteni ya Pologne.

Mokambi na biso o ntei ya Basantu banso oyo wana ya Allemagne ezalaki Ndeko mobali Eric P. Konietz, oyo azalaki kofanda kuna na mwasi mpe bana na ye. Ndeko Fetzer apesaki Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Konietz mpe bana bakola mapamboli ya bonkoko.

Ntango Ndeko mobali Fetzer azongaki na Etazini, abiangaki mpe asengaki soki akokaki koya kotala mboka elongo na ngai. Wana ezalaki ye kofanda na bilo na ngai, abandaki kolela. Alobaki, “Ndeko mobali Monson, lokola natiaki maboko ma ngai likolo ya mito mya bato ya libota ya Konietz, nasalaki bilako biye bikoki kokokisama te. Nalakaki Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Konietz ete bakokoka kozonga na Allemagne mboka na bango ya mbotama, ete bakozwama bakangami te o nse ya mikano ya bikolo oyo balingi kokamata mboka mpe ete bakokangisama esika moko lokola libota na ndako ya Nkolo. Nalakaki mwana mobali na bango ete akosala misio, mpe nalakaki mwana na bango ya mwasi ete akobalana kati na tempelo. Yo mpe ngai toyebi ete na ntina ya bandelo oyo ekangami, bakokoka te komona bokokisami ya mapamboli maye. Nini oyo nasalaki?”

Nalobaki, “Ndeko mobali Fetzer, nayebi yo malamu na lolenge ya kokoka mpo na koyeba ete osalaki kaka mpenza lokola Tata na biso na Likolo alingaki ete osala.” Banso mibale tofukamaki na ngambo ya mesa na ngai mpe tosopaki mitema na biso epai ya Tata na biso na Likolo, kolobaka ete bilako bipesamaki na libota moko ya bato bamipesi mpenza, bilako bitali tempelo ya Nzambe mpe mapamboli mosusu oyo sikawa mapekisami na bango. Bobele Ye nde akokaki kokokisa bikamwa oyo tozalaki na yango mposa.

Bikamwa bisalemaki. Lokola maboko matiamaki na mokanda ya liyokani kati na bakambi ya mbula-matari ya Pologne mpe bakambi ya ekolo République Féderale ya Allemagne, kopesaka nzela na bai-mboka ya Allemagne oyo bakangamaki na etuka ena kokende na Allemagne ya Westi. Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Konietz mpe bana na bango bakendeki na Allemagne ya Westi, mpe Ndeko mobali Konietz akomaki episikopo na palwasi wapi bazalaki kofanda.

Libota mobimba ya Konietz bakendeki na tempelo na Swisse. Mpe nani azalaki mokambi ya tempelo oyo ayambaki bango maboko polele na bilamba ya pembe? Ezalaki moto moko mosusu te longola se Percy Fetzer—nkoko oyo apesaki bango elako. Sikawa, na makoki ma ye ya mokambi ya Tempelo ya Berne na Swisse, ayambaki bango na ndako ya Nkolo, mpo na bokokisi ya elako wana, mpe akangisaki mobali na mwasi esika moko mpe bana na baboti na bango.

Na nsuka elenge mwasi abalaki na ndako ya Nkolo. Elenge mobali azwaki libiangi na ye mpe akokisaki misio ya ntango mobimba.

“Tokomonana na yo na kati ya tempelo!”

Mpo na boko na biso, mobembo na biso mpo na kokende na tempelo ezali nsima ya ndako. Mpo na basusu, ezali na bambu ya kokatisa mpe bakilometele ya kotambola yambo bakota na tempelo ya Nzambe.

Mwa mibu mingi te eleki, liboso basilisa tempelo na Afrique du Sud, wana ezalaki ngai kokende na likita ya distiliki na oyo ezalaki o ntango wana Salisbury, na Rhodesie, nakutanaki na mokambi ya distiliki yango, Reginald J. Nield. Ye mpe mwasi na ye mpe mwana na bango ya kitoko bakutanaki na ngai wana ezalaki ngai kokota na ndako ya Nzambe. Balimbolaki ngai ete bazalaki kobomba misolo na bango mpe komilengela mpo na mokolo moye bakokaki kosala mobembo na bango kokende na tempelo ya Nkolo. Kasi, O, tempelo ezalaki mosika mpenza.

Na nsuka ya likita, bana basi kitoko yango batunaki ngai mituna mitali tempelo: “Tempelo yango ezali lolenge nini? Nyonso tomona kino sikawa ezali kaka elili.” “Toyokaka ndenge nini ntango tozali kokota kati na tempelo?” “Nini tokotikala kokundola mingi koleka nyonso?” Mpo na molai ya ntango penepene na ngonga moko nazwaki libaku ya kosolola na bana basi wana minei na ntina ya ndako ya Nkolo. Wana ezalaki ngai kokabwana na bango mpo na kokende na libanda ya mpepo, bapepaki ngai maboko, mpe oyo ya moke koleka banso alobaki, “Tokomonana na tempelo!”

Mobu moko nsima nazwaki libaku ya koyamba libota ya Nield na Tempelo ya Salt Lake. Na bokangi moko ya kimia nazwaki litomba ya kosangisa mpo na boseko, mpo na ntango mpe lokola, Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Nield. Bikuke bifungwamaki o ntango ena, mpe bana basi wana ya kitoko, moko moko na bango kolataka bilamba ya mpembe moko ezanga litona, bakotaki kati na ndako. Bayambanaki na mama, nsima na tata. Mpinzoli ezalaki na miso ma bango, mpe botondi ezalaki na mitema na bango. Tozalaki penepene na lola. Tokokaki moko moko koloba ete, “Sikawa tozali libota mpo na boseko.”

Oyo ezali lipamboli ya kokamwa oyo ezelaka baoyo wana bayaka na tempelo. Ekoki moko moko na biso kotambwisa bomoi elongobani, na maboko masukwama mpe motema ya peto, na lolenge ete tempelo ekoka kosimba bomoi mpe mabota na biso.

Boni boni mosika ezali lola? Natatoli ete kati na batempelo esantu lola ezali mosika te—mpo ezali bisika ya bule wapi lola mpe mabele ekutanaka mpe wapi Tata na biso na Lola apesaka bana na Ye mapamboli na Ye ya monene koleka mpenza.