2010
Tempelo Esantu
sánzá ya zómi 2010


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya zomi 2010

Tempelo Esantu

Kati na batempelo, bandimi ba Eklezia oyo balongobani bakoki kozala kuna elongo na basusu mpo na kosala makuli ma bosikoli mpo na bonetoli ya koleka manso maye mabimisami mpo na bato banso.

Kati na batempelo tokoki kozala kuna mpo na kosala makuli ma bosikoli mpo na bonetoli ya koleka manso.

Ezali na bantina mingi mpo na oyo wapi moto akoki kolinga koya na tempelo. Kutu lolenge ezali komonana libanda ezali kolimbola ntina na yango ya molimo mpe ya mozindo. Eye ezali komonana polele koleka kuna na kati ya bifelo na yango. Kuna likolo ya ekuke ya tempelo ezali komonana nkoma “Bosantu na Nkolo.” Ntango okoti kati na tempelo nyonso oyo ebulisami, ozali na kati ya ndako ya Nkolo.

Kati na batempelo, bandimi ba Eklezia oyo balongobani bakoki kozala kuna elongo na basusu mpo na kosala makuli ma bosikoli mpo na bonetoli ya koleka manso maye mabimisami mpo na bato banso. Kuna, na milulu ya bule, moto moko moko akoki kosukolama mpe kopakolama mpe kopesama malako mpe kolatisama na nguya ya molimo kati na tempelo mpe kokangisama. Mpe ntango tozwi mapamboli maye mpo na biso moko, tokoki kosala yango mpe mpo na baoyo bakufaki na kozangaka kozwa libaku se moko wana. Kati na batempelo ya bule makuli mazali kosalema mpo na bato na bomoi mpe bakufi lokola.

Makuli mpe milulu mya tempelo ezali pete, kitoko, mpe bule

Botangi na bokebi ya makomi masatu ezali kolakisa ete Nkolo ayebisaki makambo manso na bato banso te. Ezalaki na masengami matiami maye masengelaki kokokisama yambo ya kozwa bansango ya bule. Milulu mya tempelo ezali kokweya na molongo oyo.

Tosololaka makambo matali makuli ma tempelo libanda ya batempelo te. Ezalaki na likanisi te ete boyebi ya milulu miye mya tempelo etali bobele mwa baponami moke oyo basengeli kosala keba ete basusu bayeba yango te. Solo mpenza, ezali nzokande bongo te. Na bokasi monene tosengi ete moto moko moko alongobana mpe amilengela mpo na kokende na tempelo. Baoyo bakoma na tempelo bateyamaki makambo malonga moko: Mokolo moko moto nyonso na bomoi mpe nyonso oyo asila kozwa bomoi akozwa libaku ya koyoka nsango malamu mpe kondima to koboya nini tempelo ezali kopesa. Soki libaku liye eboyami, koboya yango ekotiama na ngambo ya moto yango.

Makuli mpe milulu mya tempelo ezali pete. Ezali kitoko. Ezali ya bule. Ebombami na bonkuku mbele epesama na baoyo wana balengelami te. Boluki koyeba-yeba makambo ezali bomilengeli te. Kozala na litomba ya mozindo ezali bomilengeli te. Bomilengeli mpo na makuli etali kokokisa naino biteni oyo ya ebandeli: bondimi, bobongoli motema, libatisi, nkotisa, bolongobani, bokoli mpe bolongobani ya oyo ayei lokola moto babiangi kati na ndako ya Nkolo.

Baoyo wana bazali bato balongobani bakoki kokota na tempelo

Banso oyo balongobani mpe bazali na makoki na nzela nyonso bakoki kokota na tempelo, kuna mpo na kosala ndulu mpe makuli ya bule.

Soki ozwi kaka mayoki mpo na motuya ya mapamboli ma tempelo mpe mpo na ezalela ya bule ya makuli maye mazali kosalema na tempelo, okozala na nguya te ya kotuna mpo na nini Nkolo atiaki mibeko ya likolo mpo na kokota na tempelo ya bule.

Osengeli kozala na mokanda mondimami oyo eleki ntango te mpo ete bandima yo kokota na tempelo. Mokanda mondimami oyo mosengeli kotiama maboko na bakambi balongobani ba Eklezia. Bobele baoyo balongobani nde basengeli kokende na tempelo. Episikopo to mokambi ya etape na yo bazali na mokumba ya koluka koyeba soki olongobani liboso ete opesama makuli na yo ya tempelo. Lisolo oyo ya mozindo ezali na ntina monene, mpo ezali libaku ya koluka koyeba elongo na mosali moko oyo akulisami na Nkolo nini ezali emekoleli ya bomoi na yo. Soki eloko moko ezali kotambola malamu te na bomoi na yo, episikopo azali na makoki ya kosalisa yo kobongisa yango. O nzela eye, okoki kosakola to kozwa lisalisi ya koloba soki olongobani mpo na kokota na tempelo na bondimami ya Nkolo.

Masolo ya mozindo mpo na kozwa mokanda ya bondimami mpo na tempelo masalemi na nkuku kati na episikopo mpe mondimi oyo masolo yango ezali kotalela. Awa bakotuna mondimi yango mituna ya koluka koyeba makambo matali etamboli, bolongobani, mpe bosembo na ye moko epai ya Eklezia mpe epai ya bakambi na yango. Moto yango asengeli kotatola ete azali peto na bizaleli ya boponi kati na bolamu mpe mabe mpe soki atosaka Liloba ya Bwania, kofutaka eteni moko kati na zomi ya mobimba, kotambwisaka bomoi na ye na boyokani na mateya ma Eklezia, mpe kozala na mikangano to mpe kolinga mangomba ya bato oyo basila kopengwa te. Episikopo apesami mitindo ete kobomba sekele ya masolo maye elongo na mondimi oyo asololaki na ye ezali likambo ya motuya monene koleka nyonso.

Kopesa biyano bindimami na mituna ya episikopo nde ekopesa nzela ya koyeba bolongobani ya moto yango mpo ete azwa mokanda mondimami ya kokota na tempelo. Soki mosengi mokanda yango azali kobatela mitindo te to soki ezali na eloko songolo etali bomoi na ye oyo esengeli kotiama na molongo, ekozala ntina mingi ete alakisa boyamboli ya solo liboso ete bapesa ye mokanda ya bondimami mpo na kokota na tempelo.

Esili episikopo kokamba masolo ya mozindo ya motindo wana, mokambi ya etuka akosolola na yo mpe lolenge moko liboso ete okoka kozwa makuli na yo ya tempelo.

Mateya ya tempelo ezali mateya ya bililingi.

Liboso ya kokende na tempelo mpo na mbala ya yambo, to kutu nsima ya mbala mingi, ekoki kosalisa yo ososola ete mateya kati na tempelo ezali kosalema na lolenge ya bilili. Nkolo, Molakisi Moteyi, apesaki malakisi na Ye na lolenge loye.

Tempelo ezali eteyelo monene. Ezali ndako ya boyekoli. Kati na batempelo mopepe ya esika ya kofanda ebatelami malamu ete ezali esika ebongi malamu mpo na koteya makambo maye mazali ya molimo na mozindo. Nkondo Mpaka John A. Widtsoe ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale azalaki mokambi ya Université ya lokumu mpe moto ya mayele oyo atanga mingi mpe ayebani mokili mobimba. Azalaki na limemia makasi mpo na mosala mwa tempelo mpe na libaku moko alobaki ete:

“Makuli ma Tempelo mazali koyokana na mwango mobimba mwa lobiko, lokola eteyami mbala na mbala na bakambi ba Eklezia, mpe mazali kolimbola polele makambo oyo ezali makasi mpo na kososola. Ezali na bokamoli makomi to bosangisi mabe ya kokotisaka mateya ya tempelo kati na mwango monene mwa lobiko te. Bokokisami ya eteni ya mambi ma bwania ya kolatisama na nguya ya molimo kati na tempelo moko ya biyano minene ya bosolo ya makuli ma tempelo. Mpo na kobakisa, bokokisami oyo ya nyonso mpe bolimboli ya mwango ya Nsango malamu, esali ete masanzoli ya tempelo ezala nzela ekoki malamu koleka nyonso ya kozongisa makanisi mpo na oyo etali etongeli mobimba ya nsango malamu” (“Temple Worship,” Utah Genealogical and Historical Magazine, Sanza ya minei 1921, 58).

Soki okokende na tempelo mpe omikundoli ete mateya ezali na bililingi, mpe soki okei na molimo ya peto to molongobani okozonga na bomoni na yo ekomisami monene, koyokaka ete onetolami mwa mingi koleka, na boyebi na yo ebakisami mpo na eye etali makambo ya molimo. Mwango ya mateya ezali kitoko mpenza. Ezali ya kofulama. Nkolo ye moko, Molakisi Moteyi, ateyaki bayekoli na Ye ntango nyonso na masese nzela moko ya maloba mpo na kolakisa na bililingi makambo maye ekokaki kozala mpasi mpo na kososola na lolenge mosusu.

Tempelo yango moko ekomi elilingi. Soki osili komona moko ya batempelo yango na butu, wana mwinda epelisami mobimba, nde okoyeba botali ya kitoko mingi boni yango ekoki kozala. Ndako ya Nkolo, lokola ezali kongengisama na pole, kobimaka uta na molili, ekomi elilingi ya nguya mpe bofuli ya nsango malamu ya Yesu Klisto kotelemaka lokola likonzi ya mwinda kopelaka na mokili oyo ezali se kokende liboso na kozindaka kati na molili ya molimo.

Wana elingi yo kokota na tempelo, okolongola bilamba na yo ya balabala mpo na kolata bilamba ya pembe ya tempelo. Bosombitini ya bilamba oyo esalemaka na ndako ya kolata, wapi moto moko moko apesami esika ya kobomba bilamba na fungola mpe esika ya kolata bilamba oyo wapi ezali mpo na yo moko. Kati na tempelo likanisi monene ya kozanga lolendo ebatelami na bokebi bonso. Wana ekotia yo bilamba na yo kati na esika ya kobomba bilamba, okotika mabanzo mpe mitungisi mpe makambo maye mabungisaka makanisi kuna na kati na yango. Okobima uta na mwa esika oyo ya kolata yo moko na bilamba ya pembe, mpe okoyoka bomoko mpe bokokani ya banso, mpo banso nzinga nzinga na yo balati mpe lolenge moko.

Libala ya tempelo ezali bokuli ya nsuka ya tempelo

Baoyo bazali kozela libala na tempelo bakoki koluka koyeba nini ekosalema kuna. Tozwaka maloba ya bokuli ya bokangi (ya libala) libanda ya tempelo te, kasi tokoki kolimbola ndako ya bokangisi lokola kozalaka kitoko mpenza na lolenge na yango, esika ya kimia mpe ya boboto na molimo, mpe esantisami na mosala ya bule moye mozali kosalema kuna.

Liboso ete balongani baya na mesa ya santu mpo na bokuli ya bokangisi, ezali litomba ya mosali oyo azali kuna kopesa, mpe ya bilenge balongani kozwa, batoli. Awa ezali boko makanisi oyo bilenge balongani bakoki koyoka na libaku oyo.

“Lelo ezali mokolo na bino ya makwela. Bozwami sikawa kati na libala na bino mpe mitema na bino mizali kobeta. Batemepelo etongamaki lokola esika ya losambo mpo na makuli ma lolenge loye. Tozali kati na mokili te. Makambo ya mokili ezali kosalema awa te mpe ekoki kozala na bopusi moko na oyo tozali kosala awa te. Tosili kobima na mokili mpo na kokota kati na tempelo ya Nkolo. Oyo ekomi mokolo ya monene koleka minso ya bomoi na bino.

“Bobotamaki, bobiangamaki na mabele, na baboti oyo babongisaki tabelenakele mpo ete molimo na bino afanda kuna. Moko moko na bino abatisamaki. Libatisi, bokuli moko ya bule, ezali elilingi ya bopetoli, elilingi ya liwa mpe bosekwi, elilingi ya kobima na bomoi ya sika. Ezali mbano ya bobongoli motema mpe bolimbisi ya masumu. Elambo ya Nkolo na Mpokwa ezali bozongisi sika ya liyokani ya libatisi, mpe tokoki, soki tosaleli yango na bomoi na biso, kobatelaka bolimbisi ya masumu na biso.

“Yo, mobali ya libala, okulisamaki na bonganganzambe. Yambo bapesaki likolo na yo Bonganganzambe ya Alona mpe ekoki kozala ete okendeki liboso kolekaka na misala nyonso na yango—[kobanda na] diakona, moteyi, mpe nganganzambe. Nsima mokolo eyaki wapi bamonaki ete olongobani kozwa Bonganganzambe ya Melikisedeke. Bonganzambe wana, bonganganzambe ya likolo, elimbolami lokola bonganganzambe na molongo mosantu koleka minso ya Nzambe, to Bonganganzambe na Molongo ya Mwana ya Nzambe (tala Alama 13:18; Elamani 8:18; D&C 107:2–4). Bapesaki yo mosala na bonganganzambe. Ozali sikawa mpaka.

“Moko moko na bino asili kolatisama na nguya ya molimo kati na tempelo na bino. Na likonza lina batiaki likolo na yo makoki ya boseko. Kasi makambo manso oyo, na lolenge moko, ezalaki eteni ya ebandeli mpe ya bomilengeli mpo na boye na yo na mesa ya santu mpo na kokangisama lokola mobali mpe mwasi mpo na ntango mpe mpo na boseko bonso. Sikawa bokomi libota, nsomi mpo na kosala na bokeli ya bomoi, ya kozwa libaku o nzela ya losambo mpe komibonza mpo na komema bana ya Nzambe kati na mokili mpe kobokola bango mpe kolendisa bango kokola na bokengi na bomoi oyo ya kufa; komona bango koya mokolo moko, lokola oyei awa, kosala makuli ya bule maye ya tempelo.

“Boyei na bolingi bwa bino moko mpe bamoni ete bolongobani. Kondima moko mpe mosusu kati na liyokani ya libala ezali mokumba monene, moye momemaka elongo na yango mapamboli ezanga emekoleli.”

Nguya ya bokangi ekangisaka na mabele mpe na lola

Soki tokososola mambi ma kala mpe malongi ma mosala mwa tempelo nyonso mibale, tosengeli kososola nini wana ezali nguya ya kokanga. Tosengeli kozala na limoni, ata ya motuya moko, ya koyeba mpo na nini mafungola ma likoki ya kosalela nguya ya kokanga ezali na ntina monene.

“Ntango Yesu ayaki na libongo ya Filipi, atunaki bayekoli na ye, kolobaka, Bato bazali koloba ete ngai Mwana ya moto nazali nani? …

“Mpe Simoni Petelo azongisaki mpe alobaki, Ozali Klisto, Mwana ya Nzambe na bomoi.

“Mpe Yesu azongisaki maloba mpe alobaki na ye, Opambolami yo, Simoni Bal-jona: mpo mosuni mpe makila nde elakisi yo yango te, kasi Tata wa ngai oyo azali na Likolo.

“Mpe nalobi lisusu na yo, Ete ozali Petelo, mpe likolo ya libanga oyo nakotonga eklezia na ngai; mpe bikuke ya lifelo bikolonga yango te.

“Mpe nakopesa yo mafungola ma bokonzi bwa likolo: mpe nyonso oyo okokanga na mabele ekokangama na lola: mpe nyonso oyo okokangola na mabele ekokangolama na likolo” Matai 16:13, 16–19).

Petelo asengelaki kozala na bafungola. Petelo asengelaki kozala na nguya ya kokanga, ete likoki mpe nguya oyo ezali komema nguya ya kokangisa to kokanga na mabele mpe ekozala bongo na lola. Bafungola yango ezali ya Mokambi ya Eklezia—profeta, momoni, mpe mobimisi. Nguya wana ya kokanga ya bule ezali na Eklezia sikawa. Ezali na eloko moko te oyo bazali kotala lokola bule koleka na baoyo bayebi ntina ya likoki mpe nguya oyo. Ezali na eloko moko te oyo basimbi na makasi mingi koleka lokola oyo. Ezali mbele na bato mingi te oyo nguya ya bokangi oyo etindamaki epai na bango na mabele o ntango songolo—na tempelo moko moko ezali na bandeko mibali oyo bapesami nguya ya kokanga. Moto moko te akoki kozwa yango longola se uta na profeta, momoni, mpe mobimisi mpe Mokambi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka.

Profeta Joseph Smith alobaki ete bazalaki mbala mingi kotuna ye motuna “‘Ekoki biso kobikisama te na kozangaka kosala makuli manso oyo, mpe bongo na bongo?’ Nalingaki kopesa eyano, Te, litondi ya lobiko te. Yesu alobaki, ‘Ezali na bifandeli mingi na ndako ya Tata wa ngai, mpe nakokende kolengele bino esika.’ [Tala Yoane 14:2.] Oyo ebiangami ndako awa esengeli ebongolama lokola bokonzi; mpe moto nyonso oyo anetolami na efandeli ya likolo koleka asengeli kokangama na mobeko ya selesitiale, mpe na mobeko nyonso mobimba mpe” (na History of the Church, 6:184).

Mosala mwa tempelo ezali liziba ya nguya ya molimo

Batempelo ezali bisika ya kati kati mpenza ya bokasi ya molimo ya Eklezia. Tosengeli kozela ete moyini ameka kobundisa biso lokola Eklezia mpe biso lokola moto moko moko wana ezali biso koluka kozala elongo mpo na kosala mosala mofulami moye ya bule. Mosala ya tempelo ememaka mikakatano mingi mpo ete ezali ntina ya nguya mingi ya molimo epai ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka mpe mpo na Eklezia mobimba.

O ntango bapambolaki botii ya libanga ya nsuka ya Tempelo ya Logan, na Utah, Mokambi George Q. Cannon, ntango wana na Bokambi ya Yambo, asakolaki maloba maye:

“Libanga nyonso ya moboko liye litiami mpo na Tempelo, mpe tempelo nyonso oyo basilisi mosala engebene na motindo mwa Nkolo asili kobimisa mpo na Bonganganzambe bosantu bwa ye, ekomisaka nguya ya Satana moke na mabele, mpe ebakisaka nguya ya Nzambe mpe Bonzambe, etindaka lola kosala na nguya ya bokasi mpo na biso, ebondelaka mpe ebiangaka likolo na biso mapamboli ma Banzambe ya seko, mpe baoyo wana bafandaka liboso na bango” (na “The Logan Temple,” Millennial Star, Sanza ya zomi na moko 12, 1877, 743).

Ntango bandimi ya Eklezia bazali kati na mitungisi to ntango mikano minene efandisami lokola bozito monene na mayele ma bango, eloko ya kosala mpo na bango banso mingi ezali kokende na tempelo. Ezali esika malamu mpo na komema mitungisi na biso. Kati na tempelo tokoki kozwa limoni ya mosika ya molimo. Kuna, na ntango ya mosala ya tempelo, tozalaka “mosika na mokili.”

Ntango mosusu mayele na biso mafandisami mpenza na makambo mpe biloko mingi oyo ezali kobenda bokebi na biso na mbala moko bileki mingi ete tokoki boye kokanisa polele mpe komona polele te. Na tempelo mputulu ya kobungisa makanisi emonanaka lokola ezali lisusu te, londende mpe libilingi emonani lokola kaka esili kolongwa nyonso, mpe tokoki “komona” biloko oyo tokokaki komona liboso te mpe kozwa nzela ya kobima uta na mitungisi na biso, nzela oyo totikala koyeba liboso te.

Nkolo akopambola biso wana ekokende biso kosala mosala ya bokuli ya batempelo. Mapamboli kuna ekozala na ndelo te na mosala na biso ya tempelo. Tokopambolama na makambo ma biso manso.

Misala na biso na tempelo ekozipa biso na nguba mpe bobateli.

Mosala moko te ezali kopesa bobateli na Eklezia oyo koleka mosala ya tempelo elongo na boluki ya bonkoko ya libota oyo esungaka yango. Mosala moko te ezali kopetola mingi na molimo koleka lokola yango. Mosala moko te tosalaka epesaka biso nguya koleka yango. Mosala moko esengeka mibeko ya likolo ya bosembo koleka yango.

Misala na biso na tempelo ekozipa biso na nguba mpe bobateli, ezala mpo na moto moko moko mpe lokola lisanga ya bato banso.

Boye boya na tempelo—boya mpe bosenga mapamboli na bino. Ezali mosala ya bule.