2010
Likabo ya Bonzambe ya Botondi
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2010


Etinda ya Bakambi ya yambo, Sanza ya zomi na moko 2010

Likabo ya Bonzambe ya Botondi

Motema ya botondi … eyaka na nzela ya kolakisaka botondi epai ya Tata wa biso na Lola mpe na baye bazali nzinganzinga na biso mpo na maye manso bazali kosala na bomoi bwa biso

Oyo ezalaki liyangani moko ya kafu kafu. Ntango naponamaki Mokambi ya Eklezia, nalobaki ete, “Nakozwa mokumba moko mpo na ngai mei. Nakozala mosungi mpo na Lisanga ya Bayembi ya Tabelenakele.” Nazali na fiele makasi mpo na bayembi ba lisanga na ngai!

Mama na ngai mokolo moko alobaki na ngai ete, “Tommy, nazali na fiele mpo na manso maye osili kosala. Kasi nazali na liloba moko ya koyebisa yo. Esengelaki otikala na piano.”

Yango wana nakendaki na esika piano ezalaki mpe nabetaki mwa nimelo moko mpo na ye: “Awa tokei, [awa tokei] na feti ya mbotama.”1 Nsima napwepwaki ye na mbunsu, mpe ayambaki ngai.

Nakanisaka na ntina na ye. Nabanzaka tata wa ngai. Nakanisaka na ntina ya Bakambi Minene banso baye bazalaki na nguya likolo na ngai, mpe basusu, kozuaka bakufeli mibali oyo nakendeki kotala—85 na bango—bazalaki na soso mpo na kolamba, ntango mosusu mwa mbongo mpo na libenga na bango.

Nakendeki kotala moko na bango na butu moko ya makasi. Ezalaki na katikati ya butu, mpe nakendeki na ndako ya bopemi, mpe moyambi alobaki ete, Nayebaki ete azali ya kolala, kasi alobaki na ngai ete nayeba kolamusa ye, mpo alobaki ete, Nayebi akoya.’”

Nasimbaki loboko na ye abengaki nkombo na ngai. Azalaki ya kolamuka mpenza. Afinaki loboko na ngai na bibebu na ye mpe alobaki, Nayebaki ete okoya. Boniboni nakokaki koya te?

Mondule ya kitoko esimbaki ngai na lolenge lona.

Balingami bandeko ba ngai mibali mpe basi, Toyoki bitinda ya kofulama ya bosolo, ya elikya, mpe ya bolingo. Makanisi na biso mabaluki epai na Ye oyo amikabaki mpo na masumu na biso, oyo alakisaki biso nzela ya kotambwisa bomoi mpe lolenge ya kosambela, mpe oyo alakisaki na misala na Ye mei mapamboli ya mosala kutu Nkolo na biso mpe Mobikisi, Yesu Klisto.

Na mokanda ya Luka Mokapo 17, totangi na ntina na Ye ete:

“Mpe esalamaki ete wana ejalaki Yesu kokenda na Yeluzaleme, alekaki kati na Samalia na Galilai.

“Mpe wana ejalaki Ye kokota na mboka moko, babali jomi, bato na mbala, bazuanaki na ye:

“Mpe batombolaki mingongo na bango,mpe balobaki ete Yesu, Moteyi, Yokela biso mawa.

“Mpe ntango atalaki bango mpe alobaki na bango ete, kenda kotalisa banganganzambe njoto na bino. “Mpe esalemaki ete, ejalaki bango kokenda bapetuaki.

“Moko kati na bango emonaki ye ete abiki, ajongaki mpe akumisaki Njambe na mongongo makasi.

“Akweyaki na elongi na ye epai na makolo na Yesu mpe atondaki ye. Ye mpe ajalaki Mosamalia.

“Yesu alobaki, ete, Bato jomi bapetolamaki te? kasi balibwa wapi?

“Moto mosusu ajongi kopesa Njambe lokumu te, bobele mopaya oyo?

“Mpe alobaki na ye ete, Telema, mpe kenda na yo, kondima na yo esili kobikisa yo.”2

O nzela ya loboko ya Nzambe, baye bazalaki bato na maladi ya maba babikisamaki uta na liwa ywya nkuna, ya kowumela na mpasi ntango molai mpe bapesamaki libaku mosusu ya bomoi. Botondi boye moko na bango azongisaki ezuaki litomba ya mapamboli ma Moteyi, bozangi botondi oyo balakisaki ezuaki bosiswa bwa Ye.

Bandeko ba ngai babali mpe basi, ekundolaka biso kozongisa matondi mpo na mapamboli tozwaka? Solo mpenza kozongisa matondi esalisaka biso bobele kokitola mapamboli ma biso te, kasi efungolaka bikuke bya lola mpe esalisaka biso koyoka bolingo bwa Nzambe.

Molingami moninga wa ngai Mokambi Gordon B. Hinckley alobaki, “Ntango ozali kotambola kati na botondi, okotambola na lolendo mpe makambo matali kaka nkundu to kaka ngai, ngai te; ozali kotambola na molimo ya bozongisi matondi oyo kokoma epai na yo mpe makopambola bomoi na yo.”3

Na buku ya Matai kati na Biblia tozali na lisolo mosusu ya botondi, mbala oyo lokola maloba uta na Mobikisi. Wana ezalaki Ye kotambola na mobembo kati na esobe mikolo misato, bato koleka 4.000 balandaki ye mpe basalaki mobembo elongo na Ye. Ayokelaki bango mawa, mpo baliaki te mikolo mina misato mobimba. Nzokande, bayekoli, batunaki ye, “Epai wapi ekozwa biso mapa mingi bongo kati na esobe mpo na koleisa mpe kokoka na ebele ya bato boye?” Lokola mingi kati na biso, bayekoli bamonaki bobele oyo ezalaki kozanga.

“Mpe Yesu alobaki na bango ete, Biteni ya mapa boni ezali bino na yango? Mpe bayekoli balobaki, sambo, mpe mwa ndambo moke ya mbisi.

“Mpe [Yesu] atindaki bibele yango kofanda na mabele.

“Mpe akamataki biteni ya mapa sambo mpe mbisi yango, mpe azongisaki matondi, abukaki yango mpe apesaki na bayekoli na ye, mpe bayekoli epai ya bibele na bato yango.”

Mona ete Mobikisi azongisaki matondi mpo na eye bazalaki na yango—mpe bikamwa elandaki: “Mpe baliaki banso, mpe batondaki: mpe balokotaki bitunga sambo mobimba ya biteni ya mosuni oyo etikalaki.”4

Tosili koyeba ntango wapi makanisi ma biso manso mafandisamaki na nini tozali kozanga, na esika ya mapamboli na biso. Elobaki Mogreki mokomi ya mambi ma bwania to filozofi Epictetus (Epic-TEE-tus), “Moto ya bwania ezali ye oyo azali na mawa mpo na biloko azali na yango te, kasi asepelaka na biye wana azali na yango.”5

Botondi ezali libongisi ya bonzambe. Nkolo alobaki, o nzela ya bobimisi moko oyo epesamaki na Profeta Joseph Smith ete,

“Bosengeli kotonda Nkolo Nzambe wa bino na makambo manso. …

“Mpe ezali na eloko moko te oyo wapi moto atukaka Nzambe, to eloko na ntina ya oyo nkele na ye epelisami, longola se na baoyo wana bandimaka te loboko na ye kati na makambo manso.”6

Kati na buku ya Molomoni bayebisi biso “kotambwisa bomoi na kopesaka matondi mokolo na mokolo, mpo na boboto mpe mapamboli mingi maye [Nzambe] apesi likolo na bino.”7

Ata makambo kani tozali na yango, moko moko kati na biso azali na mingi mpo na eye asengeli kozala na botondi soki kaka totelemi mpe totali mapamboli ma biso.

Oyo ezali ntango ya kitoko mingi mpo na kozala na bomoi na mabele. Wana ezali na mabe mingi na mokili lelo, ezali na makambo mingi maye mazali semba mpe malamu. Ezali na mabala maye mazali kosala yango, baboti oyo balingaka bana na bango mpe bamibonzaka mpo na bango, baninga oyo bazali komitungisa mpo na biso mpe kosalisa, bateyi oyo bateyaka. Bomoi na biso epambolami na banzela mingi oyo tokoki kotanga te.

Tokoki komitombwama biso moko basusu mpe lokola ntango toboyi kotikala na nguya ya makanisi mabe mpe kolona kati na mitema na biso ezaleli ya botondi. Soki kozanga bozongisi matondi etangami o ntei ya masumu manene, boye bozongisi matondi ezwi esika na yango kati na bolamu ya lokumu koleka bonso. Moto moko alobaki “ete botondi ezali bobele bolamu ya monene koleka bonso te kasi moboti ya banso mosusu.”8

Lolenge nini ekoki biso kolona ezaleli ya botondi kati na mitema na biso? Mokambi Joseph F. Smith, Mokambi ya motoba na Eklezia, apesaki eyano. Ye alobaki ete, “moto ya botondi amonaka mingi mpenza makambo mingi mpo na maye wapi asengeli kozongisa matondi kati na mokili, mpe na ye, bolamu elekaka mabe. Bolingo eleki zuwa na nguya, mpe pole ebenganaka molili ya bomoi oyo.” Akobaki koloba ete, “Lolendo ebebisaka botondi bwa biso mpe etiaka nkundu na esika na yango. Boniboni bato ya esengo koleka tozalaka na miso ma molimo oyo etonda na botondi mpe bolingo, mpe na bokebi boni esengeli biso kozala na kolona, o nzela ya bomoi ya losambo, ezaleli moko ya botondi epai ya Nzambe mpe moto!”9

Mokambi Smith azali koyebisa biso ete bomoi ya ya losambo ezali fungola ya kokoma na botondi.

Bozwi ya biloko ya mokili ekomisaka biso bato na esengo mpe na botondi? Ekoki kozala mpo na ntango moko. Nzokande, biloko bina biye bipesaka esengo mpe botondi ya mozindo mpe ya ntango molai ezali biloko biye mosolo ekoki kosomba te: mabota na biso, nsango malamu, baninga malamu, bokolongono ya nzoto na biso, makoki ma biso, bolingo oyo tozwaka uta na baoyo nzinga nzinga na biso. Likambo ya mawa nde oyo ezali biloko biye tomeseni na yango mpe toyebi kotuya yango malamu te.

Moangele mokomi o nkombo Aldous Huxley akomaki ete, “Bato mingi koleka bazalaka na makoki ezanga ndelo ya kokamata biloko mingi lokola tomeseni na yango na kozangaka kotuya yango malamu.”10

Mbala mingi tokamataka yango lokola momeseno na kozangaka kotuya malamu bato oyo basengeli kozwa botondi na biso ya mingi koleka. Tozela te kino ntango ekoleka mingi mpo na biso kozongisa botondi wana. Kolobaka na ntina ya balingami oyo abungisaki, moto moko asangelaki mawa na ye na lolenge loye [totangi]: “Nazali komikundola mikolo mina mya esengo mpe mbala mingi natombelaki nakoka koloba na matoi ma bakufi botondi boye nasengisami mpo na bango na bomoi kasi bazwaki yango te.”11

Kobungisa baye tolingaka solo ememaka mawa mingi na mitema na biso. Tika ete totia mayoki ma lolenge wana minene te mpo ete ezali makambo makoki kosalema kati na bato na kobimisaka mbala na mbala bolingo mpe botondi na biso epai na bango. Toyebi soki moke te ntango nini ekoleka mpo ete tozwa ntango ya kosala yango te.

Boye, motema oyo etonda na botondi na Tata na biso na Likolo mpo na mapamboli ma ye mpe epai ya baoyo nzinga nzinga na biso mpo na nyonso oyo bamemaka na bomoi na biso. Eye esengaka tosala makasi mpenza—toloba na moke kino tokoyekola mpe kolona solo mpenza ezaleli ya botondi. Mbala mingi toyokaka lokola totonda na botondi mpe tokanaka kozongisa matondi na biso kasi tobosanaka kosala bongo to tozwaka ntango ya kosala yango te. Moto moko alobaki ete, “koyoka mposa ya botondi mpe kozanga kosala yango ezali lokola kozipa likabo mpe kopesa yango te.”12

Ntango tokutanaka na mitungisi mpe makambo kati na bomoi na biso, ezalaka mbala mingi mpasi mpo na biso ya kofandisa makanisi na mapamboli na biso. Kasi soki toluki na etingya nyonso mpe toluki makasi koleka, tokokoka koyaka mpe kokitola mingi boni epesamaki na biso.

Nazali kokabola na bino lisolo ya libota moko oyo bakokaki kozwa mapamboli na kati kati ya mitungisi mingi. Oyo ezali lisolo natangaki mbula mingi eleki mpe nabombaki mpo na etinda oyo ezali na kati. Ekomamaki na Gordon Green mpe ebimisamaki na zulunale moko ya Amerika mibu ntuku mitano mileki awa.

Gordon azali koyebisa biso lolenge nini akolaki na ebokolelo moko na Canada, wapi ye mpe bana na ye basengeli kotambola noki mpo nakozonga ndako o ntango bana mosusu bazalaki kobeta ndembo mpe kokende kosakana na mai. Nzokande Tata na bango, azalaki na makoki ya kosalisa bango kososola ete mosala na bango ezalaki na motuya. Oyo ezalaki solo mingi mingi nsima ya ntango ya kolokota mbuma ya bilanga, wapi ntango libota ezalaki kosepelaka eyenga ya Bozongisi matondi, mpo na mokolo mona tata azalaki kopesa bango likabo ya monene. Azalaki kosalisa bango botangi ya biloko nyonso bazwaki.

Na ntango ya eyenga ya Bozongisi matondi, akomema bango na ebombelo ya nse ya ndako na bingbongolo ya bambuma, katini ya mbala ya sukali, na milona mosusu ya kokanga na zelo, ebele to ngomba ya saki ya mbuma ya mbala, wandu, masango, madesu mpe bongo na bongo ebombami oyo etondisaki mitalaka na bango. Atindaki bana na ye batanga Biloko binso na bokebi mpe boye bakendaki na bibombelo komeka koyeba motango boni ya kilo ya matungulu mpe bambuma ya mike mike bazalaki na yango na ebombelo. Batangaki ngombe, ngulu, soso, dendo mpe mabata. Tata na bango alobaki ete alingaki komona lolenge boni libota na ye ezalaki malamu, kasi basosolaki ete alingaki na bosolo mpenza koyeba, na libaku ya mokolo wana ya eyenga, boni na lolenge ya bozwi Nzambe apambolaki bango mpe apesaki mbano na bangonga na bango ya mosala. Na nsuka ntango bafandaki na lipati oyo mama na bango alambelaki bango, mapamboli ezalaki eloko ya koyoka mpenza na nzoto.

Gordon alakisaki, nzokande ete Eyenga ya Bozongisi matondi oyo akundolaka mingi koleka manso na kozongisaka matondi ezalaki mbula oyo emonanaki ete bazalaki na eloko te mpo na botondi.

Mobu yango ebandaki malamu: Bazalaki na matungulu na ayi etikali, milona mingi, bangulu mingi mpe tata na bango azalaki na mwa mosolo ya kotia mpembeni mpo ete mokolo moko akoka kosomba danki ya komema matiti—masini moko oyo basali banso ya ebokolelo balotaka kozwa yango. Ezalaki mpe mobu lotiliki eyaki na engumba na bango—atako epai na bango te, mpo bakokaki te kofuta yango. Ezalaki mpe mobu oyo lotiliki eyaki na engumba na bango—atako ekomaki epai na bango te, mpo bakokaki te kofuta yango.

Butu moko ntango mama ya Gordon azalaki kosukola bilamba mingi, tata na ye akotaki mpe azwaki esika na ye ya bosokoli bilamba mpe asengaki mwasi na ye apema mpe atonga na motonga. Alobaki ete, “ozali kolekisa ntango mingi na kosukola bilamba koleka na kolala. Ozali kokanisa ete tosengeli kozonga nsima mpe kozwa lotiliki?” Atako atondisamaki na esengo na likanisi wana, abimisaki litanga ya mpinzoli moko to mibale wana ekanisaki ye na ntina ya masini wana oyo ekosombama lisusu te.

Boye nsinga ya lotiliki elekaki likolo na nzela na bango mobu wana. Atako ezalaki eloko ya kokamwa te, bazwaki masini ya kosokola bilamba oyo ezalaki kosala mokolo mobimba yango moko mpe minda ya lotiliki miye mizalaki kodiembela na palafo moko na moko. Minda ya kotondisa na mafuta ezalaki lisusu te, bansinga ya mwinda ya kokata mpe te, mombunda ya kati ya ndako ya kosukola mpe te. Minda milimwaki nie na ebombelo.

Boyei bwa lotiliki na ebokolelo na bango ezalaki lokola eloko ya malamu ya nsuka oyo esalemaki mobu mona. Kaka ntango milona to bambuma na bango ezalaki penepene na kobima uta na mabele, mbula ebandaki konoka. Ntango mbula ebetaki lisusu te, milona mitikalaki ata epai moko lisusu te. Balonaki lisusu, kasi mbula mingi ebetelaki milona mpe mbuma kati na mabele. Mbala na bango epolaki na potopoto. Batekaki bangombe mibale mpe bangulu nyonso mpe biloko balingaki kobomba mpo na kobikela, kozwaka ntalo ya nse mpenza mpo na yango mpo bato banso basusu basengelaki kosala ndenge moko. Nyonso balokotaki lokola mbuma ya bilanga mobu wana ezalaki mwa eteni ya mabele ya karoti oyo ebikisamaki na mbula ya mipepe makasi.

Nsima ezalaki lisusu Eyenga ya Bozongisi matondi. Mama na bango alobaki, “Mbele malamu tobosana na biso yango mbula oyo. Tozali ata na libata moko etikali te.”

Na ntongo ya Eyenga ya bozongisi matondi, nzokande, tata ya Gordon amimonisaki na lapin ya mobali mpe asengaki balamba yango. Na koyima-yima wana abandaki mosala, kolakisaka ete ekozwa ntango mingi kolamba eloko wana ya makasi mpe oyo enuna. Ntango etiamaki suka- suka na mesa na karoti oyo etikalaki, bana baboyaki kolia. Mama ya Gordon agangaki, mpe nsima tata na ye asalaki eloko moko ya kokamwa. Akendaki na ebombelo ya biloko ya kala, akamataki mwinda ya mafuta amemaki yango na mesa mpe apelisaki yango. Ayebisaki bana baboma mwinda ya lotiliki. Ntango bazalaki bobele na mwinda ya mafuta, bakokaki te kondima ete ndako ezalaka molili ya ndenge wana liboso. Bamitunaki ndenge nini bakokaki te komona eloko moko soki na mwinda ngaa ya lotiliki te.

Bapambolaki bilei, mpe moto na moto aliaki. Ntango elambo esilaki, bango banso bafandaki nie. Gordon akomaki boye:

“na mwa pole ya molili ya bomikitisi ya mwinda ya kala tobandaki komona polele lisusu. …

Ezalaki elambo moko kitoko. Lapin ya mobali wana ezalaki elengi lokola dendo, mpe karoti ezalaki ndenge wana koleka ete tokoki kokundola yango lisusu. …

“… ndako [na biso] … , mpo na bozangi na yango, ezalaki ya bozwi mingi epai [na]biso.”13

Bandeko ba ngai mibali mpe basi, kozongisa botondi ezali eloko ya ngolu mpe lokumu; kosalela botondi ezali motema malamu mpe monene; kasi kozala ntango na botondi na mitema na biso ntango nyonso ezali kosimba lola.

Wana ezali ngai kokanga mayangani ya ntongo oyo, ezali losambo na ngai ete mpo kobakisaka na nyonso mosusu mpo na oyo tozali na botondi, tokoki ntango nyonso koluka kolakisa botondi na biso epai ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nsango malamu na ye ya nkembo ezali kopesa biyano na mituna minene koleka minso ya bomoi: Towutaki wapi? Mpo na nini tozali awa? Milimo na biso ekendeka wapi ntango tokufi? Nsango malamu wana ememaka na baoyo bazali kati na molili pole ya bosolo ya bonzambe.

Ateyaki biso lolenge nini kosambela. Ateyaki biso lolenge nini kotambwisa bomoi bwa biso. Ateyaki biso lolenge nini ya kokufa. Bomoi na Ye ezali libula ya kosangola ya bolingo. Bakoni Abikisaki bango; bato babukani Atombolaki bango, basumuki Abikisaki bango.

Na nsuka, Asekwaki ye moko. Boko Bapostolo batiaki ntembe; moko atekaki Ye. Basoda ya Loma bapasolaki mopanzi na Ye. Ebele ya bato ya nkanda balongolaki bomoi bwa Ye. Nzokande kuna uta na Gologota maloba ma Ye ya mawa mayokanaki, “Tata, limbisa bango; mpo bazali koyeba te nini bazali kosala.”14

Nani azalaki “Moto oyo ya mawa, … oyo amesenaki na mpasi”?15 “Nani azali Mokonzi oyo ya nkembo,”16 Nkolo oyo ya bankolo? Azali Molakisi na biso. Azali Mobikisi na biso. Azali mwana ya Nzambe. Azali Mosali ya lobiko na biso. Azali kobianga na kolakisaka nzela ete, “Bolanda ngai.”17 Ateyaka ete, “Bokende, mpe bosala motindo moko.”18 Abondelaka ete, “Bobomba mitindo mya ngai.”19

Tika tolanda Ye. Tika tomekola ndakisa na Ye. Tika totosa maloba na Ye. Na kosalaka bongo, tozali kopesa Ye likabo ya bonzambe ya Botondi.

Losambo na ngai ya solo, ya motema ezali ete tokoka, na bomoi na biso ya moto moko moko, kolakisa bolamu ya kitoko oyo ya botondi. Tika ete eyingela milimo nyonso, sikawa mpe libela na libela. Na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, Amene.

Matangi

  1. John Thompson, “Birthday Party,” Teaching Little Fingers to Play (1936), 8.

  2. Luka 17:11–19.

  3. Mateya ya Gordon B. Hinckley (1997), 250.

  4. Tala Matai 1532–38; biso nde tobeti sete.

  5. Masikulu ya Epictetus; na Encheridion mpe biteni, trans George Long (1888), 429.

  6. Doctrine and Covenants 59:7, 21.

  7. Alama 34:38.

  8. Cicero, na A New Dictionary of Quotations on Historical Principles, sel. H. L. Mencken (1942), 491.

  9. Joseph F. Smith, Gospel Doctrine, 5th ed. (1939), 263.

  10. Aldous Huxley, Themes and Variations (1954), 66.

  11. William H. Davies, The Autobiography of a Super-Tramp (1908), 4.

  12. William Arthur Ward, na Allen Klein, comp., Change Your Life (2010), 15.

  13. Emekolami uta na H. Gordon Green, “The Thanksgiving I Don’t Forget,” Reader’s Digest, Nov. 1956, 69–71.

  14. Luka 23:34.

  15. Yisaya 53:3.

  16. Njembo 24:8.

  17. Matai 4:19.

  18. Luka 10:37.

  19. Yoane 14:15.