2010
Makambo ya Motuya Koleka Manso
sánzá ya zómi na mɔ̌kɔ́ 2010


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya zomi na moko 2010

Makambo ya Motuya Koleka Manso

Soki bomoi mpe etamboli na yango ya mbango makasi mpe mabanzo mingi esalaki ete ekomeli yo mpasi koyoka esengo, boye mbala mosusu sikawa nde ezali ntango malamu ya kotala lisusu na ntina ya maye mazali motuya koleka manso.

Ezali komonana polele polele boni tokoki koyekola na ntina ya bomoi na koyekolaka molongo. Ndakisa, bato ya mayele bakoki kotala na bambuma ya nzete mpe kosala bokanisi ya mayele na ntina ya eleko mpe bizalela ya bokoli bambula nkama to kutu nkoto eleka kala. Moko ya biloko toyekolaka uta na boyekoli ya bokoli bwa nzete ezali ete na bilekowapi makambo manso mazali malamu, nzete ekolaka na lolenge ekokanikokoka. Nzokande, na bileko ntango makambo manso ezali malamu te, nzete ekitisaka bokoli bwa bango mpe epesaka makasi na yango na biloko ya ntina oyo esengeli mpo na kotikala na bomoi.

Na esika oyo boko kati na bino bakoki kokanisa ete, “Oyo ezali nyonso kitoko mpe malamu mpenza, kasi ekokani na nini na kokumba mpepo?” Malamu, tika nayebisa bino.

Esili bino komata na mpepo mpe koyoka boningani na yango? Ntina ya momesano koleka nyonso ya boningani ezali mbongwana ya mbalakata na botamboli bwa mopepe kosalaka ete mpepo emata, ekita, mpe ebaluka-baluka. Atako mpepo esalami mpo na kotelemela ata boningani ya makasi koleka eloko nyonso oyo okokutana na yango na mpepo ya mokolo na mokolo, ekoki kaka kozala likambo ya mpasi mpo na bato oyo bazali kati na mpepo.

Nini bokanisi bakumbi mpepo basalaka ntango bakutani na boingani? Moyekoli mokumbi mpepo akoki kokanisa ete komatisa mbangu ezali nzela ya mayele malamu mpo ekosalisa bangokolekaboningani yango na lombango. Kasi oyo ekoki kozala eloko ya mabe ya kosala. Bakumbi ya mpepo oyo bayebi mosala basosolaka ete ezali na mbango eyebana mpo na koleka boningani oyo ekokitisa mabe maye makowuta na boningani wana. Mpe mbala mingi oyo elingi koloba kokitisa mbango na yo. Mobeko se moko oyo etali mpe mabulu o nzela.

Boye, ezali toli malamu mpo na kolembisa (kokitisa) mwa moke, kotala nzela, mpe kotia mayele na makambo ya ntina ntango ozali kokutana na makama.

Etamboli ya Bomoi na Mikolo Oyo

Oyo ezali liteya ya pete kasi ya mpasi mpo na koyekola. Ekoki komonana lokola likambo ya mayele ntango tozali kolobela nzete to mbonga, kasi ekamwisaka boni ezali pete bato bazanga koyeba liteya liye ntango ekomi na kosalela mibeko oyo na bomoi bwa biso ya mokolo na mokolo. Ntango ndelo ya bobendani emati, ntango mayele ebandi kosila, ntango likama ya somo ebeti, mbala mingi tomekaka kokoba na etamboli ezanga elikya se moko wana to kutu kobakisa mbangu, kokanisaka ete mingi tokomatisa mbangu ya etamboli na biso koleka, malamu koleka nde nde kozala mpo na biso.

Moko ya bizaleli ya bomoi ya mikolo oyo ezali komonana lokola ete tozali kotambola na lombangu ya komataka moko namona naino te, atako boningani to mabaku.

Tika tozala na bosembo; ezali mwa pete kozala na eloko ya kosala. Tokoki banso kokanisa liste moko ya misala miye mikotondisa ntango ya manaka na biso. Boko bakoki kokanisa ete bobongi bwa bango mei bofandisami na bolai ya liste na bango ya maye basengeli kosala. Batondisi libanda ya masano na ntango na bango ya bopemi na listes ya makita mpe mbando ya makita—kutu ata na ntango ya bobendani mpe ya bolembu. Mpo bazali kokomisa bomoi bwa bango na mikakatano ezanga ntina, bazali mingi mingi koyoka bobangi komataka, esengo kokitaka, mpe ntina moke mpenza ya ndimdola ya bomoi bwa bango.

Balobaka ete soki bolamu songolo elekisi ndelo ekoki kokoma bobe. Kotondisaka mikolo mya biso na makambo ebele ya kosala ekolongisa biso solo na likambo oyo. Ekokoma na esika moko wapi likambo ya monene na bomoi ya moto ekoki kokoma libanga monene mpe mposa, bozito monene na kingo na biso.

Nzela ezali Nini?

Bato ya bwania basosolaka mpe basalelaka mateya ya palata ya nzete mpe mole ya mopepe. Batelemelaka masenginia ya kozwama na lombangu makasi ya bomoi mokolo na mokolo. balandaka toli ete “Ezali na mingi na bomoi koleka kobutisa lombango na yango.”1 Na mokuse, Batiaka mayele na bango na makambo ya motuya koleka manso.

Mpaka Dallin H. Oaks, na likita linene ya sika, ateyaki ete, “Tosengeli kotika boko makambu na ntina ya kopona mosusu oyo ezali malamu koleka to malamu koleka manso mpo ezali kokolisa bondimi na Nkolo Yesu Klistu mpe kolendisa mabota.”2

Boluki ya makambo ya malamu koleka manso ememaka na ntembe te na mateya ya ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto—bosolo ya pete mpe ya kitoko oyo ebimisamaki biso na Tata na Lola moko mobateli, seko, mpe moyebi ya nyonso. Biteni ya motuya ya malongi mpe mibeko oyo, atako pete mpenza mpo ete mwana asosola, izali kopesa biyano na mituna ya makasi ya bomoi.

Ezali na kitoko moko mpe polele oyo ewutaka na bopete oyo toyebaka kososola te kati na mposa na biso ya biyano ya mpasi na kososola.

Ndakisa, ezalaki kalate nsima ya bozongi mobembo na likolo nzinganzinga ya mabele baastolonoti mpe bakosmonoti nde basosolaki ete biki ya motu songe na mbuma ekomaka te na likolo. Mpe boye bato ya mayele makasi bakendeki mpo na kobongisa likambo yango. Ezwaki nkoto ya ntango mpe bifuku ya dollars, kasi na suka, bamonaki biki oyo ekoki kokoma bisika binso, na molunge to na mpio, mpe pene likolo ya bisika binso. Kasi boniboni baastolonoti mpe bakosmonoti bakobaki kino babongisaki likambo yango? Bazalaki kosalela na pete kilio.

Maloba mawuti na Leonardo da Vinci kolobaka ete, “bomikitisi ezali ndakisa ya mayele makasi.”3 Ntango tozali kotalela mibeko ya motuya ya mwango ya esengo, mwango mwa lobiko, tokoki kotikola mpe koyeba kososola na bofuluki mpe bomikitisi na yango limpombo mpe kitoko bwania ya Tata wa biso na Lola. Nsima, kobalusaka banzela na biso epai na oyo ya Ye ezali ebandeli ya buania.

Nguya ya Makonzi

Ezali na lisolo oyo ebetamaka ete molakisi ya ndembo ya makolo ayebana Vince Lombardi oyo azalaki kosala molulu moko mokolo ya yambo ya bomilengele na masano ya ndembo. Akotombola ndembo likolo, akolakisa yango na basani baye bazalaki kobeta ndembo mibu mingi mileki, mpe akoloba boye, “Bilenge mibali, … oyo ezali ndembo!” Azalaki kolobela na ntina ya bonene mpe lolenge na yango, boniboni ekoki kobetama, komemama, to kolekisama. Azalaki komema ekipi na libanda ya masano ezanga bato mpe azalaki koloba ete, “Oyo ezali libanda ya masano.”

Atambwisaki bango nzinganzinga, kolimbolaka ntaka, lolenge, mibeko, mpe boniboni lisano libetamaka.4

Molakisi oyo ayebaki ete ata kutu babeti ndembo ya kala oyo, mpe boye ekipi, bakoki kokoma monene kaka na kokangaka o motema makambo ya motuya. Bakokaki kolekisa ntango na bango koyekolaka biteni ya kobeta ya mpasi, kasi bakokoma ekipi oyo elongi momekano mobimba te, kino bakangi malamu mateya ya ntina ya ndembo.

Nakanisi mingi kati na biso basosolaka na mosuni boniboni mateya ma ntina mazalaka monene. Ezali kaka ete kotiama ntango mosusu makanisi libanda na makambo ebele koleka oyo emonanaka ya kondimisa koleka.

Buku to mikanda eniatama, bisaleli ya bopanzi nsango ya ndenge na ndenge, bisaleli ya elekitonika mpe masini mike mike—ya ntina nyonso soki te esalelami na malamu ekoki kokoma masano ya mpasi to bandako ya bokabwani oyo ekopesa mpasi na motema.

Nzokande, na kati ya etuluku ya mingongo mpe maponi, Moto na Galilea ya bomikitisi atelemi na maboko masembolami, kozelaka. Ya Ye ezali etinda moko ya pete: “Yaka, kobila ngai.”5 Mpe alobaka na ye na lolaki ya makasi te kasi na mongongo moko ya nse, ya moke.6 Ezali pete mpenza mpe ete etinda ya ntina ya nsango malamu ebungisama na katikati ya mpela ya bansango oyo ezali kobeta biso uta bipai na bipai.

Makomi masantu mpe liloba ya baprofeta ya bomoi ibeti sete na mibeko mia ntina mpe ya nsango malamu. Ntina tozongeli mibeko mya ntina iye, na malongi ya solo, ezali mpo ete ezali ekuke ya bosolo ya ndimbola ya bozindo. Ezali ekuke oyo ezali komema na boyebi ya motuya ya lokumu boye soki bongo te alingaki koleka makoki ma biso ya kososola. Mibeko ya pete, ya ntina miye izali fungola mpo na kotambwisa bomoi na boyokani na Nzambe mpe moto. Izali fungola mpo na kofungola maninisi ya lola. Ikambaka biso na kimia, esengo, mpe kososola oyo Tata ya Lola alakelaki bana ba Ye baye bayokelaka mpe batosaka Ye.

Balingami bandeko ba ngai babali mpe basi ba bolingo, tokosala malamu na kolembisa mwa moke, kokoba na ndelo ya lombango endimama mpo na bizaleli na biso, kotia mayele na oyo ezali ya ntina, kotombola miso ma biso, mpe na solo komona makambo ma motuya koleka manso. Tika tokanisa na ntina ya mibeko ya likonzi Tata wa biso na Lola apesi bana ba Ye miye mikofandisa likonzi ya bomoi ya kufa moko ya bozwi mpe bofuluki na bilaka ya seko. Ikoyeta biso kosala “makambo maye manso … na bwania mpe na molongo; mpo esengeli te ete [to] kima mbangu koleka makasi [na biso]. [Kasi] elongobani ete [to] zala na etingia, [mpe] na yango … kozwa lifuta.”7

Bandeko babali mpe basi, kosalaka na etingia makambo maye mazali motuya ekokamba biso na Mobikisi ya Mokili. Yango wana “tokolobela Klisto, tokosepela Klisto, tokoteya Klisto, tokobikola Klisto … ete tokoka koyeba o liziba kani [to] koluka bolimbisi bwa masumu ma [biso].”8 Kati na makambo minene, mobulu, mpe lombango ya bomoi bwa ntango ya sika, oyo ezali “njela oyo eleki yonso na malamu.”9

Boye Makonzi Mazali Nini?

Wana ezali biso kotala Tata wa biso ya lola mpe koluka bwania Ye mpo na makambo maye mazali ma motuya, tozali koyekola mpe koyekola lisusu monene ya makangano ya ntina minei: Na Nzambe wa biso, na mabota ma biso, na baninga mpe na biso mei. Wana ezali biso kotala motuya ya bomoi bwa biso na motema moko ya bolingi, tokomona wapo epai topengui uta na nzela malamu koleka mpenza. Miso mya biso ya bososoli bwa biso mafungwama, mpe tokitokola nini tosengeli ya kosala mpo na kopetola motema na biso mpe kotala malamu lisusu bomoi bwa biso.

Yambo, mokangano mwa biso na Nzambe ezali ya bule mpe ntina monene koleka nyonso. Tozali bana ba Ye ba molimo. Azaki Tata wa biso. Alingi esengo na biso. Wana ezali biso koluka Ye, wana ezali biso kooyekola na ntina ya Mwana wa Ye, Yesu Klisto, wana ezali biso kofungola mitema mya biso na bopangana ya Molimo Mosantu, bomoi bwa biso ekokoma na kimia mpe bokengi koleka. Tokozwa kimia, esengo, mpe bofuluki monene koleka wana ezali biso komipesa mpo na kontambwisa bomoi engebene na mwango ya seko ya Nzambe mpe kobatela mitindo mya Ye.

Totambwisaka mokangano mwa biso na Tata wa biso ya Lola na koyekolaka na ntina na Ye, na kozalaka bomoko na Ye, na koyambolaka masumu ma biso, mpe na kolandaka na makoki nyonso Yesu Klisto, mpo“Moto akokoma epai na Tata te soko na[ Klisto] te.”10 Mpo na kolendisa mokangano mwa biso na Nzambe, tozali na mposa ya kozala na ntango ekoki biso mei elongo na Ye. Kofandisa makanisi na kimia kati na losambo la moto na moto mokolo na mokolo mpe bayekoli makomi, kolukaka mbala na mbala kozala ya kolongobana na ntina ya mokanda mpo na tempelo maye makozala boko ya bolatisi ya ntango mpe bokasi mpo na kopusana pene koleka na Tata wa biso ya Lola. Totia bokebi na libiangi ya Njembo: “Jala nye mpe yeba ete ngai najali Njambe.”11

Mokangano ya ntina ya mibalee ezali elongo na mabota ma biso.12

Mpo “ezali na elonga moko mosusu te oyo ekoki kozwa esika ya bokwei” azali, tosengeli kotia mabota na biso maleka na esika ya liboso mpenza. Totongaka mokangano mwa libota ya bozindo mpe bolingo na kosalaka makambo mike mike elongo, lokola kolia lipati na libata mpe losambo ya mpokwa ya libota mpe na kosakanaka elongo. Na mokangano ya libota bolingo ekomami mpenza n-t-a-n-g-o, ntango. Kozwaka ntango mpo na moko mpe mosusu ezali fungola mpo na boyokani na ndako. Tosololaka na, na esika ya kosolola na ntina ya, moko mpe mosusu. Toyekolaka uta moko mpe mosusu, mpe toluka koyeba bokeseni bwa biso lokola mpe bokokani bwa biso. Tofandisi nsinga ya bonzambe na moko na mosusu wana ezali biso kobelema na Nzambe na nzela ya losambo ya libota boyekoli nsango malamu, mpe losambo ya Eyenga.

Mokangano ya ntina ya misato oyo tozali na yango ezali na moninga na biso. Totongaka mokangano oyo moto moko na ntango moko—na kozalaka na liyoki na mposa ya basusu, kosalelaka bango, mpe kopesaka bango ntango mpe batakanta na biso. Nabetamaki motema makasi na ndeko mwasi moko oyo aniokwamaki na mokumba uta na mikakatano ya mubange mpe bokono kasi azwaki mokano ete atako akokaki kosala mingi te, akoki koyoka. Mpe mposo moko moko azalaki kokengela bato baye bazalaki kotengetenga to kolemba, mpe alekisaki ntango elongo na bango, koyokaka bango. Lipamboli nini azalaki na bomoi ya bato mingi mpenza.

Mokangano ya ntina ya minei ezali na biso moko. Ekoki komonana kokamwa mpo na kokanisa na ntina ya kozalaka na mokangano ya biso mei, kasi tozali. Boko bato bakoki kozala na mokangano na bango mei te. Bakomitongo mpe komimona moke mokolo mobimba kino babandi komiyina. Tika na pesa likanisi ete olembisa lombango mpe ozwa mwa ntango moko likolo mpo na komiyeba yo mei malamu koleka. Tambola na zambe, tala bobimi bwa moyi, sepela ma bikela bia Nzambe, sosola bosolo ya nsango malamu oyo ezongisami, mpe luka koyeba nini ilingi koloba mpo na bomoto na yo. Yekola komimona lokola Tata ya Lola amonaka yo—lokola mwana mwasi na Ye ya motuya to mwana mobali na makoki ya bonzambe.

Sepela kati na Nsango malamu ya petwa.

Bandeko babali mpe bandeko basi, tika tozala na bwania. Tika tobaluka epai ya mayi ya malongi ma petwa ya nsango malamu oyo ezongisami ya Yesu Klisto. Tika tomela yango na esengo na pete mpe polele na yango Lola ifungwami lisusu. Nsango malamu ya Yesu Klisto ezali lisusu na mabele, mpe bosolo ya pete na yango izali liziba etonda na esengo!

Bandeko babali mpe bandeko basi, boye tozali na ntina monene ya kosepela. Soki bomoi mpe etamboli na yango ya mbangu mpe mitungisi ebele ekomi ikomisi yango mpasi mpo na biso koyoka esengem boye ntango mosusu sikawa ezali ntango malamu ya kotala malamu na ntina ya nini izali motuya koleka manso.

Bokasi eyaka na lisano ya esengo makasi te kasi uta na kofandisama likolo ya moboko mwa ngwi ya bosolo mpe ya pole. Eyaka na kotika makanisi mpe bokasi bwa biso likolo ya makonzi ya nsango malamu oyo ezongisami ya Yesu Klisto. Eyaka uta na kotiaka bokebii na makambo ma bonzambe maye mazali motuya koleka.

Tika tokomisa bomoi bwa biso pete mwa moke. Tika tosala mbongwana oyo esengeli mpo kotala lisusu malamu bomoi bwa biso likolo ya kitoko ya lokumu ya oyo ezali pete, nzela ya bomikitisi ya kiboklisto—nzela oyo ekambaka mbala na mbala epai ya bomoi moko ezali na ndimbola, esengo, mpe kimia. Mpo na eye nasambeli, wana ezali ngai kotikela bino mapamboli ma ngai, o nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Mahatma Gandhi, in Larry Chang, Wisdom for the Soul (2006), 356.

  2. Dallin H. Oaks, “Good, Better, Best,” Liahona, Nov. 2007, 107.

  3. Leonardo da Vinci, na John Cook, comp., The Book of Positive Quotations, 2nd ed. (1993), 262.

  4. Vince Lombardi, na Donald T. Phillips, Run to Win: Vince Lombardi on Coaching and Leadership (2001), 92.

  5. Luka 18:22.

  6. Tala 1 Mikonji 19:12.

  7. Moziya 4:27.

  8. 2 Nefi 25:26.

  9. 1 Bakolinti 12:31; Etele 12:11.

  10. Yoane 14:6.

  11. Njembo 46:10.

  12. J. E. McCulloch, Home: The Savior of Civilization (1924), 42; tala lisusu Conference Report, Apr. 1935, 116.