2010
Mbotama ya Yesu Klisto ya misionele
sánzá ya zómi na míbalé 2010


Bolenge

Mbotama ya Yesu Klisto ya misionele

Na eleko ya Mbotama ya Yesu Klisto na ngai ya mibale wana ngai misionele ya ntango mobimba, moninga na ngai ya misio mpe ngai tozalaki kokende kotala mondimi moko oyo abatisamaki kala mingi te mpe libota na ye. Nsima ya kolia bilei ya balambaki mpo na Mbotama ya Yesu Klisto, tokabolaki na bango etinda ya Mbotama yango.

Tosengaki bato ya libota bayemba bilili ya biloko biye bizali kokundola bango eleko yango, ndakisa minzoto, mabonza, mimeseno ya eleko, mpe banzete na yango. Nsima totangaki book makomi, kati na maye 2 Nefi 19:6: Zambi mpo na biso mwana mobali moko abotami, mpo na biso mwana mobali moko apesami; mpe mbula-matari ekozala likolo ya lipeka lya ye; mpe nkombo na ye ekobiangama, Mokamwisi, Mopesi toli, Nzambe wa Bokasi, Tata ya Libela, Mwana Mokonzi ya Kimia. Toyembaki “Mokolo moko na Engumba Mokonzi ya Dawidi” Nzembo, no. 205),totalaki bilili na etando moke na ntina ya Mbotama, mpe topesaki litatoli na ntina ya Yesu Klisto.

Ezalaki eleko moko ya Mbotama ya Yesu Klisto ya makambo makasi te, mosika uta na mabota na biso mpe mosika na kosepela eyenga ya Mbotama ya Yesu Klisto lokola momeseno, kasi lokola topesaki litatoli na ntina ya Mobikisi, nayokaki bolingo ya mozindo mpe matondi na biso mpo na Ye mpe mbotama na ye koleka oyo nayebaki liboso. Nasosolaki ete ekozala eleko na ngai ya nsuka ya Mbotama ya Yesu Klisto na mosala na ngai epai ya Tata na Lola lokola misionele ya ntango mobimba, kasi nasosolaki ete Molimo na Ye ekokaki kotatola na ngai mpo na Mwana na Ye bipai nyonso nazwami.