2010
Mokumba na biso mpo na Kosala mosala ya Tempelo mpe Bonkoko ya Libota.
sánzá ya zómi na míbalé 2010


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, sanza ya Zomi na mibale 2010

Mokumba na biso mpo na Kosala mosala ya Tempelo mpe Bonkoko ya Libota.

Yekola mateya oyo mpe, na lolenge ekoki, solola na ntina na yango na bandeko basi oyo otalaka. Salela mituna mpo na kosunga yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kokomisa Lingomba ya Bamama Basungi eteni moko ya bomoi na yo.

Elilingi
Relief Society seal

Bondimi • Libota • Lisungi

Bikeko bisili koleka bato mingi bakufaki na kozangaka boyebi ya nsango malamu. Boko bato oyo wana bazali bandeko na yo na penepene mpe na mosika Bazali kozela ete osala boluki-luki oyo esengeli mpo na kosangisa mabota na bino esika moko mpe kosala makuli ma lobiko mpo na bango.

Mingi koleka ya batempelo ya mokili ezali na mosala mingi te ya kosala Nkolo alakaki ete mitema na bino mikobaluka epai ya batata ete mabele mabebisama nie na boyei na Ye te (tala D&C 2:2–3).

Ezali na mapamboli mpo na moto moko moko oyo bokozwa lokola mbano ya mosala na bino na tempelo mpe bonkoko ya libota. Moko ya maye ezali esengo oyo bozali koyoka ntango bozali kosalela baboti na bino. Lipamboli mosusu ezali ete okoki kozwa mokanda ya kokota na tempelo, oyo elingi kolakisa bolongobani na yo liboso ya Nkolo. Baoyo balongobani naino lelo mpo na kozwa litomba ya kozwa moakanda ya kokota na tempelo te basengeli kosala elongo na episikopo to mokambi ya etape mpo na kolonga noki nyonso lokola akoki kozwa yango. Tosengi kozala moto oyo azangi bokoki monene oyo te. Natatoli ete bomikabi ezali solo mpe ete masumu makoki kolimbisama na koyambolaka na lolenge elongobani.

Wana ezali biso kosala mosala ya tempelo mpe bonkoko ya libota, toyebi malamu tozali na Molimo mpo na kolendisa biso na mikakatano na biso mpe kokamba biso na ntango ya kozwa mikano to bikateli ya minene. Tempelo mpe mosala ya bonkoko ya libota ezali eteni ya mosala na biso ya kopesa lisungi, to bosalisi, na bankoko ba biso moko.

Uta na Mambi ma kala ma Biso

“Profeta Joseph Smith alobaki ete, “Mokumba monene koleka minso kati na mokili oyo nzambe atii likolo na biso ezali koluka bakufi na biso” (History of the Church, 6:313). Uta na ebandeli, bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi basungaki mosala monene oyo. Na mobu 1842 na Nauvoo, mposa ya Sarah M. Kimball mpo na kosalisa basali oyo bazalaki kotonga etindaki na mbala moko liboke moko ya bandeko basi komibongisa bango moko mpo ete bakoka kosala mosala na bango malamu mingi koleka. Lokola babandaki kokutana, profeta … abongisaki Lingomba ya Bamama Basungi ya yambo na emekoleli ya bonganganzambe. Banda ntango wana kokende liboso, bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi basalisaki mpo ete mosala ya Tempelo ya Nauvoo ekende liboso. …

“Na 1855, mibu mwambe nsima ete Basantu bakoma na Utah, Ndako ya Kolatisama na Molimo etiamaki. Eliza R. Snow, oyo azalaki moko ya basi ya yambo ya Lingomba ya Bamama Basungi mpe oyo abatelaki makundoli ya lingomba lina, abiangamaki na Mokambi Bringham Young na mobu 1866 kozala mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi. Ye mpe bandeko basi basusu bazalaki basali ya botongono kati na Ndako ya Kolatisama na Molimo. Nsima, lokola Tempelo ya St. George, Logan, mpe ya Manti esilaki kotiongama, bandeko basi oyo bakendeki na tempelo moko moko ete bakoka kosala mosala ya bakufi kuna.1

MATANGI

  1. Mary Ellen Smoot, “Bonkoko ya Libota: Mosala mwa Bolingo,” Ensign, Sanza ya misato 1999, 15.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lolenge nini ekoki ngai kosalisa bandeko na ngai ya basi koluka bankoko na bango mpe kosala makuli ya tempelo mpo na bango? Tala makambo mazali nzinga nzinga na ndeko mwasi moko moko wana ezali yo komanyola lolenge nini kopesa biyano na mposa na bango. Okoki komona ete mosala ya bonkoko ya libota ekoki mbala mingi kolendisa bandimi ya sika, baoyo bazongi, mpe baoyo balakisaka bolembi.

  2. Ntango nini mosala ya tempelo mpe bonkoko ya libota elendisaki ngai na mikakatano na ngai to kokamba ngai na ntango ya kozwa bikateli minene?

Mpo na kozwa bansango mingi, kende na site na biso www.reliefsociety.lds.org.