2011
Ndeko mobali, nasili komipesa
sánzá ya nsambo 2011


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Sambo 2011

Ndeko mobali, nasili komipesa

Bilenge mibali mibale batelemaki likolo ya mwa kifuku oyo ezalaki kotala epai na mai ma bongengi ya liziba ya mai ya langi ya bule. Oyo ezalaki liziba lya bozindi na mai mpo ya bato banso, mpe bandeko mibali yango bazalaki kolobela likambo oyo ya kopumbwa na mai—lokola se eloko bamonaki basusu kosala.

Atako balingaki banso mibale kopumbwa na mai, moko te andimaki kozala moto ya yambo. Bosando ya kifuku ezalaki ya likolo mpenza te, kasi mpo na bilenge mibali oyo, emonanaki lokola se molai na yango ezalaki se kokoma mingi ntango nyonso babandaki kongunzama liboso—mpe bazalaki noki kolemba nzoto mpo na kosala yango.

Suka suka, moko ya bandeko mibali oyo atiaki lokolo moko na nsonge ya kifuku mpe mokano na motema akendaki liboso. O ntango ena ndeko na ye ya mobali amimisanaki, “Mbele tosengeli kozela kino elanga ekoya nsima.”

Nzokande bopusi bwa nzoto ya ndeko mobali ya yambo, esilaki kobenda ye liboso. “Ndeko,” ezongisaki ye maloba, “nasili komipesa!”

Amizindisaki kati na mai mpe noki nyonso abimaki na bogangi ya elonga to iwooo. Ndeko mobali ya mibale alandaki sika-sika wana. Nsima, basekaki banso mibale na ntina ya maloba ma nsuka ya mwana mobali ya liboso yambo ya komibwaka kati na mai ete: “Ndeko, nasili komipesa.”

Bomipesi ezali mwa moke lokola komibwaka kati na mai. To omipesi to omipesi te To ozali kokende liboso to otelemi esika moko. Nzela ya bokati-kati ezali te. Banso tokutanaka na ngonga ya kokamata mokano oyo ebongwanaka eteni etikali ya bomoi na biso. Lokola bandimi ba Eklezia, tosengeli komituna, “Nakomibwaka na mai to nakotikala se ya kotelema na songe awa? Nakobwaka makolo nakende liboso to komeka koyeba soki mai mazali malili to te na nsonge ya misapi ya makolo?”

Boko masumu masalemaka mpo tosalaka mabe; masumu mosusu masalemaka mpo tosalaka eloko te. Kozalaka bobele lokola moto oyo amipesi na nsango malamu ekoki komema na bosisoi, bozangi esengo, mpe elindo. Oyo ekoki kosalema na biso te mpo tozali bato ya boyokani Tosalaka boyokani na Nkolo ntango tobatisami mpe ntango tokotaka na ndako ya Nkolo. Mibali basalaka boyokani na Nkolo ntango bakulisami na bonganganzambe. Eloko moko te eleki monene longola se kobatela bomipesi oyo tozwaki mpe tosalaki na Nkolo. Tika ete tomikundola eyano ya Laele mpe Lea epai ya Yakobo kati na Boyokani ya Kala. Ezalaki eyano ya pete kasi ya semba mpe elakisi bomipesi: “Oyo nyonso Nzambe alobeli yo, sala yango” (Genese 31:16).

Baye wana bazali lokola bato bamipesi bakoki kozela bobele se lokola kozwa mapamboli ma litatoli, esengo, mpe kimia. Maninisi ya lola makozala bobele se lokola ya kofungwama epai na bango. Ekozala yango te liboma ya kokanisa ete, “Nakomipesa mwa ndambo ya 50 na monkama sikawa, kasi ntango Klisto akomonana na Boyei ya Mibale, nde nakomipesa 100 na monkama”?

Bomipesi na biso epai ya Nkolo ezali mbuma ya bobongwami na biso. Komipesa na Mobikisi na biso mpe na Eklezia na Ye etongaka bomoto bwa biso mpe epesaka makasi na molimo mwa biso ete ntango tokutani na Klisto, Akoyamba biso mpe akoloba, “Bosali malamu, bino basali malamu mpe ya botongono” (Matai 25:21).

Bokeseni ezali kati na kokamata mokano mpe kosala mosala. Baoyo bazwaka se mokano ya komipesa bakoki kozwa mikalo na ntango nyonso. Baye bamipesaka mpenza babundaka na mitungisi na bango na lolenge ekoki mpe bamilobelaka ete. “Iyo, ekozala eloko malamu ete nalekisa ntango, kasi kino nasalaki mayokani, mpe bongo nakosala nini namipesaki kosala.” Balukaka kati na makomi mpe na makasi basengaka bokambi ya Tata na bango ya Likolo. Bandimaka mpe bakumisaka mabiangi na bango ya Eklezia. Bakendaka na makita na bango. Basalaka mateya na bango to bakendaka kotala mabota mapesami na bango.

Lisese moko ya Balemani elobi ete, “Bilaka ezalaka lokola sanza oyo ebimi nyonso mobimba. Soki bibatelami mbala moko te, bikitaka mokolo na mokolo.” Lokola bandimi ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka, tosili komipesa mpo na kotambola na nzela ya bayekoli. Tokamataki mokano ya kolanda ndakisa ya mobikisi na biso. Kanisa lolenge nini mokili mokopambolama mpe mokobongwana mpo na bolamu soki bandimi banso ba Eklezia ya Nkolo bakangami na makoki ma bango ya—babongwami ba solo kati na mozindo mwa milimo na bango mpe bamipesi mpo na kotonga bokonzi bwa Nzambe.

Na lolenge moko to mosusu, moko moko kati na biso totelemaka na eteni moko ya kokamata mokano na kotalaka mai. Ezali losambo na ngai ete tokozala na bondimi, tokokende liboso, tokobunda na bobangi mpe ntembe na biso na mpiko, mpe komilobela ete, “Nasili komipesa!”

Koteya uta na Etinda Oyo

“Moko nzela ya kosalisa bayekoli kososola mibeko mya nsango malamu ezali ya komema bango basala bilili bango moko. Kosala bilili ekopesa bango nzela ya koluka bipai nyonso mpe ya kobimisa nini bososoli mpe bazali koyoka uta na masolo mpe mibeko mya nsango malamu” (Teaching, No Greater Call [1999], 166). Tala malamu lolenge nini kotanga likambo likomami awa, kosololaka mobeko mwa bomipesi na nsango malamu, mpe nsima kotunaka baoyo batombeli kosala bongo mpo na kosala bilili ya mosala moko ya nsango malamu oyo ezali kolakisa bomipesi. Bana mike bakoki koluka opesa makanisi mpo na oyo etali elili nini bakoki kosala.