2011
Yaka na Tempelo mpe Senga Mapamboli na Yo
sánzá ya nsambo 2011


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, sanza ya Sambo 2011

Yaka na Tempelo mpe Senga Mapamboli na Yo

Yekola liteya oyo, mpe na lolenge elongobani, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala kati na bomoi na yo.

Bondimi • Libota • Lisungi

Bandeko basi, topambolami koleka banso. Mobikisi azali na moto mwa Eklezia oyo. Tokambami na baprofeta oyo bazali na bomoi. Tozali na makomi masantu. Mpe tozali na batempelo mingi esantu epai nyonso na mokili wapi tokoki kozwa makuli masengeli mpo na kosalisa biso kozonga epai ya Tata wa bino na Likolo.

Yambo tokendeka na tempelo mpo na biso moko. “Ntina ya liboso ya tempelo,” elimbolaki Mpaka Robert D. Hales ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na babale, “ezali ya kopesa makuli masengeli mpo na bonetoli bwa biso kati na bokonzi bwa selesitiale. Makuli ma tempelo makambaka biso epai ya Mobikisi na biso mpe mapesaka biso mapamboli maye mayaka na biso o nzela ya Bomikabi bwa Yesu Klisto. Tempelo ezali biteyelo ya minene koleka nyonso ya boyekoli biye biyebani na moto, kopesaka biso boyebi mpe bwania na ntina ya Bokeli bwa mokili. Malakisi matali bolatisami na nguya ya molimo Mosantu epesaka bokambi mpo na koyeba lolenge nini tosengeli kokamba bomoi bwa biso awa kati na bomoto ya kufa. … Bokuli esalemi na molongo ya malakisi matali lolenge nini tosengeli kotambwisa bomoi mpe mayokani tosalaka mpo na kotambwuisa bomoi na lolenge ya sembo na kolandaka Mobikisi na biso.”1

Kasi mosala na biso ya tempelo esuki wana te. Mokambi Boyd K. Packer, Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na babale, ateyaki ete: “Kosalaka lokola bozweli mpo na moto moko oyo asili kokende na ngambo mosusu ya elamba, osengeli kotala lisusu malamu mayokani nini osalaki. Okolendisa na mayele ma yo mapamboli manene ma molimo maye makangami na ndako ya Nkolo. … Kati na mayokani mpe makuli nde efandisami mapamboli maye okoki kosenga kati na tempelo esantu.”2

Yaka na tempelo mpe yaka mbala mosusu nsima. Kosalaka mpe kobombaka mayokani ma tempelo ekobatela biso na nzela oyo ememaka na mapamboli manene koleka manso—bomoi bwa seko.

Na Barbara Thompson, mosungi ya mibale kati na bokambi bonene ya Lingomba ya Bamama Basungi.

Uta na Makomi

Yisaya 2:3; 1 Bakolinti 11:11; Emoniseli 7:13–15; Doctrine et Alliances 109

Uta na Mambi ma kala ma Biso

Profeta Joseph Smith alobelaki bandeko basi ba Lisanga ya Bamama Basungi mbala mingi na makita na bango. Wana ezalaki Tempelo ya Nauvoo kotongama, Profeta ateyaki bandeko basi malongi, kolengelaka bango kozwa boyebi mingi koleka o nzela ya makuli ma tempelo. Na 1842 alobaki na Mercy Fielding Thompson ete bolatismi na nguya ya molimo “ekobimisa bino uta na molili mpo na kokota na pole ya kokamwa.”3

Motango ya bato penepene na 6,000 ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka bazwaki makuli ma tempelo liboso ya bobimi na Nauvoo. Mokambi Bringham Young (1801–77) alobaki ete, “Lokola ezalaki basantu kolakisa motema moto mpo na kozwa makuli [ma tempelo], mpe koyoka motema pasi ezali bongo na ngambo na biso mpo na kosala yango, ete nasili komipesa ngai moko mobimba na mosala mwa Nkolo kati na Tempelo butu mpe moi, kokamataka ntango ya kolala koleka ngonga minei te, kozwa kati kati, na mokolo moko, mpe kokendeka ndako bobele mokolo moko na mposo moko.”4 Bokasi mpe nguya ya mayokani ma tempelo elendisaki Basantu wana etikaki bango engumba na bango mpe tempelo mpo na kosala mobembo epai wapi eyebanaki te.

Matangi

  1. Robert D. Hales, “Blessings of the Temple,” Liahona, Sanza ya zomi 2009, 14.

  2. Boyd K. Packer, The Holy Temple (1980), 170, 171.

  3. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 414.

  4. Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young (1997), 299.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Mayele nini ya mosala ekokabola ngai mpo na kolendisa baye wana nakendeka kotala kati na molende mwa bango ya “koya na tempelo”?

  2. Lolenge nini ekoki ngai kosenga mapamboli ma ngai ya tempelo?