2011
Bilaka bya Motuya bya Buku ya Molomoni
sánzá ya zómi 2011


Etinda ya Bokambi ya Yambo, Sanza ya Zomi 2011

Bilaka bya Motuya bya Buku ya Molomoni

Mibu mingi mileki natelemaki mpembeni ya tata moko ya elenge wana ezalaki ye kotepatepa katikati ya bomoi mpe liwa. Na kobangabanga mwasi wa ye mpe bana ba ye babale batelamaki penepene. Akamataki loboko la ngai mpe, na elongi ya kobondela, alobaki, “Episikopo, nayebi nazali penepene ya kokufa. Lobela ngai nini ekokoma na molimo mwa ngai ntango nakufi.”

Napesaki losambo moko ya nse ya mongongo mpo na bokambami mpe namonaki na mesa ya ye ya mpembeni ya mbeto mokanda moko ya makomi masanto. Nakamataki buku mpe napupolaki nkasa. Na mbalakaka namonaki ete nakangamaki, atako nasalaki makasi te, na mokapo 40 ya Alama na Buku ya Molomoni. Natangaki maloba maye epai na ye:

“Tala, eyebisamaki epai ya ngai na anzelu moko, ete milimo mya bato banso, sasaipi lokola milongwi uta o nzoto eye ya kufa, … bazongisami na Nzambe oyo apesaki banso bomoi.

“Mpe… milimo mya bango baye bazali sembo bakoyambama o bozali bwa esengo, boye bobiangemi paradizu, bozali boko bwa kimia, wapi bakopema uta o mobulu monso mwa bango mpe uta o litungisi linso, mpe mawa” (Alama 40:11–12).

Wana ekobaki ngai kotanga likambo etali bosekwi, bongengi boyaki na elongi ya elenge mobali mpe kosekaseka ebongisaki mbebo ya ye. Wana esukisaki ngai botali bwa ngai, nakabwanaki na libota liye ya kitoko.

Nsima namonaki mwasi mpe bana na matanga. Nakanisi lisusu na butu ena ntango elenge mobali moko abondelaki mpo ya bosolo mpe, uta na Buku ya Molomoni, ayokaki eyano na motuna mwa ye.

Na Buku ya Molomoni ewuti bilaka bisusu bya motuya, lokola bilaka bya kimia, bonsomi mpe mapamboli soki tokosalela “kaka Nzambe wa mboka, oyo azali Yesu Klisto” (Etele 2:12).

Na nkasa ya yango ewuti bilaka ya “esengo ekosuka mokolo moko te” epai na “bango baye babateli mitindo mya Nzambe. Mpo bampambolami o makambo manso, ma ntango mpe ma molimo lokola”(Moziya 2:41).

Na nkasa ya yango ewuti elaka ya “bosepeli… boyebani ntina te” epai na bango baye akomi “[bi]saleli o maboko ma Nzambe” na kosalisaka bana babali mpe bana basi ba Ye (Alama 28:8; 29:9).

Na nkasa ya yango ewuti elaka ete Yisalaele epanzana ekosangisama—mosala moko na kati na yango tozwami na nzela ya makasi na biso manene ma mokili mobimba ma misio (tala 3 Nefi 16; 21–22).

Na nkasa ya yango ewuti elaka ete lokola tosambeli na Tata o nkombo ya bule ya Yesu Klistu, mabota ma biso makopambolama (tala 3 Nefi 18:21).

Na boyekoli bwa nkasa ya yango ewuti bokokisi bwa elaka ya esakoli ete “ekoya o ntei ya bomoi bwa bino mpe o ntei ya ndako ya bino eteni ya kobakisa ya Molimo mwa Nkolo, mokano mwa kotambola na botosi na mitindo mya Ye, mpe litatoli ya makasi lya bosolo bwa bomoi bwa Mwana wa Nzambe.”1

Na nkasa ya Buku ya Molomoni ewuti elaka ya Moloni ete na nzela ya losambo, mokano mwa solo, mpe bondimi, tokoki koyeba bosolo bwa bilaka biye “na nguya ya Molimo Mosantu” (tala Moloni 10:4–5).

Elongo na baprofeta basusu ba mikolo mya nsuka misusu, natatoli mpo na oyo etali bosolo bwa eye “eleki sikisiki ya buku inso na mabele” 2 kutu Buku ya Molomoni, litatoli mosusu lya Yesu Klisto. Nsango ya yango ezingi mabele mpe ememi batangi ba yango na boyebi bwa bosolo. Ezali litatoli lya ngai ete Buku ya Molomoni ebongoli bomoi mingi. Ekoka moko na moko ya biso kotanga yango mpe kotanga lisusu yango. Mpe ekoka biso kokabola na esengo matatoli ma biso ma bilaka bya motuya bya bana ba Nzambe.

Matangi

  1. Gordon B. Hinckley, “A Testimony Vibrant and True,” Liahona, Aug. 2005, 6.

  2. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 64.

Koteya uta na Etinda Oyo

Na makomi “tokuti mibeko mya bosolo miye mikokangola mobulungani moko na moko mpe kpokoso moko na moko mpe bobendami epai na epai moko na moko eye mabota ma bato makokutana na yango” (Teaching, No Greater Call [1999], 51). Wana ekaboli bino etinda ya Mokambi Monson elongo na libota, bengisa bango bayokemela “bilaka bya motuya” bimonani na Buku ya Molomoni. Bokoki kokabola elaka yoko na Buku ya Molomoni eye ezali na ntina epai na yo.