2011
Soki Totii Ntembe Te
sánzá ya zómi 2011


Etinda ya Bamama Bateyi Batali, Sanza ya Zomi 2011

Soki Totii Ntembe Te

Julie B. Beck, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.

Yekola liteya oyo, mpe na lolenge esengeli, solola na ntina na yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala kati na bomoi na yo.

Bondimi • Libota • Lisungi

Na Buku ya Molomoni totangi mpo na oyo etali bilenge babali ba ndakisa baye bazalaki mpenza ba mpiko, nkonzo, mpe makasi. “Iyo, bazalaki bato ba solo mpe limemia, mpe bateyamaka kobatela mitindo mya Nzambe mpe kotambola alima liboso lya Ye” (Alma 53:21). Bilenge babali baye ba botongono bazongisaki longonia na bamama ba bango—ndakisa mpe bateyi ba bango.

Bamama ya babundi ba Elamani bawumelaki na ntango lokola ya biso te. Makambo ma bango mazalaki ya kpokoso mpe ya likama, mpe bilenge bazalaki kobiangema na kobatela bonsomi bwa bango bwa nzoto mpe bwa molimo. Lelo tozali kowumela na mokili wapi “tojali kobunda na mosuni mpe makila te, kasi na bisika na lokumu, mpe na nguya, mpe mikonji na mokili oyo na molili, mpe na milimo mabe kati na Likolo” (Baefese 6:12).

Ntango ya mikakatano igangi mpo ya baboti ya makasi mpe ndakisa baye bakoteyaka bosolo boye babundi ba Elamani bayebaki: “soki totii ntembe te, Nzambe akobikisa bango” (Alama 56:47). Koteyaka mpe kolakisaka ndakisa ya bosolo boye lelo esengi bokengi. Nzokande, tosengeli kobanga te. Ntango toyebi nani tozali mpe nani Nzambe azali mpe tosali mayokani elongo na Ye, biso—lokola bamama baye ba babundi—tokozala na nguya enene mpo na bolamu.

Emonani mingi mingi lokola, babundi 2.060 ba Elamani moko na moko azwaki nguya na mama moko. Kasi bamama baye basalaki bango moko te. Elongo na babali mpe basi basusu, bamama baye basengelaki kosangisa bondimi bwa bango mpe ndakisa ya bango mpo na koteya nguya ya mayokani. Bilenge ya mokolo mona basosolaki boyokani baboti ba bango basalaki ya kokende na etumba te. Mpe kutu ntango emonanaki ekoki kosalama te, Tata moko na Lola wa bolingo afungolaki nzela mpo ya baboti baye babatela boyokani bwa bango—mpe babomba bonsomi bwa bango (tala Alama 56:5–9). Biso lokola tosengeli kokumisa mayokani ma biso mpo ete bana mpe bilenge—bana ba bisomei mpe baye na palwasi ya biso, bitape, nzinganzinga, mpe mangomba basosola mpe basunga kobatela boyokani.

Ntango tokumisi mayokani ma biso, Tata na Lola akoki kolengela nzela mpo ya biso. Tosengeli kowumela na mayokani ma biso na sikisiki. Tokoki, na ndakisa, kozala sikisiki na losambo, na koyekolaka makomi, na kosimbaka mokanda ya sikawa mpo na tempelo, na kolataka na bosawa, na kokumisaka Saba. Wana esali biso boye, bana ba biso bakoyeba mpe bakokoka koloba, “Biso totii ntembe te ete bamama ba biso bayebaki yango” (Alama 56:48).

Basi Basantu ba Mikolo mya Nsuka baye bayebi ete bokasi bakowutaka na Bomikabi bwa Nkolo bakolembaka te ntango ya kpokoso mpe ya bolembisami. Lokola babateli ba boyokani, tozali kosala malamu mingi koleka na kosungaka, kokolisaka, mpe kobatelaka bana mpe bilenge mpo ete mokolo moko tokoka koloba etali nkola ya mikolo oyo, “Ete mokolo moko te namonoko mpiko enene boye, te o ntei ya banso” (Alama 56:45).

Uta na Makomi

Alama 53; 56–58

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Boniboni ekoki ngai kosalisa bandeko basi koyeba mpe kosala na nguya bazali na yango mpo na kozala na nguya na nkola ya mikolo oyo?

  2. Bofuli kani nakokuta na Buku ya Molomoni mpo na koyanola mikakatano nakutani na yango lelo?