2012
Tokambami na Profeta ya Bomoi
sánzá ya mísáto 2012


Bilenge

Tokambami na Profeta ya Bomoi

Ntango nazalaki na mibu 16, nazwaki libaku ya kokende na likita linene mpo na mbala ya yambo ngai moko. Libota na ngai ezalaki kofanda na Oregan ya westi, Etazini, mpe tozwaki motuka na Utah mpo na kokende na likita mpe kotika nkulutu na ngai ya mobali na Centre ya Boyekoli ya bamisionele.

Nakendeki na likita na mposa ya koteyama na Molimo Mosantu. Lokola mbano, nazwaki limonisi uta na Molimo liye nakokaki ntango mosusu kozwa te soki namilengelaka te.

O ntango ya moko ya mayangani, moto nyonso atelemaki mpe ayembaki loyembo ya bato banso, “Vers Sion, cité promise.” Wana ezalaki biso koyemba, nazwaki liyokakiya polele mpo na kotala nzinga nzinga na Ndako ya Likita. Nasalaki yango mpe nasimbamaki na nguya ya bomoko ya nkoto na nkoto ya bato oyo bazalaki kuna wana ezalaki biso kotombola mingongo na kosanzola Nzambe.

Nsima nazwaki boyebi moko wapi nayokaki lokola Nefi ntango amonaki limoni ya nzete ya bomoi, mpo Molimo ayebisaki ngai, “Tala” (tala 1 Nefi 11–14). Natalaki Mokambi Thomas S. Monson mpe nayokaki ete bomoko ya Eklezia ezalaki mpo tokambami na profeta ya bomoi. Na nzela ya litatoli ya Molimo Mosantu, nayebi ete Mokambi Monson azali profeta ya solo mpo na mikolo na biso, mpe nayebi ete Yesu Klisto akambaka Eklezia oyo o nzela na ye.