2012
Bana basi kati na Bokonzi na Ngai
sánzá ya mísáto 2012


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, sanza ya Misato 2012

Bana Basi kati na Bokonzi na Ngai

Yekola liteya liye, mpe na lolenge esengeli, solola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi na yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni yoko ya mosala na bomoi bwa yo.

Bondimi, Libota, Lisungi

Tozali bana basi ba Tata na biso na Lola. Ayebi biso, alingaka biso, mpe azali na moango mpo na biso. Eteni moko ya moango mona ezali boyei na mabele mpo na koyekola kopona bolamu likolo ya mabe. Ntango toponi kobatele mitindo ya Nzambe, tokumisaka Ye mpe tondimaka bokitoli na biso lokola bana basi ba Nzambe. Lingomba ya Bamama Basungi esalisaka biso kokundola libula liye ya bonzambe.

Lingomba ya Bamama Basungi mpe mambi ma kala na yango elendisaka mpe esungaka biso. Julie B. Beck, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki: “Lokola bana basi ba Nzambe, bozali komilengela mpo na mabiangi ya seko, mpe moko na moko kati na bino azali na bokitoli, lolenge, mpe mokumba ya mwasi. Elonga ya mabota, mangomba ma bato, Eklezia oyo, mpe moango mwa lobiko efandisami na botongono na bino. … [Tata wa biso na Lola] akanaki kotia Lingomba ya Bamama Basungi mpo na kosalisa bato na Ye mpe kolengela bango mpo na mapamboli ma tempelo. Atiaki [Lingomba ya Bamama Basungi] mpo kotia bana ba Ye ya basi na molongo ya mosala mwa Ye mpe kokoma lisalisi na bango ya kotongaka bokonzi na Ye mpe kolendisaka bandako ya Siona.”1

Tata wa biso na Lola apesi biso mosala moyebani malamu mpo na kosalisa na kotonga Bokonzi na Ye. Apamboli biso lisusu na makabo ma molimo tosengeli mpo na kokokisa mosala moye moyebani. O nzela ya Lingomba ya Bamama Basungi, tozali na mabaku ya kosalela makabo na biso mpo na kolendisa mabota, kosallisa baye bazali kokelela, mpe koyekola lolenge boni kotambwisa bomoi lokola bayekoli ba Yesu Klisto.

Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mosungi ya Mibale kati na Bokambi ya Yambo, alobaki na ntina ya kozala moyekoli ete: “Na kotambolaka na bompikiliki na nzela ya bomoi ya moyekoli, tozali kolakisa na bisomei lomeko ya bondimi na biso mpe bolingi na biso ya kondima bolingi ya Nzambe na esika na oyo ya biso moko.”2

Tika tomikundola ete tozali bana basi ya Nzambe mpe tobunda kozala lokola bayekoli na Ye. Ekosala biso bongo, tokosalisa kotonga bokonzi ya Nzambe awa na mabele mpe kokoma bato balongobani mpo na kozonga na miso ma Ye.

Uta na Makomi

Zekalia 2:10; Doctrine et Alliances 25:1, 10, 16; 138:38–39, 56; “Libota: Esakoli epai ya Mokili” (Liahona mpe Ensign, sanza ya Zomi na moko 2010, 129)

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Na mokolo ya 28, Sanza ya minei ya mobu 1842, Profeta Joseph Smith alobaki na bandeko basi na Lingomba ya Bamama Basungi ete: “Botiami sikawa na ezalela wapi bokoki kosala engebene na bolingo ya motema oyo Nzambe aloni kati na [bino]. … Soki bobateli matoma na bino, banzelu bakoki te komipekisa uta na kozala baninga ba bino ya mosala.”3

Kondimaka nguya ya Lingomba ya Bamama Basungi mpo na kosalisa basusu mpe kosalisa bato kokola na bondimi, Zina D. H. Young, mokambi monene ya misato ya Lingomba ya Bamama Basungi alakaki bandeko basi na mobu 1893 ete, “Soki bokotimola na mozindo ya mitema na bino moko bokokuta, na lisalisi ya Molimo mwa Kolo, liyaka ya ntalo monene, litatoli ya mosala moye.”4

Matangi

  1. Julie B. Beck, “‘Bana ya Basi kati na Bokonzi na Ngai’: Mambi ma Kala ma Lingomba ya Bamama Basungi,” Liahona, sanza ya Zomi na moko 2010, 112, 114.

  2. Dieter F. Uchtdorf, “Nzela ya Moyekoli,” Liahona, sanza ya Mitano 2009, 76.

  3. Joseph Smith, kati na Mambi ma Kala ma Eklezia, 4:605.

  4. Zina D. H. Young, “How I Gained My Testimony of the Truth,” Young Woman’s Journal, sanza ya minei. 1893, 319.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lolenge boni ekoki ngai kosalisa bandeko ba ngai basi kokoma na makoki na bango lokola bana basi ya Nzambe?

  2. Lolenge boni ekoki ngai kosalela na bomoi na ngai toli mpe makebisi mapesami na basi na Doctrine et Alliances 25?