2012
O Katikati ya Bolengeli bwa Yo mpo na Misio
sánzá ya nsambo 2012


BIlenge

Na Katikati ya Bolengeli bwa Yo mpo na Misio

Mokambi Uchtdorf ayebisi bamisionele komikanisa lokola bazali na katikati ya misio na bango. Okoki lisusu kosalela likanisi liye mpo na kolengela misio ya yo: ozala na mibu 12 to 18, okoki komilengela mpo na kosala misio.

Mwa makambo kani okoki kosala “na katikati” ya bolengeli ya misio na yo?

  • Ntango nyonso zala ya kolongobana mpo na kokende na tempelo.

  • Yekola koyeba bitinda ya Molimo Mosantu na kokomaka bitinda yango mpe kosala likolo na yango.

  • Sambela mpo na bamisionele.

  • Tuna bamisionele wapi ofandi nini basengi yo kosala mpo na komilengela kosala misio.

  • Yekola kosalela ntango na yo malamu mpenza, kosalaka milulu ya motuya lokola kosalisa, koyekola makomi, mpe kokoma zulunale.

  • Ntango ozali kosolola na libota ya bandimi, kabola makomi oyo efulaki yo kala te. Limbola nini okanisi mpo na makomi yango.

  • Tuna baninga ba yo eye etali biyamba na bango mpe nini bandimelaka. Zala na mposa ya kokabola boyambi na yo. Bengisa bango na eklezia to na milulu.

Ntango ososoli ete ozali na katikati ya bolengeli misio na yo, okoki kotambwisa bomoi na yo na kozalaka moto oyo alongobani na bondimami na Nkolo mpe kozalaka moninga ya Molimo.