2012
Kolakisaka Boyekoli bwa biso na nzela ya Bolingo mpe Lisalisi
sánzá ya nsambo 2012


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya sambo 2012

Kolakisaka Ete Tozali Bayekoli na Nzela ya Bolingo mpe ya Lisalisi

Na nzela ya losambo yekola liteya oyo, mpe, lokola elongobani, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yo.

Bondimi, Libota, Lisungi

O ntango nyonso ya bomoi na Ye ya bokufi, Yesu Klisto alakisaki bolingo na Ye mpo na basusu na kosalisaka bango. Ye alobaki, “Na bongo bato yonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soki bozali na bolingo” (Yoane 13:35). Ye alakisi ndakisa mpe alingi biso to “[…]salisa baye batelemi na mposa ya lisalisi lya [biso]” (Moziya 4:16). Ye abiangi bayekoli ba Ye na kosalaka elongo na Ye na mosala mwa Ye, kopesaka libaku ya kosalisa basusu mpe kokoma mingi lokola Ye.1

Mosala na biso lokola bamama batali mpe bateyi ekokokana mpenza na mosala ya Mobikisi ntango tolakisi bolingo bwa biso mpo na baye totalaka mpe toteyaka na kosalaka boye:2

  • Mikundola nkombo na bango mpe nkombo ya bato ya mabota na bango mpe mesana na bango.

  • Linga bango na kozangaka kosambisaka bango.

  • Kengela bango mpe lendisa bondimi bwa bango “moko na moko,” lokola Mobikisi asalaki (3 Nefi 11:15).

  • Tia kimoninga ya solo na bango mpe tala bango na bandako na bango mpe na bisika mosusu.

  • Batela ndeko mwasi moko na moko. Mikundola mikolo ya mbotama, mikolo balongi na kelasi, mabala, mabatisi, to bangonga nyonso oyo ezali na ntina mpo na ye.

  • Yamba bandimi ya sika mpe baye balembi na bondimi.

  • Yamba oyo azali se ye moko to baye bazali na mposa ya bolendisi.

Uta na Makomi

3 Nefi 11; Moloni 6:4; Doctrine et Alliances 20:47

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

“Boyokani ya Sika ezali na nsango ya basi, bayebani nkombo to bayebani nkombo te, baye basalelaki bondimi bwa bango na Yesu Klisto. … Basi baye bakomaki bayekoli na ndakisa. … [Ba]salaki mobembo elongo na Yesu mpe Bapostolo Zomi na Babale ba Ye. Bapesaki biloko na bango mpo na kosunga na mosala mwa Ye. Nsima ya liwa mpe Bosekwi bwa Ye, [ba]kobaki kozala bayekoli ba botongono.”3

Paulo akomaki na ntina ya mwasi moko na nkombo ya Foibe, oyo azalaki “mosungi na lingomba” (Baloma 16:1). Ye asengaki bato basunga ye na nkita nyonso akozala na mposa na bango: mpo azalaki mosungi ya bato mingi (tala Baloma 16:2). “Lolenge loye ya lisalisi esalemaki na Foibe mpe basi banene basusu ba Boyokani ya Sika ezali kokoba lelo na bandimi ya—Lingomba ya Bamama Basungi, bakambi, bamama bateyi mpe basusu—baye bazali kosala lokola basungi, to basalisi, ya bato mingi.”4

Matangi

  1. Tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 105.

  2. Tala Handbook 2: Administering the Church (2010), 3.2.3.

  3. Daughters in My Kingdom, 3.

  4. Daughters in My Kingdom, 6.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Boniboni ezali ngai kokolisa bokoki bwa ngai mpo na kosunga basusu?

  2. Nini nazali kosala mpo ete bandeko basi nazali kokengela bayeba ete nalingi bango?