2012
Kosala na Tempelo
sánzá ya mwambe 2012


Bilenge

Kosala na Tempelo

Ntango na komaki na mibu 17, nabandaki kokanisa mpenza eye etali bomoi na ngai ya nsima, mpe nasambelaki Tata wa Lola mpo na eye etali nini nakokaki kosala mpo na komilengela kokende na misio mpe kozwa Bonganganzambe ya Melekisedeki. Nayoki ete nasengelaki kokende na tempelo mbala mingi mpamba te ezali ndako ya Nkolo mpe ekozala esika nakokaki komiyoka mingi penepene na Tata wa biso na Lola.

Yango wana nazwaki mokano ya kobatisa bato 1000 na mobu. Nayokaki mpenza mposa ya kozwa mokano moye; nakilaki bilei mpo na koyeba soki yango wana nde nini nasengelaki kosala. Tata wa biso na Lola ayanolaki ngai, mpe nabandaki kokende na Tempelo ya Tampico na Mexico mposo nyonso.

Esilaki ngai kobatisa bato 500, nazwaki mokano ya kosala bolukiluki ya bonkoko ya libota mpo na bankoko ba ngai, mpe nalingaki kosala boluki mingi mpenza ete nakokaki kolala te mpamba te nazalaki koluka bankombo. Nazwaki bankombo 50 mpe bankola mwambe na bonkoko ya libota lya ngai; nasalisaki kosala mosala mwa tempelo mpo na bango banso.

Nasilisaki na kobatisaka bato koleka 1300, mpe nasilisaki seminaire, nazwaki Bonganganzambe ya Melekisedeki, mpe nazali sikawa kosala lokola misionele ya ntango mobimba, eye ezalaki moko ya mikano mileki minene na bomoi.