2012
Kosala Likambo na Ntango ya Mposa
sánzá ya mwambe 2012


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya mwambe 2012

Sala Likambo na Ntango ya Mposa

Na nzela ya losambo yekola liteya oyo mpe, lokola elongobani, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Lokola bamama batali mpe bateyi, moko ya bantina na biso ezali kosalisa kolendisa mabota mpe bandako. Bandeko basi baye tokotalaka basengeli kokoka koloba, “Soki nazali na kpokoso, nayebi bamama bateyi batali bakosalisa na kozangaka kozelaka ete nasenga.” Mpo na kosalisa, tozali na mokumba ya koyeba bamposa ya bandeko basi tokotalaka. Ntango tozali koluka bofuli, tokoyeba lolenge nini koyanola bamposa ya molimo mpe ya ntango ya ndeko mwasi moko na moko tosengeli kotala. Nde, na kosalelaka ntango na biso, makoki, batalanta, nsambo ya bondimi, mpe lisungi ya molimo mpe ya motema, tokoki kosalisa kopesa lisalisi ya libondi na ntango ya maladi, liwa, mpe makambo masusu ya mbalakata.1

Na lisalisi ya bansango uta na bamama batali mpe bateyi, bakambi ya Lingomba ya Bamama Basungi bakoyeba baye bazali na mposa ya lisalisi koleka na ntina ya maladi ya nzoto to ya motema, makama, mbotama, liwa, bozangi makoki, bomoko, to mikakatano mosusu. Mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi nde akopesa bansango ya maye amoni na episikopo. Na nse ya bokambi bwa ye, akobongisa lisalisi.2

Lokola bamama batali mpe bateyi tokoki kozala na “ntina monene … ya kosepela” na ntina ya “mapamboli maye epesami epai ya biso, ete tokomisami bisalele na maboko ma Nzambe mpo na komema mosala moye monene mpembeni” (Alama 26:1, 3).

Uta na Makomi

Matai 22:37–40; Luka 10:29–37; Alama 26:1–4; Doctrine et Alliances 82:18–19

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Na mibu ya ebandeli ya Eklezia, bandimi bazalaki moke mpe ya kokangama na esika moko. Bandimi bakokaki koyanola nokinoki ntango moto moko azalaki na mposa. Lelo bandimi bazali koleka milio 14 mpe bapanzani na mokili mobimba. Kotalaka mpe koteyaka ezali eteni ya mwango ya Nkolo mpo na kopesa lisungi mpo na bana ba Ye.

“Ebongiseli bobele moko oyo ekokaki kopesa lisungi mpe libondisi o ntei ya eklezia ya monene boye na mokili ya kilikili boye ekozala na nzela ya basali moko na moko penepene na bato kati na mposa,” elobaki Mokambi Henry B. Eyring, Mosungi wa Yambo na Bokambi bwa Yambo.

“… Episikopo mpe mokambi ya etape moko na moko azali na mokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi oyo asengeli kotalela,” Ekobaki ye. “Azali na bamama Bateyi mpe batali, baye bayebi Mimekano mpe bamposa ya Ndeko Mwasi moko na moko. Akoki, na nzela na bango, koyeba mitema mpe mabota ya moto na moto. Akoki kokokisa mposa mpe kosunga episikopo na libiangi lya ye mpo na koleisa moto na moto mpe mabota.3

Matangi

  1. Tata Handbook 2: Administering the Church (2010), 9.5.1; 9.6.2.

  2. Tala Handbook 2, 9.6.2.

  3. Henry B. Eyring, na Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 110.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Nazali kosalelaka makabo na ngai mpe batalanta na ngai mpo na kopambola basusu?

  2. Bandeko basi nazali kokengela bayebi ete nazali kolinga kosalisa bango ntango bazali na mposa?