2012
Koyeba Nini Koloba
2012


BIlenge

Koyeba Nini Koloba

Soki oyoki lokola ete oyebi nsango malamu mingi te mpo na kokabola yango na basusu, yika mpiko kati na bilaka uta na makomi:

“Botombola mingongo na bino na bato oyo; boloba makanisi maye nakotia na mitema na bino, mpe bokoyokisama nsoni te liboso na bato;

“Mpamba te ekopesamela yo na ngonga wana, iyo, na ntango wana, nini okoloba” (tala D&A 100:5–6).

“Molendisi, oyo azali Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, akoteya bino makambo manso, mpe akomema makambo manso mpo na bokundoli bwa bino, ezala nini nalobelaki bino.” (Yoane 14:26)

Iye izali bilaka minene, kasi mpo na kozwa yango, tosengeli kosala eteni na biso. Na etinda oyo, Mokambi Eyring ateyi biso boniboni: “Komilengela mpo na kokabola [nsango malamu] na kotondisaka molimo na yo mikolo nyonso na babosolo ya nsango malamu.” Nini ekoki yo kosala mpo na kotondisa mayele na yo na babosolo ya nsango malamu?