2012
Kokabola Nsango malamu Motema na Motema
2012


Etinda ya BAkambi ya Yambo, Sanza ya Libwa 2012

Kokabola Nsango Malamu uta Motema na Motema

Elilingi
Na Mokambi Henry B. Eyring

Nzambe akotia bato basili komilengela na nzela ya basali balengelami ba Ye oyo balingi kokabola nsango malamu. Eye esila kosalema mpe ekosalema na bomoi na yomei. Mbala boni likambo oyo esalemaka etali bolengelami ya molimo na yo mpe ya motema na yo.

Nazali na moninga moko oyo asambelaka mikolo nyonso mpo na kokutana na moto oyo asili komilengela mpo na koyamba nsango malamu. Amemaka elongo na ye mokanda moko ya Buku ya Mormon. Butu yambo ya mobembo moko ya mokuse, azwaki mokano ya kokamata mokanda yango elongo na ye te, kasi na esika na yango amemaki laisser-passer. Nzokande ekomaki ye pene ya kokende, liyoki moko ya molimo eyaki kati na ye ete: “Kamata Buku ya Mormon moko elongo na yo.” Atiaki moko na saki na ye.

Ntango mwasi moko oyo ayebaki afandaki penepene na ye na mobembo, amitunaki, “Oyo azali nde moko yango?” Atambolaki elongo na ye lisusu na nzela ya kozonga. Akanisaki, “Boniboni esengeli ngai koloba na ntina ya nsango malamu?”

Na esika ya eye mwasi alobaki na ye, “Ofutaka moko na zomi na eklezia na yo, boye te?” Ye alobaki afutaka. Ye [mwasi] alobaki ete asengelaki kofuta moko na zomi na eklezia na ye kasi asalaki te. Nsima atunaki, “Nini okoki koloba na ngai na ntina ya Buku ya Mormon?”

Alimbolaki ete buku yango ezali makomi, litatoli mosusu ya Yesu Klisto, ebongolamaki na Profeta Joseph Smith. Amonanaki ete azalaki na litomba, yango wana [ye moninga na ngai] atiaki loboko na saki na ye mpe alobaki, “Natutisamaki motema mpo na komema buku oyo elongo na gai. Nakanisi ezali mpo na yo.”

Abandaki kotanga yango. Wana ezalaki bango kokabwana, alobaki, “Yo mpe ngai tokozala na masolo mingi koleka na ntina ya oyo.”

Nini moninga na ngai akokaki koyeba te—kasi oyo Nzambe ayebaki mpenza—ezalaki ete azalaki koluka eklezia. Nzambe ayebaki ete azalaki kotala moninga na ngai mpe azalaki komituna ntina nini eklezia na ye ekomisaki ye moto ya esengo mpenza. Nzambe ayebaki ete akoluka koyeba Buku ya Mormon mpe ete akolakisa bolingi ya koteyama na bamisionele. Ye [mwasi] asilaki komilengela. Moninga na ngai azalaki mpe lokola. Yo mpe ngai tokoki lisusu kozala bato basili komilengela.

Bolengeli tozali na yango mposa ezali ya kati na mayele na biso mpe na motena na biso. Mwasi ayokaki mpe amikundolaki maloba na ntina ya Buku ya Mormon, Eklezia ezongisami ya Nkolo, mpe motindo ya kofuta moko na zomi epai ya Nzambe. Mpe ayokaki ebandeli ya litatoli ya bosolo kati na motema na ye.

Nkolo alobaki ete Akobimisa bosolo na mayele na biso mpe na motema na biso na nzela ya Molimo Mosantu (tala D&A 8:2). Bato mingi oyo okokutana na bango bazali na ebandeli ya bomilengeli bona. Bayoka mpe batanga maye matali Nzambe mpe liloba na Ye. Soki mitema na bango mizali pete mpenza, bayokaki, atako na moke, bondimami ya bosolo.

Mwasi yango alengelamaki. Moninga na ngai Mosantu ya Mikolo mya Nsuka oyo ayekolaki Buku ya Mormon mpe lokola. Ayokaki litatoli kati na ye ete eye ezali ya solo, mpe akitolaki bokambami uta na Molimo mpo na kokamata mokanda moko elongo na ye. Asilaki komilengela na mayele mpe na motema na ye.

Nzambe azali kolengela bato mpo na kozwa litatoli na yo ya bosolo oyo ezongisami. Ye asengi bondimi na yo mpe nsima mosala na yo mpo na kokabola na kozangaka kobanga nini oyo ekomi ya motuya mpenza mpo na yo mpe mpo na baye olingaka.

Milengela mpo na kokabola bosolo na kotondisaka mayele na yo mikolo nyonso na babosolo ya nsango malamu. Wana ezali kobatela mitindo mpe kokumisa mayokani na yo, okoyoka litatoli ya Molimo mpe mingi ya bolingo ya Mobikisi mpo na yo mpe mpo na baye ozali kokutana na bango.

Soki osali eteni na yo ya mosala, okozala mingi mingi na mayele ya elengi ya kokutana na bato baye basili komilengela mpo na koyoka litatoli na yo ya bosolo—epesami uta motema na motema, uta na yo epai na bango.

Koteya uta na Etinda Oyo

Kanisa kotanga etinda eye elongo na libota mpe kososola eteni ya yambo kino ya nsuka, wapi Mokambi Eyring azali koloba na ntina ya banzela mpo na kolendisa litatoli ya moko. Solola elongo na libota na ntina ya motuya ya kopesaka litatoli ntango ozali kokabola nsango malamu. Bana kati na libota bakoki komona yango ya lisalisi mpo na kotalisa boniboni kotatola na baninga.