2012
Mpokwa Ebongi nie ya Mbotama ya Klisto.
sánzá ya zómi na míbalé 2012


Bilenge

Mpokwa Ebongi nie ya Mbotama ya Klisto.

Ntango nazalaki kokola, moko ya ngonga ya kitoko ya mibu nyonso ezalaki Mpokwa ya Mbotama ya Klisto. Libota na ngai mpe ngaimei tolambaki pizza, tokendaki koyemba, mpe tosanganaki mpo na losambo ya Mbotama ya Klisto. Toyembaki banzembo na mingongo miyokani malamu te mpe toyembaki makasi banzembo na mwa bibetele ya miziki na biso. Tata azalaki mbala mingi kosukisa mpokwa yango na likanisi ya Mbotama ya Klisto oyo etikaki biso na mpinzoli ya esengo. Bomoi ezalaki malamu te koleka Mpokwa ya Mbotama ya Klisto.

Ntango nakomaki mwa mokolo mingi, mama na ngai abandaki kobatela elenge moko ya mpembeni, Kelly. Kelly azalaki koya na ndako na biso mikolo nyonso nsima ya kelasi, ntango mama na ye, Patty, azalaki kosala. Kelly azalaki kolanda ngai nzinganzinga lokola mwana mbwa—kongangaka mpe na nzala. Ezalaki ntango nyonso bopemi ntango Patty azalaki koya kozwa mwana na ye ya mwasi mpe kotika ndako mpe libota na ngai na kimia.

Na sanza ya zomi na mibale, nabangaki ntango mama abengisaki Patty mpe Kelly kosangana na biso mpo na Mpokwa ya Mbotama ya Klisto. Mpokwa Ngai ya Mbotama ya Klisto. Mama asekaki mpe ayebisaki ngai, “Ekobongola eloko moko te.” Kasi nayebaki malamu koleka. Bakolia pizza na biso nyonso. Kelly akoseka na eyembeli na biso. Nandimaki kosala Mpokwa ya Mbotama ya Klisto ya mabe koleka nyonso nasala.

Ntango mpokwa ekomaki, Patty mpe Kelly basanganaki na biso, mpe tosololaki mpe tosekaki mpe toyembaki. Mama na ngai alobaki solo. Oyo ezalaki mpokwa ya kobonga nie. Na katikati ya butu batondaki biso mpe bazongaki na mpasi. Nakendaki kolala motema etonda na esengo. Nasosolaki ete mabonza ya motuya mpenza ya Mbotama ya Klisto ekitaka te ntango ekabolami. Kasi ekomaka sukali mpe ekomaka mingi ntango tozali kokabola yango.