2012
Koyoka Lisusu Molimo ya Mbotama ya Klisto
sánzá ya zómi na míbalé 2012


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2012

Koyoka Lisusu Molimo ya Mbotama ya Klisto

Elilingi
Mokambi Thomas S. Monson

Mibu mileki wana ngai elenge mpaka, babengaki ngai elongo na basusu kopesa mapamboli na bana oyo bazalaki na maladi na lopitalo moko na Salt Lake City. Ntango tokotaki, tomonaki nzete ya kokembela Mbotama ya Klisto na minda na yango kongengaka mpe kitoko, mpe tomonaki maboke ya kokangama malamu na nse ya bitape bipanzana na yango. Nsima tokotaki na banzela ya katikati wapi bana mike babali mpe basi—bamoko na platre ya sima na loboko to na lokolo, basusu na bampasi oyo mbele ekokaki kosila nokinoki te—bapesaki biso mbote na bilongi ya koseka.

Elenge moko, mwana mobali ya moke oyo abungisaki elikya na maladi abelelaki ngai, “Nkombo na yo ezali nini?”

Nayebisaki ye nkombo na ngai, mpe atunaki, “Okoki kopesa ngai lipamboli?”

Lipamboli lipesamaki, mpe ntango tobalukaki mpo na kolongwa na mopanzi ya mbeto na ye, alobaki, “Natondi bino mingi mpenza.”

Totambolaki mwa matambe, mpe nsima nayokaki ye kobenga, “O, Ndeko Monson, natombeli yo Mbotama ya Klisto malamu.” Nsima monoko na ye etondaki na koseka oyo engengisaki nzoto na ye mobimba.

Mwana mobali wana azalaki na molimo ya Mbotama ya Klisto. Molimo ya Mbotama ya Klisto ezali eloko moko nalikii ete biso banso tosengeli kozwa na mitema na biso mpe kosalela—kaka na eleko moko oyo te kasi mpe lisusu na mobu mobimba.

Ntango tozali na molimo ya Mbotama ya Klisto, tobosanaka te Ye oyo kani mbotama tozali kokundola na eleko ya mobu oyo: “Mpo ete Mobikisi, ye Klisto Nkolo, abotameli bino lelo na mboka na Dawidi” (Luka 2:11).

Na mikolo na biso molimo ya kopesaka makabo ezali na esika monene na kokundolaka eleko ya Mbotama ya Klisto. Nazali komituna soki tokoki kozwa litomba na komitunaka, Makabo nini Nkolo akolinga ngai napesa na Ye to na basusu na eleko oyo ya motuya ya mobu?

Tika napesa likanisi ete Tata wa biso na Lola akolinga moko moko na biso apesa na Ye mpe na Mwana wa Ye likabo ya botosi. Nazali lisusu koyoka ete Ye akolinga kosenga biso tomipesa kasi tozala bayimi to bato ya lokoso to ya kowelana te, lokola Mwana wa Ye ya motuya azali koyebisa na Buku ya Mormon:

“Mpo solo, solo nalobi epai na bino, ete ye oyo azali na molimo ya boweli azali ya ngai te, kasi azali ya zabulu, oyo azali tata ya boweli… alamusaka mitema mya bato na kowelaka na nkanda, moko na mosusu.

“Tala, oyo ezali malongi ma ngai te, kolamusaka mitema mya bato na nkanda, kasi oyo ezali malongi ma ngai, ete makambo ma lolenge loye masengeli kosila.” (3 Nefi 11:29–30).

Na eleko kitoko oyo ya litondi ya ntango, mabaku na biso ya kolinga mpe ya komipesa mpo na basusu mazali mpenza na ndelo te, kasi mazali lisusu ya kowumela te. Lelo ezali na mitema ya kosepelisa, maloba ya boboto ya koloba, makambo ya kosala, mpe milimo ya kobikisa.

Moko oyo azali na bomoni malamu na ntina ya molimo ya Mbotama ya Klisto akomaki:

Nazali Molimo ya Mbotama ya Klisto—

Nakoti na ndako ya babola, kosalaka ete bana na bilongi binzuluka bafungola miso na bango minene, na likamwisi ya esengo.

Nasali ete maboko makangama ya moyimi masembolama mpe boye mapakola langi ya bongengi na molimo na ye.

Nasali ete bamibange bazongisa bolenge na bango sika mpe baseka na lolenge ya esengo ya kala.

Nabateli lisolo ya bolingo na motema ya bomwana, mpe nangengisi mpongi ya ndoto esangisami na makamwisi.

Nasali ete makolo malemba mamata bimateli ya molili na bitunga etonda na biloko, kotikaka nsima mitema ya kokamwa na ntina ya bolamu ya mokili.

Nasali ete moto ya yauli atika moke nzela na ye ya boniama, ya bobebisi mpe atinda epai ya bolingo oyo ezali kosenga mwa bilembo oyo ebimisaka mpinzoli—mpinzoli oyo elongolaka masusa minene ya mawa.

Nakoti na bandako ya molili ya boloko, kokundolisaka mobali oyo azali kobanga nini yango esengelaki kozala mpe kolakisaka liboso mikolo malamu miye mikoya.

Nakoti na malembe na ndako ya mpasi ya mpembe ya kimia, mpe na mbebo oyo esili kolemba mpenza mpo na koloba kaka kolenga na botondi ya nie, oyo ezali na ndimbola monene.

Na banzela nkoto, nasali ete mokili oyo ezali kobanga etala likolo kati na elongi ya Nzambe, mpe mpo na mwa ngonga ebosana makambo oyo ezali mike mpe ezanga ntina.

Nazali Molimo ya Mbotama ya Klisto.1Tika ete moko na moko na biso toyoka lisusu molimo ya Mbotama kutu Molimo ya Klisto.

Matangi

  1. E. C. Baird, “Christmas Spirit,” na James S. Hewitt, ed., Illustrations Unlimited (1988), 81.

Koteya uta na Etinda Oyo

Wana ezali yo kokabola etinda ya Mokambi Monson elongo na libota, kanisa kobetaka sete mpo na motuna atunaki na ntina ya makabo nini Nkolo akosenga biso topesa Ye to epai ya basusu na eleko oyo. Lendisa bato ya libota bakoma makanisi mpe mabanzo na bango (to, mpo na bilenge bana, bayema elili) etali boniboni “koyoka molimo ya Mbotama—kutu Molimo ya Klisto.”