2013
Kotambwisama na Bondimi
sánzá ya nsambo 2013


Bilenge

Kotambwisama na Bondimi

Mokomi afandaka na North Carolina, USA.

Nakobosana mokolo moko te kotambolaka na mabele ya Winter Quarters, Nebraska, USA, wapi kala bapionie bafandaki mibu mingi. Mabele mamonanaki ya bule, mbele lokola kaka soki tozalaki na libanda ya koyingela na tempelo moko.

Miso na ngai etondaki na mpizoli, kobebisaka bomoni na ngai. Namonaki ekeko moko kasi nakokaki koyeba bilongi te. Ntango napangusaki mpizoli na ngai, namonaki mobali moko mpe mwasi moko oyo bilongi na bango bitondaki na mawa. Ntango natalaki malamu, namonaki elongi ya mwana moke kolalaka na lilita moko na makolo na bango.

Komona yango etondisaki ngai na mayoki ya motema mingi: mawa, nkanda, botondi, mpe esengo. Nalingaki kolongola mpasi Basantu wana bayokaki, kasi nazalaki na botondi na ngonga wana kaka mpo na nini babonzaki mpo na nsango malamu.

Makambo nayebaki na Winter Quarters esalisaki ngai nasosola ete Tata na Lola apesi nsango malamu epai ya bana na Ye mpe andimi bango bazwa bonsomi ya boponi mpo na kosala na yango lokola balingi. Baboti ya mwana moke wana bakokaki kopona kolanda nzela ya pete. Kolandaka profeta mpe nsango malamu ya bomoi esengaki bapionie oyo bakende liboso ata kutu ntango yango elingaki koloba kokunda mwana na bango. Kasi baponaki kokotisa nsango malamu na bomoi na bango mpe bandimaki mikakatano na bango. Nayekolaki ete bomipesi ya Basantu na nsango malamu mpe mokano na bango ya kokende liboso etambwisamaki na bondimi mpe elikya—elikya mpo na mikolo mikoya ya kitoko mpe bondimi ete Nkolo ayebaki bango mpe akokaki kolembisa mpasi na bango.