2013
Koteya mpe Koyekola Nsango Malamu
sánzá ya nsambo 2013


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Sambo 2013

Koteya mpe Koyekola Nsango Malamu

Yekola liteya oyo na losambo mpe, na lolenge esengeli, kabola yango elongo na bandeko basi oyo ozali kotala. Salela mituna mpo na kosalisa yo kolendisa bandeko basi ba yo mpe kosala ete Lingomba ya Bamama Basungi ekoma eteni moko ya mosala na bomoi na yomei. Mpo na kozwa nsango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Yesu Klistu azalaki nkolo moteyi. Ye apesaki ndakisa mpo na biso lokola Ye “ateyaki basi na maboke mpe moko na moko, na balabala mpe na mpembeni ya mai, na liziba mpe na bandako. Ye alakisaki boboto ya bolingo epai na bango mpe abikisaki bango mpe baye ya libota na bango.”1

Ye ateyaki Malata mpe Malia mpe “abengisaki bango bakoma bayekoli na Ye mpe bazwa lobiko, ‘eteni wana ya malamu’ (Luka 10:42) oyo ekolongolama uta na bango soki moke te.”2

Na makomi na biso ya mikolo mya nsuka, Nkolo atindaki biso mpo na “koteyana malongi ya bokonzi” (D&C 88:77). Na ntina ya koteyaka mpe koyekolaka malongi, Cheryl A. Esplin, mosungi ya mibali na bokambi monene ya Eteyelo ya bana, alobaki, “Koyekola mpo na kososola na mobimba malongi ya nsango malamu ezali likambo moko ya bomoi mobimba mpe eyaka ‘monkoloto likolo lya monkoloto, mosise likolo lya mosise, awa moke mpe kuna moke’ (2 Nefi 28:30).”3

Wana ezali biso koyekola, kotanga, mpe kosambela, tokoteya na nguya ya Molimo Mosantu, oyo akomema etinda na biso “epai ya mitema ya bana ya bato[mibali mpe basi]” (2 Nefi 33:1).

Uta na Makomi

Alma 17:2–3; 31:5; Doctrine et Alliances 42:12–13; 84:85

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Baprofeta na biso ya kala bakundolisi biso lokola basi ete lokola bateyi na ndako mpe Eklezia tozali na mosala moko monene. Na sanza ya libwa 1979, Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) asengaki biso tokoma “bandeko basi bayekola makomi.” Alobaki ete: “Bokokoma banganga ya mayele ya makomi masantu—mpo na kokitisa basusu te, kasi mpo na kotombola bango! Na nsuka ya nyonso, nani azali na mposa mingi ya ‘kozwa lokola eloko ya mutuya’ bosolo ya nsango malamu (oyo bakoki kotalela na ntango na bango ya mposa) koleka basi mpe bamama baye baleisaka mpe bateyaka mingi mpenza?”4

Tozali banso bateyi mpe bayekoli. Ntango tozali koteya uta na makomi mpe maloba ya baprofeta na biso ya bomoi, tokoki kosalisa basusu baya epai ya Klisto. Ntango tomipesi na makambo ya boyekoli na kotunaka mituna ya ntina, tokoki komona biyano biye bizali kokokisa bamposa ya moko na moko kati na biso.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Lolenge nini nazali komilengela mpo na kozala moteyi malamu?

  2. Ekokabola ngai litatoli na ngai elongo na bandeko basi oyo nabatelaka?

Matangi

  1. Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 3.

  2. Daughters in My Kingdom, 4.

  3. Cheryl A. Esplin, “Teaching Our Children to Understand,” Liahona mpeEnsign, sanza ya Mitano 2012, 12.

  4. Spencer W. Kimball, na Daughters in My Kingdom, 50.